Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 11/15 nk. 7-9
  • Kokufa miso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokufa miso
  • Lamuká!—2015
  • Masolo mosusu
  • Tósalisa bato oyo bakufá miso báyeba Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Matɔnɔmatɔnɔ ebongoli bomoi ya bato
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kopesa bato oyo bakufá miso litatoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Bafungoli miso mpo na komona nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 11/15 nk. 7-9
Paqui ná mobali na ye

Kokufa miso

“Matangá ya nkisi oyo batyaki ngai na miso ntango nabotamaki nde ebomaki ngai miso. Na boumeli ya bolenge na ngai nyonso nazalaki komona ata moke te mpe nakómaki kotungisama makasi na makanisi.”​—Paqui, mwasi moko oyo azali na mbula soki 50, oyo mobali na ye mpe akufá miso.

KOKUFA miso to kozanga komona malamu ekoki kouta na makambo ndenge na ndenge; na ndakisa, likama to maladi. Yango ekoki kobebisa miso, misisa ya miso to bɔɔngɔ. Mbala mingi, bato oyo bakufaka mpenza miso to bamonaka malamu te bamiyokaka lokola bazangi moto ya kokipe bango, bayokaka mawa mpe babangaka. Ata bongo, mingi balongaka mokakatano yango mpe bazalaka na bomoi ya esengo.

Miso nde ezali eloko ya liboso oyo esalisaka biso tóyeba makambo oyo ezali zingazinga na biso. Na yango, soki moto akufi miso, koyoka, koyoka nsolo, kosimba mpe komeka elɛngi ya biloko nde esalisaka ye.

Zulunalo moko (Scientific American) elobi ete bolukiluki oyo basalaki na baselile ya bɔɔngɔ emonisi ete bɔɔngɔ ezalaka na likoki ya “kobongwana na kotalela makambo moto akutani na yango.” Ebakisi boye: “Makambo mingi emonisi ete soki enama moko ezali kosala lisusu te, bɔɔngɔ ekoki kosalisa binama mosusu ekóma na makoki mingi lisusu.” Tótalela makambo oyo elandi.

Koyoka: Kobanda na makelele ya mongongo tii na makelele ya makolo ya moto oyo azali kotambola, moto oyo amonaka te akoki komona na makanisi makambo oyo ezali koleka zingazinga. Fernando, mobali moko oyo akufá miso, alobi boye: “Mongongo to ndenge moto azali kotambola esalisaka ngai nayeba moto yango.” Juan, oyo akufá mpe miso, alobi boye: “Moto oyo akufá miso ayebaka moto na mongongo na ye.” Ndenge moko na moto nyonso, moto oyo akufá miso atyaka likebi na volimi ya mongongo mpo na koyeba soki moto yango azali na mawa to esengo.

Lokola matoi ya moto oyo akufá miso ekómaka kosala lisusu malamu koleka, esalisaka ye ayeba makambo oyo ezali koleka zingazinga na ye kaka na makelele, na ndakisa nzela ya mituka, monene ya shambrɛ to esika makama mosusu ezali.

Koyoka nsolo: Koyoka nsolo ekoki mpe kosalisa moto ayeba makambo, kasi kaka te koyoka nsolo ya kitoko. Na ndakisa, ntango moto oyo akufá miso azali kotambola na nzela, koyoka nsolo ekoki kosalisa ye asala karte moko na makanisi oyo ekoki kosalisa ye amona restora, zando mpe makambo mosusu. Toboyi te, makelele oyo amesaná na yango, ata mpe makambo mosusu ya mikemike na nzela ya kosimba ekoki kobakisama na karte yango.

Kosimba: Francisco alobi boye: “Misapi na ngai ekómá miso na ngai.” Mwa nzete mpe esalisaka “Miso” yango emona malamu. Manasés, oyo abotamá miso ekufá mpe ayekolaki kosalela mwa nzete na bomwana, alobaki boye: “Binama mosusu ya nzoto na ngai, makambo oyo nakangá na motó mpe kosalela mwa nzete ntango nazali kotambola esalisaka ngai nayeba mpenza esika nazali.”

Moto oyo azali kotánga zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ekomeli ya bato bakufá miso

Azali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ekomeli ya bato bakufá miso

Kosimba mpe esalisaka bato mingi oyo bakufá miso bátánga mikanda oyo ebimá na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Kutu, na mikolo na biso, bato oyo bakufá miso bazali na mwaye ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa bango báyeba makambo mingi, ata mpe makambo ya Nzambe. Longola mikanda ya ekomeli ya bato bakufá miso, ezali mpe na bakasɛti oyo bakoki koyoka mpe kosalela ordinatɛrɛ. Na nzela na yango, bakoki kotánga Biblia mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia.a

Mikanda yango ebɔndisaki mpenza Paqui ná mobali na ye oyo tolobelaki na ebandeli mpe epesaki bango elikya. Bazwaki mpe lisalisi ya ebele ya bandeko ya lisangá na bango. Paqui, alobi boye: “Tozali sikoyo na bomoi ya esengo mpe tokoki kosala makambo mingi biso moko.”

Toboyi te, kokufa miso ezalaka na mikakatano na yango. Kasi ezali mpenza litatoli oyo emonisi ete moto akoki komesana na makambo na pɛtɛɛ nyonso ntango akutani na mikakatano ya ndenge wana mpe kokoba kosepela na bomoi!

a Batatoli ya Yehova babimisaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na ekomeli ya bato bakufá miso na minɔkɔ koleka 25.

Nazali na bomoi ya esengo atako nakufá miso

Marco Antonio ná mbwa na ye, Dante

Marco Antonio oyo abotamá miso ekufá azali mobali oyo abalá, azali na bana mpe ye ná moninga na ye bafungolá mwa kompanyi. Alobaki na zulunalo Lamuká! makambo mosusu ya esengo mpe mikakatano oyo akutanaka na yango.

Ozali komelesa, osalaka mosala yango ndenge nini?

Nayanolaka bato oyo babengaka na telefone, nakutanaka na bakiliya mpe bato oyo bayelaka biso biloko ya kotɛka mpe nakipaka makambo etali banki.

Osalaka nini mpo na kozwa mwa mopɛpɛ?

Nalingaka miziki mpo esalaka ete namiyoka malamu. Nabɛtaka mpe piano ata soki ezali mpasi mpo nazalaka na likoki te ya kotánga miziki na ekomeli ya bato bakufá miso mpe kobɛta piano na mabɔkɔ mibale na mbala moko. Soki nabandi kobɛta mwa miziki, natángaka yango na lobɔkɔ ya mobali mpe nabɛtaka piano na lobɔkɔ ya mwasi. Na nsima, nazongelaka kobɛta piano na lobɔkɔ ya mobali mpe kotánga miziki na lobɔkɔ ya mwasi. Soki nakangi banɔti ya miziki na motó, nabɛtaka yango na mabɔkɔ nyonso mibale.

Mikakatano nini ya makasi okutanaki na yango?

Ntango nazalaki kokola, baboti mpe bandeko na ngai mibale bazalaki kokipe ngai malamu mpe kosalela ngai makambo lokola nde nazalaki komona. Naboyi te, nazalaki mpe kotutana to kokwea, kasi namesanaki kosala makambo mingi ndenge bato oyo bamonaka basalaka. Ntango nakómaki mokóló, kozanga mwaye ya kokumba motuka nde ezalaki kotungisa ngai mingi.

Sikoyo nabalá, nabotá mpe nazali na libota moko malamu oyo topesanaka mabɔkɔ. Mwana na ngai David, azwá mpe maladi na ngai ya miso. Kasi nasalaka nyonso napesa ye ndakisa malamu. Nalingaka ayeba ete soki amonisi motema molai mpe mpiko, akoki kosala makambo mingi.

Ozali na mbwa oyo esalisaka yo otambola. Mpo na nini ozwaki yango?

Soki nazali na mbwa na ngai oyo nkombo na yango Dante, nakoki kotambola mbangu mpe kozanga kobanga. Soki nakei esika moko mpo na mbala ya liboso, mwasi na ngai Loli, oyo amonaka, akendaka na biso mpo na kolakisa ngai ná Dante nzela. Mpo na koloba solo, na ebandeli ezalaki mpasi natya motema ete mbwa ekoki kobatela ngai. Kasi nakómá kotyela Dante motema mpenza. Ata soki likambo nini ezali koleka zingazinga na biso, esalaka kaka mosala na yango. Kasi soki nalongoli ye shɛni, ezalaka lokola bambwa nyonso.

Lokola ozali Motatoli ya Yehova, ndenge nini oyekolaka Biblia?

Ntango baaparɛyi oyo esalisaka bato bakufá miso ebimaki naino mingi te, Loli azalaki kotángela ngai Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango. Azalaki mpenza kosalisa ngai. Yango wana, nazalaki na likoki ya kosala badiskur na makita na biso ya losambo. Kasi, lelo oyo nakoki kotánga ngai moko mpo nazali na Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango na ekomeli ya bato bakufá miso. Nakoki mpe kokɔta na site Internet ya Batatoli ya Yehova jw.org mpo na kozwa ba-CD. Ordinatɛrɛ na ngai ezali na ekomeli ya bato bakufá miso mpe esalisaka ngai natánga makambo oyo ezali na ordinatɛrɛ yango. Ordinatɛrɛ yango ezali na madodo ya mikemike oyo ebimaka esika moko na mbala moko mpo na kosala ekomeli ya bato bakufá miso. Ekamwisaka mpenza!

Libaku oyo nasepelaki na yango mingi ezalaki ya kopesa mabɔkɔ na ekomeli ya bato bakufá miso na biro ya Batatoli ya Yehova na Espagne, na engumba Madrid. Mpo mikanda na ekomeli ya bato bakufá miso ebonga lisusu, baoyo babongisaka yango basepelaka ete bato oyo bakufá miso bápesa makanisi. Na yango, nakoki koloba na bosembo nyonso ete bandeko ya lingomba na biso balingaka mpe basepelaka na ngai.

Osepelaka kosolola na basusu?

Ɛɛ, mingimingi ná bato ya libota mpe bandeko na ngai Batatoli ya Yehova, oyo toteyaka mpe na bango ndako na ndako. Bandeko yango basalelaka ngai makambo lokola moto nyonso. Kutu, na bantango mosusu babosanaka ete nakufá miso!

Nakoki kobakisa ete mosala ya kosakola esalisaka ngai nayebisa basusu elikya kitoko oyo ezali na Biblia. Na ndakisa, Yisaya 35:5 elobi ete na Bokonzi ya Nzambe, “miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama.” Ntango Yesu Kristo azalaki awa na mabele, abikisaki mokufi miso; amonisaki makambo oyo akosala na mikolo ezali koya. (Matai 15:30, 31) Na yango, kokufa miso ezali mpo na ntango moke, ata mpe bamaladi mosusu nyonso. Na paradiso oyo ekoya awa na mabele, moto moko te akoloba ‘nazali na maladi to ebɔsɔnɔ.’​—Yisaya 33:24; Luka 23:43.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto