Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/15 nk. 2-3
  • Tósalisa bato oyo bakufá miso báyeba Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalisa bato oyo bakufá miso báyeba Yehova
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Masolo mosusu
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kopesa bato oyo bakufá miso litatoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Kokufa miso
    Lamuká!—2015
  • Bafungoli miso mpo na komona nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Elikya nini ezali mpo na bakufi-miso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 5/15 nk. 2-3

Tósalisa bato oyo bakufá miso báyeba Yehova

1. Ndenge nini Yesu amonisaki motema mawa mpo na bakufi miso?

1 Mwa mikolo liboso ete Yesu akufa, wana azalaki kobima na engumba Yeriko, bakufi miso mibale oyo basɛngasɛngaka na balabala bagangaki ete: “Nkolo, yokelá biso mawa!” Atako Yesu azalaki kokanisa na komekama oyo ezalaki kozela ye, atɛlɛmaki, abengaki bango mpe abikisaki bango. (Mat. 20:29-34) Ndenge nini tokoki komekola motema mawa ya Yesu mpo na bato oyo bakufá miso?

2. Ndenge nini tokoki kopesa litatoli epai ya moto oyo akufá miso, oyo tokutani na ye na esika ya bato nyonso?

2 Tósalisa bango: Soki okutani na moto oyo akufá miso, ntango mosusu na esika ya bato nyonso, pesá ye mbote, yebisá ye nkombo na yo mpe sɛngá ete osalisa ye. Na ebandeli akoki mbala mosusu kobanga, mpamba te bato mingi babubaka bato ya ndenge wana. Kasi, soki ozali na boboto mpe omonisi mpenza ete ozali kosepela na ye, ekosala ete abanga te. Kobosana mpe te ete kokufa miso ezali na balolenge mingi; koyeba likambo yango ekosalisa yo opesa lisalisi oyo ebongi. Nsima ya kosalisa ye, okoki koyebisa ye ete ozali kosala mosala ya koteya bato Biblia. Sɛngá ete otángela ye vɛrsɛ moko ya Biblia, na ndakisa Nzembo 146:8 to Yisaya 35:5, 6. Soki azali na likoki ya kotánga na ekomeli ya bato oyo bakufá miso (Braille), sɛngá ye soki akolinga kozwa mikanda na ekomeli yango oyo ekosalisa ye ayekola makambo mingi na ntina etali Biblia. Okoki mpe kosalisa ye azwa mikanda oyo batángi kotánga, oyo ezali na jw.org. Soki azali na ordinatɛrɛ oyo ekoki kotánga na mongongo makasi makambo oyo ezali na écran, ntango mosusu akosepela obimisela ye masolo yango na papye na jw.org, elongo na mikanda oyo ekoki kozwama na ndenge ya RTF (Format de texte enrichi).​—Talá etanda “Ntango ozali kosalisa moto oyo akufá miso . . .”

3. Na teritware na biso, ndenge nini tokoki koluka bato oyo bakufá miso?

3 Tóluka bato oyo bakufá miso: Mbala mingi na mosala ya ndako na ndako, tokutanaka te na bato oyo bakufá miso mpo mingi na bango bamiyokaka malamu te kosolola na bato oyo bayebi te. Na yango, esɛngaka mpenza milende mpo na ‘koluka’ bato ya ndenge wana mpo tópesa bango litatoli. (Mat. 10:11) Ozali na moninga moko ya mosala to ya kelasi oyo akufá miso? Luká ndenge ya kosolola na ye. Soki na teritware na bino ezali na eteyelo ya bato oyo bakufá miso, sɛngá ete opesa bango mikanda na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Oyebi moto moko oyo na libota na bango ezali na moto oyo akufá miso? Na teritware na bino ezali nde na bibongiseli oyo epesaka lisungi na bato oyo bakufá miso, to bandako ya mibange epai bato oyo bakufá miso bafandaka? Limbwelá moto ya libota, to moto oyo ayambaka bato to mpe mokambi ya esika yango ete Batatoli ya Yehova basepelaka mingi kosalisa bato oyo bakufá miso, mpe sɛngá ye ete omemela bango mikanda na ekomeli ya bato oyo bakufá miso to maloba ya mikanda oyo batángi kotánga. Lakisá ye elaka oyo ezali na Biblia ete Nzambe akobikisa bakufi miso mpo na libela. Okoki mpe kolakisa ye video oyo elobi “Sans elle, je serais perdu,” oyo ezali na jw.org mpe elobeli ndenge mikanda ya ekomeli ya bato oyo bakufá miso esalisaki ndeko mobali moko oyo akufá miso. Soki olimboli ntina ya boyei na yo, yango ekoki kofungola nzela ete okutana na bato oyo bakufá miso.

4. Lisolo ya Janet eteyi biso nini?

4 Ndeko mwasi moko oyo akufá miso na nkombo Janet akendaki esika moko epai bato oyo bakufá miso bafandaka. Abandaki lisolo na elenge mwasi moko. Ayebisaki ye boye: “Yesu abikisaki bato oyo bakufá miso mpo na komonisa oyo akosala mpo na bato nyonso oyo bakufá miso.” Batalelaki elongo Emoniseli 21:3, 4, mpe Janet alimbwelaki ye ndenge Bokonzi ya Nzambe ekokokisa elaka yango. Elenge mwasi yango atikalaki nyɛɛ, mpe na nsima alobaki ete: “Nayoká naino te moto oyo akufá miso aloba makambo ya boye. Bato mingi oyo bakufá miso te bakanisaka ete bato bakufaka miso mpo na likambo moko oyo bango moko to bankoko na bango basalá.” Janet atindelaki ye buku Biblia eteyaka na e-mail, mpe sikoyo bayekolaka Biblia mbala mibale na pɔsɔ.

5. Atako tokoki te kobikisa bakufi miso ndenge Yesu asalaki, matomba nini tokoki kozwa soki tozali kotyela bango likebi?

5 Ya solo, tokoki te kobikisa bato oyo bakufá miso ndenge Yesu asalaki; kasi tokoki kosalisa bato nyonso oyo nzambe ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi na bango, ata mpe baoyo bakufá mpenza miso, bákanga ntina ya solo ya Liloba ya Nzambe. (2 Ko. 4:4) Yesu abikisaki mibali mibale wana pene na Yeriko mpo ayokelaki bango mawa. (Mat. 20:34) Soki biso mpe toyokeli bakufi miso mawa, tokoki koyoka esengo ya kosalisa bamosusu kati na bango báyeba Yehova, Ye oyo akobikisa mpo na libela bato oyo bakufá miso.

Ntango ozali kosalisa moto oyo akufá miso . . .

  • Yo moko lobá na ye, kasi kotombola mongongo te. Moto oyo akufá miso amonaka te, kasi mbala mingi akoki koyoka malamu.

  • Soki ozali kotambwisa ye, gumbá lobɔkɔ na yo, mpe tiká ye akɔtisa lobɔkɔ na ye na oyo ya yo. Akozala na likoki ya kolanda yo ndenge ozali kotambola. Soki omoni libaku na ndakisa nzete to likonzí, eskalye to eloko mosusu, ekozala malamu okebisa ye.

  • Kokakatana te kosalela maloba oyo tosalelaka mpo na komona, na ndakisa “omoni” mpe “talá.” Ye mpe asalelaka yango. “Amonaka” na makanisi, kutu bililingi eyelaka ye na motó ntango azali koyoka makambo bazali kolobela.

  • Sololá na ye na esika ya kimya. Mbala mingi, moto oyo akufá miso amiyokaka malamu te na esika makelele ezali makasi, mpo ayebi te nini ezali koleka zingazinga na ye.

  • Soki olingi kokabwana na ye, yebisá ye. Yango ekosala ete ayoka nsɔni te ya koloba na moto oyo azali lisusu wana te.

  • Tondisá formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43), mpe pesá yango na sɛkrɛtɛrɛ soki moto yango oyo akufá miso asepeli kasi afandaka te na teritware na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto