Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 11/15 nk. 12-13
  • Kokumisa bana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokumisa bana
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • Tósanzola Yehova, Nzambe na biso!
    Tóyembela Yehova
  • Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!
    Tóyembela Yehova na esengo
  • Bilenge, bósanzola Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Teyá bana na yo ezaleli ya komikitisa
    Lamuká!—2017
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 11/15 nk. 12-13
Ntango mwana moke ya mobali azali kosala liyemi na kaye, tata na ye asimbi ye na lipeka

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Kokumisa bana

MOKAKATANO

Bato mosusu balobaka ete ekoki kosalema te moboti akumisa mwana koleka ndelo. Basusu balobaka ete kokumisa mwana ntango nyonso ebebisaka mwana mpe esalaka ete avimba motó, lokola nde mokili ekómi ya ye.

Longola mbala boni okumisaka mwana, osengeli mpe kotalela na makambo nini okumisaka ye. Kokumisa ya ndenge nini ekoki kolendisa to kobebisa mwana? Ndenge nini okoki kokumisa mwana na ndenge oyo ekosalisa ye?

OYO OSENGELI KOYEBA

Kokumisa nyonso ezalaka ndenge moko te. Tótalela makambo oyo elandi:

Kokumisa mwana koleka ndelo ekoki kobebisa ye. Baboti mosusu bakumisaka bana kaka mpamba mpo bana bámimona ete bazali na valɛrɛ. Profesɛrɛ David Walsh akebisaki ete bana mike “bazalaka mayele mingi mpe bayebaka soki bakumisi bango koleka ndelo to soki ezali kaka ya mbɛbu. bayebaka ete ebongi te bakumisa bango bongo mpe bakoki komona ete ebongi te bátyela yo motema.”a

Ezali malamu kokumisa mwana mpo na makoki na ye. Kanisá ete mwana na yo azali na likoki ya kosala mayemi malamu mpenza. Ezali mabe te kokumisa ye mpo na yango, mpo ekopesa ye makasi ya kokolisa lisusu likoki yango. Kasi, yango ekoki mpe kozongisa ye nsima. Kokumisa mwana kaka mpo na makoki na ye ya kobotama ekoki kotinda ye akanisa ete mosala oyo akoki kosala na pɛtɛɛ nyonso yango nde ebongi asala. Akoki kutu koboya makambo mosusu mpo na kobanga ete akolonga te. Akoki kokanisa boye: ‘Soki eloko moko esɛngi milende, nakoki kobomela yango nzoto te, bongo mpo na nini nasala yango?’

Eleki malamu kokumisa mwana mpo na milende na ye. Bana oyo bakumisaka bango mpo na mosala makasi mpe milende na bango na esika ya kokumisa bango mpo na makoki na bango bamonaka ete esɛngaka milende mpe motema molai mpo na koyeba mosala. Buku moko (Letting Go With Love and Confidence) elobi ete soki bana bayebi bongo, “bamipesaka na mosala mpo na kozwa litomba oyo balingi. Ata soki esimbi te, bamonaka te ete bakokoka lisusu te kasi nde lokola bato oyo bazali koyekola.”

OYO OKOKI KOSALA

Kumisá milende kasi makoki kaka te. Soki olobi na mwana ete “Namoni ozali komipesa mobimba na kosala mayemi,” ekoki kosalisa mwana na esika ya koloba na ye, “ozali mpenza na mayele ya kobotama.” Nyonso wana ezali kokumisa mwana, kasi na kozanga koyeba, oyo ya mibale ekoki komonisa ete mosala oyo mwana akosala malamu ezali kaka oyo azali na makoki oyo abotamá na yango.

Soki ozali kokumisa mwana mpo na milende na ye, ekoteya ye ete na komekameka, akoki kokolisa makoki na ye. Na nsima, mwana akoki kosala misala mosusu kozanga kobanga.​—Toli ya Biblia: Masese 14:23.

Salisá mwana alɛmba nzoto te soki alongi te na likambo moko. Ezala bato ya malamu basalaka mabunga, ata mpe mbala na mbala. (Masese 24:16) Kasi nsima ya libunga nyonso oyo basali, batɛlɛmaka, bazwelaka yango liteya mpe bakobaka. Ndenge nini okoki kosalisa mwana akóma na makanisi ya ndenge wana?

Awa mpe, kumisá nde milende na ye. Tózwa ndakisa: Kanisá ete oyebisaka mwana mbala mingi ete “ozalaka makasi na matematiki,” mpe na nsima, alongi te na ekzamɛ. Akoki komona ete abungisi makoki yango, mpe ezali na ntina te asala milende.

Soki ozali kokumisa milende na ye, ekosalisa ye akoba koyika mpiko. Ekosalisa ye amona te ete ezali likambo monene mpenza. Boye, na esika alɛmba nzoto, akoki kosala ndenge mosusu to kosala lisusu makasi koleka.​—Toli ya Biblia: Yakobo 3:2.

Lobelá na ndenge ebongi makambo oyo alongi na yango te. Soki olobeli makambo oyo alongi te na ndenge ya malamu, ekosalisa ye alɛmba nzoto te. Lisusu, soki ozali kokumisa mwana na ndenge ebongi, na ntembe te akondima toli oyo ekosalisa ye abongisa lisusu na esika oyo alongi te. Na nsima soki alongi, bino mibale bokosepela.​—Toli ya Biblia: Masese 13:4.

a Euti na buku No: Why Kids​—of All Ages—​Need to Hear It and Ways Parents Can Say It.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka.”​—Masese 14:23.

  • “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”​—Yakobo 3:2.

  • “Molimo ya bato ya etingya ekokóma mafutamafuta.”​—Masese 13:4.

KOLONGA MIKAKATANO MOSUSU

Biblia elobeli bato oyo bakómaki na makoki koleka oyo ya kobotama. Na ndakisa, Moize akakatanaki ntango Nzambe atindaki ye epai ya mokonzi ya nguya mpe ya motó makasi ya Ezipito. Moize alobaki boye: “Nalobaka malamu te.” (Kobima 4:10) Yirimia mpe alobaki bongo ntango bapesaki ye mokumba ya kosakola. Alobaki boye: “Nayebi koloba te, mpo nazali kaka mwana.” (Yirimia 1:6) Ata bongo, Moize ná Yirimia bakokisaki mikumba na bango malamu mpenza.

Yango eteyi biso nini? Makoki ya solosolo ya mwana esuki kaka te na oyo abotamá na yango. Kumisáká ye mpo na milende na ye mpe bino mibale bokokamwa na makoki oyo akokóma na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto