Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 5 nk. 14-15
  • Aristote

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Aristote
  • Lamuká!—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Alobelá makambo ndenge na ndenge
  • Makanisi ya Aristote ekɔtaki na mateya ya Katolike
  • Nani asalá mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ezali solo ete siansi ná Biblia eyokanaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2016
  • Osengeli kondima yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 5 nk. 14-15

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Aristote

Aristote

ARISTOTE apesá mpenza mabɔkɔ na makambo ya siansi mpe filozofi, eleki sikoyo mbula 2 300. Makambo oyo akomá ebendaka likebi ya bato tii lelo; babongolá yango na minɔkɔ mosusu mpe bayekolaka yango. James MacLachlan, profesɛrɛ moko ya istware akomaki ete “makanisi ya Aristote mpo na molɔ́ngɔ́ ekɔtelaki bato ya Mpoto na boumeli ya bambula soki 2 000.” Kutu makanisi mosusu ya Aristote ekɔtaki na mateya ya Katolike mpe Protesta, ata mpe na mateya ya bamizilma.

Alobelá makambo ndenge na ndenge

Aristote akomá makambo etali ntɔki, astronomi, bioloji, bizaleli, minɔkɔ, mibeko, logique, nguya oyo ebendaka biloko (magnétisme), métaphysique, biloko oyo ebalukaka, bisengo, bapoɛmi, politiki, pisikoloji, koyeba koloba (rhétorique) mpe molimo, mpo azalaki kondima ete ekufaka. Kasi, akendá nsango libosoliboso na makambo etali bioloji mpe logique.

Bato ya mayele na Grɛsi na ntango ya kala bazalaki kosalela nde likoki na bango ya kotala, kokanisa mpe logique mpo na kolimbola molɔ́ngɔ́. Soki bamoni ete likambo moko ezali solo mpenza, bazalaki komona ete soki bakanisi malamumalamu na likambo yango, ekosalisa bango bápesa makanisi oyo ebongi mpenza.

Kosalela mayele yango esalisaki bango bápesa makanisi oyo ebongi na mwa makambo mosusu; na ndakisa bamonaki ete molɔ́ngɔ́ ebongisamá malamu mpenza. Kasi lokola miso ekokaki te kosalisa bango bámona makambo nyonso, mingi ya bato yango ya mayele, ata mpe Aristote, bamikosaki. Na ndakisa, bakanisaki ete baplanɛti mpe minzoto ebalukaka zingazinga ya mabele. Na ntango wana, bato bamonaki ete likanisi yango ezali mpenza solo. Buku moko (The Closing of the Western Mind) elobi boye: “Kokanisa mpe eksperiansi endimisaki likanisi oyo Bagrɛki bazalaki na yango ete mabele ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́.”

Likanisi wana ya libunga elingaki kozala likama mpenza te soki etikalaka kaka na makambo ya siansi. Kasi esukaki kaka na siansi te.

Makanisi ya Aristote ekɔtaki na mateya ya Katolike

Na Moyen-âge, “bakristo” na Mpoto bandimaki ete mateya mosusu ya Aristote ezalaki solo mpenza. Bato ya teoloji ya Lingomba ya Katolike; mingimingi Thomas d’Aquin (kobanda mobu 1224 tii mobu 1274)​—bakɔtisaki makomi ya Aristote na mateya na bango ya teoloji. Yango wana, liteya ya Aristote oyo elobaki ete mabele ezali na katikati na molɔ́ngɔ́ ekómaki mpe liteya ya Katolike. Bakambi ya lingomba ya Protesta mpe bandimaki liteya yango, na ndakisa Calvin ná Luther, oyo balobaki ete liteya yango ezalaki na Biblia.​—Talá etanda “Batángaki makambo mingi na Biblia.”

Bandimaki ete mateya mosusu ya Aristote ezalaki solo mpenza

Mokomi moko na nkombo Charles Freeman, alobaki boye: “Na makambo mosusu, ekómaki mpasi kokesenisa [mateya ya Aristote] ná oyo ya Lingomba ya Katolike.” Na yango, balobaki ete D’Aquin apesaki Aristote “batisimo” ya lingomba ya Katolike. Kasi, mpo na koloba solo, Freeman akomaki ete “D’Aquin nde akómaki mondimi ya Aristote.” Mpe tokoki kobakisa ete Lingomba mpe ekómaki mondimi ya Aristote. Mpo na yango nde, Galilé, moto moko ya astronomi mpe ya matematike oyo amonisaki ete mabele ebalukaka zingazinga ya moi, basambisaki ye na tribinale ya lingomba ya Katolike mpe basɛngaki ye na makasi ete awangana likanisi na ye.a Kasi likambo ya kokamwa, Aristote andimaki ete boyebi ya siansi eyaka mokemoke mpe ebongwanaka. Soki Mangomba ezalaka ata na likanisi ya bongo!

a Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge “Galilée ayokanaki te ná Lingomba,” talá Lamuká! ya 22/04/2003 na Français.

MWA MAKAMBO ETALI ARISTOTE

  • Aristote azalaki kolinga koyeba makambo mpe azalaki “na limemya makasi mpo na valɛrɛ mpe kitoko ya molɔ́ngɔ́.”​—Aristotle​—A Very Short Introduction.

  • Azalaki kondima ete, ezali na “Nguya moko” ya seko oyo esalaka ete molɔ́ngɔ́ ebalukaka mpe nguya yango ezali malamu mpe ezali na libándá ya molɔ́ngɔ́.

  • Balobaka ete Aristote nde abandisá siansi mibale​—bioloji ná logique.

  • Aristote nde atángisaki Alexandre Monene, mobali moko ya Masedonia oyo na nsima asalaki ampire na ye.

Liyemi ya mabele oyo ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́

Bato mingi ya siansi bazalaki kondima ete mabele ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́

Batángaki makambo mingi na Biblia

Bato mosusu ya teoloji na kala bakangamaki na likanisi ya Aristote ete mabele ezalaka na katikati ya baplanɛti nyonso mpo batángaki makambo mingi na mikapo mosusu ya Biblia, na ndakisa na Nzembo 104:5, oyo elobi: “[Nzambe] atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela; ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te.” Mokomi ya mokapo yango na Biblia alobelaki te esika oyo mabele ezali na molɔ́ngɔ́. Asalelaki nde elobeli ya bapowɛti mpo na komonisa ndenge mabele ezali koumela na kolanda mokano ya Nzambe.​—Mosakoli 1:4.

Na yango, ntango Biblia elobelaka makambo ya siansi, elobaka makambo ya solo. Na ndakisa, Yobo 26:7, oyo ekomamaki eleki sikoyo mbula soki 3 500, elobi ete Nzambe “akakisi mabele na eloko moko te.” Yobo 38:33 elobi ete mibeko nde etambwisaka likoló.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto