Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/12 nk. 29-31
  • Osengeli kondima yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kondima yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato oyo bayebi mingi bazalaka ntango nyonso na elonga?
  • “Oyo babengaka na libunga ete ‘boyebi’”
  • Biblia epemamaki mpo na kosalisa biso
  • “Bososoli”
  • Aristote
    Lamuká!—2016
  • Ezali solo ete siansi ná Biblia eyokanaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Nani asalá mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Filozofi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/12 nk. 29-31

Osengeli kondima yango?

MWANA-KELASI moko ya mbula 12 azalaki kosala makasi mpo na koyeba mateya ya ebandeli ya matematiki (algèbre). Molakisi apesaki bango mituya (calcul) oyo ezali na mindɔndɔ te.

Abandaki na koloba boye: “Tózwa na ndakisa: x=y; mpe x=1, mpe y=1.”

Mwana-kelasi amonaki ete mituya yango ‘ezali na mindɔndɔ te.’

Kasi, na nsuka ya milɔngɔ minei ya mituya oyo emonanaki ete ezali na mindɔndɔ te, molakisi abimisaki eyano moko oyo ekamwisaki bango: “2=1!”

Makanisi ya bana-kelasi ebulunganaki mpe molakisi alobaki na bango ete: “Bómonisa ete eyano oyo ezali mabe.”

Lokola ayebaki algèbre malamu te, mwana-kelasi yango ayebaki likambo ya kosala te mpo na komonisa ete eyano yango ezali mabe. Amonaki ete ndenge mituya ebandaki tii na nsuka ezalaki mpenza malamu. Kasi, asengeli kondima eyano ya mabe wana? Lokola mpe molakisi na ye ayebi mituya malamu koleka ye, asengeli kaka kondima eyano yango? Ezali boye te! Na motema, azalaki koloba boye, ‘nayebi mpe ndenge ya kosala te mpo na komonisa ete eyano yango ezali malamu te.’ Kasi ‘mayele ya bomoto ezali koloba na ngai ete eyano yango ezali malamu te.’ (Masese 14:15, 18) Ayebaki ete ezala molakisi to baninga na ye ya kelasi, moko te akolinga kopesa dolare mibale mpo ye azwa dolare moko!

Na nsima, mwana-kelasi yango amonaki libunga na mituya yango. Likambo yango epesaki ye liteya moko monene. Ntango moto moko, ata azali na mayele mingi, amonisi likambo moko malamu mpe emonani ete ezali mpenza bongo, moto oyo azali koyoka asengeli kondima te soki moto yango asukisi likambo yango na ndenge ya mabe, atako azangi likoki ya komonisa libunga na ntango yango. Mwana-kelasi yango alandaki nde etinda ya Biblia oyo ezali na 1 Yoane 4:1 oyo elobaka ete osengeli te kondima nokinoki likambo nyonso oyo oyoki, ata soki euti epai ya moto oyo azali na bokonzi.

Yango elingi koloba te ete osengeli kozala motó makasi mpe kotingama kaka na makanisi na yo. Koboya kondima makambo oyo ekoki kosembola makanisi na yo ezali libunga. Kasi osengeli mpe “koningana nokinoki” te “kati na makanisi na yo” soki moto moko oyo azali na mayele mingi to azali na bokonzi azali kondimisa yo likambo moko. (2 Batesaloniki 2:2) Molakisi yango asalaki bongo kaka mpo na kotungisa bana-kelasi na ye. Kasi, na ntango mosusu, makambo esalemaka mpo na kotungisa mpamba te. Bato mosusu bazali mpenza “na mayele mabe ya kobimisa makambo ya lokuta.”—Baefese 4:14, NW; 2 Timote 2:14, 23, 24.

Bato oyo bayebi mingi bazalaka ntango nyonso na elonga?

Ata soki bazali na mayele mingi, bato oyo bayebi mingi ata na makambo nini ya siansi bazalaka na makanisi ndenge moko te mpe makanisi na bango ebongwanaka. Tókanisa na ndakisa ntembe oyo ezali kosila te kati na minganga mpo na likambo oyo esalaka mpenza ete moto azwa maladi. Profesɛrɛ moko ya mosala ya monganga na Iniversite ya Harvard, akomaki ete: “Basava bazali na ntembe makasi bango na bango mpo na koyeba soki nzoto na biso moko to nde makambo ya libándá esalaka ete tóbɛla.” Minganga oyo balobaka ete nyonso esilá kokomama na nzoto ya moto bandimaka mpenza ete ba gènes ya nzoto na biso nde esalaka mpenza ete tózwa maladi. Nzokande, bamosusu bazali koloba ete esika moto afandi to lolenge ya bomoi na ye nde ezali na ntina mingi mpo moto azwa maladi. Bato na bato bazali kolobela bolukiluki mpe bazali kotánga mituya ya makambo oyo esalemá mpo na kolongisa makanisi na bango. Atako bongo, ntembe yango esili naino te.

Esilá komonana mbala mingi ete bato ya mayele bazalaki na libunga, atako makambo oyo bateyaki liboso emonanaki lokola ete bakoki kotyela yango ntembe te. Bertrand Russell, moto ya filozofi, alobaki ete Aristote azali “moto ya filozofi oyo alekaki bato ya filozofi nyonso.” Kasi, Russell alobaki lisusu ete makambo mingi oyo Aristote ateyaki ezalaki “lokuta mpenza.” Akomaki boye na buku moko (History of Western Philosophy): “Na bambula oyo nyonso, likambo nyonso oyo eyebani sika na siansi, na logique, to na filozofi eyokani te na makanisi ya bayekoli ya Aristote.”

“Oyo babengaka na libunga ete ‘boyebi’”

Na ntembe te, baklisto ya ekeke ya liboso bakutanaki na bato mingi oyo bazalaki kolanda mateya ya bato ya filozofi oyo bayebanaki mingi lokola Socrate, Platon na Aristote. Bato oyo batángaki bakelasi milaimilai na eleko yango bazalaki komimona mpenza ete baleki baklisto mingi na mayele. Bazalaki kotalela bayekoli ya Yesu mingi te lokola “bato ya mayele na nzoto.” (1 Bakolinti 1:26) Kutu, baoyo bazalaki kolanda mateya ya filozofi na ntango wana bazalaki kokanisa ete makambo oyo baklisto bazalaki kondima ezalaki “bolema” to “makambo ezangi ntina mpenza.”​—1 Bakolinti 1:23; Phillips.

Soki ozalaki na kati ya baklisto wana ya liboso, olingaki kokamwa na maloba oyo bato ya mayele bazalaki koloba mpo na kondimisa to olingaki kotikala monɔkɔ polele liboso ya mayele oyo bazalaki komonisa? (Bakolose 2:4) Ntoma Paulo alobaki ete ntina ya kosala bongo ezali te. Ayebisaki baklisto ete Yehova azali kotalela “mayele ya bato ya mayele” mpe “boyebi ya [bato ya boyebi, NW]” ya ntango wana ete ezali bolema. (1 Bakolinti 1:19) Atunaki boye: “Moto ya filozofi, mokomi ya mikanda na moto ya ntembe ya mokili oyo bazali na nini mpo na kolakisa mayele na bango?” (1 Bakolinti 1:20, Phillips) Atako bazalaki na mayele mingi, bato ya filozofi, bakomi ya mikanda, na bato ya ntembe ya eleko ya Paulo basalaki eloko moko ya malonga te mpo na kosilisa mikakatano ya bato.

Bateyaki baklisto ete báboya makambo oyo ntoma Paulo alobaki ete ezali “bongolabongola ya oyo babengaka na lokuta ete ‘boyebi.’” (1 Timote 6:20, NW) Ntoma Paulo abengaki boyebi yango “lokuta” mpamba te ezangaki likambo moko ya ntina mingi: eloko to mokanda moko oyo euti epai ya Nzambe mpo na komonisa ete mateya na bango ezali solo. (Yobo 28:12; Masese 1:7) Lokola eloko yango ezangaki, mpe lisusu Satana, mokosi monene, azipaki bango miso, bato oyo bazalaki kokangama na boyebi yango bakokaki kolikya koyeba solo te.​—1 Bakolinti 2:6-8, 14; 3: 18-20; 2 Bakolinti 4:4; 11:14; Emoniseli 12:9)

Biblia epemamaki mpo na kosalisa biso

Baklisto ya liboso batyaki ntembe ata moke te ete Nzambe amonisaki mokano, mposa mpe mibeko na ye na kati ya Makomami. (2 Timote 3:16, 17) Biblia ezalaki kobatela bango mpo ‘moto moko te abenda bango lokola eloko na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe lokuta ya mpambampamba oyo euti na bonkɔkɔ ya bato.’ (Bakolose 2:8, NW) Likambo yango ezali kosalema mpe lelo oyo. Lokola ekeseni na makanisi ya bato oyo ezali bongolabongola mpe ezali kobimisa ntembe, Liloba ya Nzambe oyo epemamaki na elimo santu ezali koyebisa biso makambo ya solosolo oyo tosengeli kondima yango. (Yoane 17:17; 1 Batesaloniki 2:13; 2 Petelo 1:21) Soki Biblia te, mbɛlɛ tozali na mokakatano, mpamba te tolingaki kondima mateya mpe filozofi ya bato oyo ezali kobongwana.​—Matai 7:24-27.

Moto mosusu akoki koloba ete, ‘Lokola siansi ezali komonisa ete Biblia ezali na libunga, ezali mpe malamu te tótyela yango motema ndenge moko mpe tosengeli te kotyela filozofi ya bato oyo ezali kobongwana motema?’ Na ndakisa, Bertrand Russell, alobaki ete bato lokola “Copernic, Kepler, na Galilée, bakweisaki mateya ya Aristote na mateya ya Biblia mpo na kopesa likanisi ete mabele ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́ te.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Mpe lisusu, ezali solo te ete lelo oyo bato ya siansi oyo bandimaka bozalisi bazali koloba ete Biblia eteyaka ete mabele esalemaki na mikolo motoba ya ngonga 24, mpe makambo nyonso ezali komonisa ete mabele esali bamiliare ya bambula, boye te?

Bosolo ya likambo ezali ete Biblia elobi te ete mabele ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́. Bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kolanda Liloba ya Nzambe te nde bazalaki koteya likambo yango. Lisolo oyo ezali na mokanda ya Genese ezali komonisa ndenge Nzambe asalaki bato, mokili na biloko nyonso ezali kopesa nzela na kondima ete mabele ekokisi sikoyo bamiliare ya bambula mpe mokolo mokomoko oyo Nzambe asalaki moto, mokili na biloko nyonso ezali ya ngonga 24 te. (Genese 1:1, 5, 8, 13, 19, 23, 31; 2:3, 4) Soki totángi Biblia na makanisi ya malamu tokomona ete atako Biblia ezali mokanda ya siansi te, ezali mpe “makambo oyo ezangi ntina te.” Kasi, ezali mpenza na boyokani na makambo oyo bato ya siansi bandimi.a

“Bososoli”

Atako bayekoli ya Yesu mingi bazalaki bato minene te, ekoki mpenza kozala ete batángaki kelasi mingi te, kasi bazalaki na eloko mosusu oyo Nzambe apesaka. Na baoyo batángaki kelasi mingi na baoyo batángaki kelasi mingi te, bango nyonso bazalaki na likabo oyo Nzambe apesaki bango: bososoli mpe makoki ya kokanisa. Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto básalela mingi “bososoli” mpo ‘[bango moko] bákoka kososola mokano ya Nzambe, yango malamu, yango bakoki koyamba, yango mpe ebongi [mpenza].’​—Baloma 12:1, 2.

Nzambe apesaki baklisto ya liboso likabo ya “bososoli,” mpe yango esalisaki bango na komona polele ete mateya ya filozofi to mateya mosusu nyonso oyo eyokani te na makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi ezali na ntina te. Na makambo mosusu, bato ya mayele ya ntango na bango, bazalaki ‘kozipa makambo ya solo’ mpe kobosana makambo ya solo oyo ezalaki komonisa bango ete Nzambe azali. Ntoma Paulo akomaki ete: “Elobaki bango ete bazali na mayele, bakómaki bazoba.” Lokola baboyaki kondima solo mpo na Nzambe mpe mpo na mokano na ye, na “makanisi na bango bakómaki bilema mpe mitema na bango mizangaki mayele, izindaki na molili.”​—Baloma 1:18-22; Yilimia 8:8, 9.

Mbala mingi, baoyo balobaka ete bazali bato ya mayele basukaka na koloba ete “Nzambe azali te” to “Esengeli kondimela Biblia te” to “Oyo ezali ‘mikolo ya nsuka te.’” Makanisi ya ndenge yango ezali mpenza bozoba na miso ya Nzambe lokola koloba ete “2=1.” (1 Bakolinti 3:19) Ata soki bato bamipesi bokonzi nini, okoki kondima makambo na bango te soki ebongoli makambo oyo Nzambe alobi, soki eyokani te na Liloba na ye, mpe soki ezali malamu te. Mpo na kosukisa, nzela ya mayele ezali kaka ya kondima ete “Nzambe azali sembo ata bato nyonso bazali na lokuta.”​—Baloma 3:4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? mpe buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Bililingi na lokasa 31]

Na bokeseni na makanisi ya bato oyo ezali kobongwana, Biblia ezali koyebisa biso makambo ya solosolo oyo tosengeli kondima

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Na lobɔkɔ ya mwasi, Epikuli: Tozwi fɔtɔ oyo na ndingisa ya British Museum; likoló na katikati, Platon: National Archaeological Museum, Athènes, Grèce; na lobɔkɔ ya mobali, Socrate: Rome, Musei Capitolini

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto