Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 5 lok. 16
  • “Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!”
  • Lamuká!—2016
  • Masolo mosusu
  • Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Video ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Témoins de Jéhovah ezali Nkombo ezali mpe Lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tósalela bavideo mpo na koteya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 5 lok. 16
Molakisi oyo azali kolakisa bana-kelasi video oyo euti na site jw.org na Corée du Sud

“Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!”

SOO-JEONG, oyo azali mopesi-toli na makambo etali bana-kelasi ya eteyelo ya ntei na Corée du Sud asalelaki bavideo ya site jw.org na kelasi na ye. Alobi boye: “Ndenge oyo bana-kelasi basalaki ntango batalaki video Boninga ya solosolo ezali nini? ekamwisaki mpenza! Nsima ya kotala video yango, balobaka boye: ‘Natalelá naino boninga ndenge wana te liboso. Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!’ Yango wana, bamosusu balobaki ete soki bazali na mposa ya toli, bakoluka yango na site yango.” Soo-jeong abakisi boye: “Nayebisaki balakisi mingi mosusu bátala video yango mpe basepelaki ndenge bazwaki esaleli kitoko wana mpo na kolakisa bana-kelasi na bango.”

Video mosusu oyo bana-kelasi na Corée du Sud bamoni ete esalisaki bango, ezali video ya moto azali koyema Longá matumoli kozanga ete obunda. Molakisi moko oyo asalaki elongo na ebongiseli moko oyo etalaka ndenge ya kopekisa mobulu ya bana, alakisaki video yango na kelasi moko. Alobaki boye: “Video yango ebendaki likebi ya bilenge mingi mpo eyemami kitoko mpenza. Lisusu, video yango ebongi mpenza mpo esuki kaka te na kolakisa ndenge ya kosala ntango batumoli yo kasi mpe ndenge ya kokima yango.” Ebongiseli yango esɛngaki ndingisa ya kosalela video yango na badiskur na bango oyo basalaka na biteyelo mingi ya yambo mpe ya ntei. Bapesaki bango ndingisa. Ata mpe bakonzi ya bapolisi bakómi kosalela bavideo oyo ezali na jw.org.

Soki okɔtá naino te na site yango, mpo na nini te kosala yango? Ezali mpasi te kokɔta kuna mpe biloko nyonso oyo okoki kozwa kuna; ezala bakasɛti, bavideo, Biblia mpe mikanda mingi mosusu ezali ofele.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto