Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/02 lok. 1
  • Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tósalela bavideo mpo na koteya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Salelá biloko oyo okoki kolakisa bato mpo na koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Bisaleli oyo ezali koteya mpe kolendisa
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Témoins de Jéhovah ezali Nkombo ezali mpe Lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 2/02 lok. 1

Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli

1 “Mwana na biso ya mobali abandaki kotala kasɛti video yango liboso kutu abanda kotambola. Banda wana, atalaka yango mbala na mbala. Oyo nde esengo ya kozala na bisaleli oyo elonaka bolingo ya Yehova na mitema ya bana na biso!” Moboti wana moklisto azalaki kolobela kasɛti video nini? Ezali kasɛti video oyo ezali na motó ya likambo Noé: il marchait avec Dieu (Noa: Ye atambolaki elongo na Nzambe). Mama moko oyo azali Motatoli te, oyo mwana na ye atalaki kasɛti video Noé na ndako ya moto mosusu, atindelaki biro ya filiale likabo ya dolare 90 mpe atunaki soki tozali na bakasɛti video mosusu mpo na bana. Bakasɛti video oyo ebongiseli ya Yehova esili kobimisa ezali mpenza kosimba mitema ya bilenge mpe ya mikóló.

2 Na libota: Libota moko ya Batatoli batalaki kasɛti video La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie (Ndenge Batatoli ya Yehova batikalaki ngwi liboso ya minyoko ya Banazi); nsima na yango mama alobaki ete: “Mokolo mobimba, nakanisaki mingi ndenge Yehova apesaki bato oyo bazali se lokola bato nyonso makasi ya koyika mpiko na makambo ya nsɔmɔ ndenge wana! Ntango nakanisaki likambo yango mingi, namonaki mpenza ete mikakatano oyo ngai nazali na yango ezali mpenza eloko te. Ndenge totalaki kasɛti video wana elongo na bana na biso esalisaki bango na komona lisusu polele ete basengeli kotyelaka Yehova motema. Lokola na nsima totalelaki elongo na bana na biso ya basi makambo oyo tomonaki na kasɛti video yango, tosalisaki bango báyeba ndenge ya kosala soki bakutani na matumoli mpe minyoko.”

3 Na eteyelo: Na lisolo moko oyo asalaki na kelasi na bango, elenge moko Motatoli alakisaki mpe ndambo ya kasɛti video Fermeté. Liboso, molakisi na bango azalaki koloba ete alingaka Batatoli te. Nsima ya kotala kasɛti video wana, alobaki ete: “Yango ebongoli mpenza ndenge oyo natalelaka Batatoli ya Yehova. Napesi elaka ete mbala ya nsima oyo bakoya na ndako na ngai, nakoyoka bango mpe nakobanda koyekola Biblia elongo na bango!” Nini ebongolaki ndenge oyo azalaki kotalela biso? Alobaki ete ezali mpo “tozali mpenza na bolingo mpe tozali sembo.”

4 Na mosala ya kosakola: Ndeko mwasi moko akutanaki na mwasi moko oyo, atako azalaki na mituna ya kotuna mpo na biso mpe bindimeli na biso, kasi alingaki mpenza te kozwa mikanda oyo ndeko yango alakisaki ye. Ndeko yango azongelaki ye mpe amemaki kasɛti video Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation (Batatoli ya Yehova​​—⁠Nkombo mpe ebongiseli na bango) mpe atalaki yango elongo na mwasi yango na mobali na ye. Mwasi yango na mobali na ye basepelaki mingi mpe bandimaki koyekola Biblia. Litatoli ya malamu oyo bazwaki etindaki bango bábanda koyokanisa bomoi na bango na mokano ya Nzambe.

5 Osalelaka bakasɛti video na biso mpo ete ebota mbuma malamu koleka?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto