Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g17 No. 2 nk. 8-9
  • Ntango moboti akufi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango moboti akufi
  • Lamuká!—2017
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • OYO OSENGELI KOYEBA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Mawa oyo bana bayokaka
    Lamuká!—2017
  • Nakoki kosala nini soki moboti na ngai akufi?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Lisalisi mpo na baoyo bazali kolela
    Lamuká!—2011
  • Ndenge nini nakoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—2017
g17 No. 2 nk. 8-9
Na simetiɛrɛ, mwana oyo asimbi lobɔkɔ ya mokóló

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Ntango moboti akufi

MOKAKATANO

Dami azalaki na mbula 6 ntango papa na ye akufaki na maladi babengi anévrisme. Derick azalaki na mbula 9 ntango papa na ye akufaki na maladi ya motema. Jeannie azalaki na mbula 7 ntango mama na ye akufaki nsima ya konyokwama mbula mobimba na kanser ya ovaire.a

Bilenge wana nyonso misato baboti na bango bakufaki ntango bazalaki naino bana. Osí okutaná na likambo ya ndenge wana? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo oyeba nini okoki kosala na likambo yango.b Liboso, tótala mwa makambo etali mawa.

OYO OSENGELI KOYEBA

Moto nyonso ayokaka mawa ndenge moko te. Yango elingi koloba ndenge na yo ya komonisa mawa ekoki kokesana na ndenge oyo basusu bamonisaka yango. Buku moko (Helping Teens Cope With Death) elobi boye: “Ezali te na mibeko to malako oyo esengeli kolanda mpo na kolongola mawa oyo liwa epesaka.” Likambo ya ntina ezali nde osengeli te kobomba mawa na yo. Mpo na nini? Mpo . . .

Kobomba mawa ekoki kosala yo mabe. Jeannie oyo touti kolobela, alobi boye: “Namonaki ete nasengeli kozala makasi mpe kobatela leki na ngai ya moke ya mwasi, yango wana nabombaki ndenge nazalaki komiyoka. Tii lelo, nalukaka kobomba mpasi oyo nazali na yango na motema, kosala bongo ezali mabe mpo na sante.”

Bato ya mayele bandimi likambo yango. Buku moko (The Grieving Teen) elobi boye: “Okoki te kobosana to kobomba mpo na libela ndenge ozali komiyoka. Na kozanga koyeba [mawa yango] ekoki kozonga mpe komonana na makambo lokola nkanda makasi to kobɛlabɛla.” Kobomba mawa ekoki mpe kosala ete okóma komɛla masanga mingi to drɔgɛ, kaka mpo na koluka kokitisa mpasi.

Mawa ekoki kotinda moto akóma kokanisakanisa. Na ndakisa, bato mosusu bayokelaka moto oyo akufi nkanda mpo bamiyokaka lokola “asundoli” bango. Basusu basilikelaka Nzambe mpo bakanisaka ete asengelaki kosala ete moto na bango akufa te. Bato mingi mpe bamonaka ete bamemi ngambo mpo na makambo oyo basalaki to balobaki na moto yango mpo ndenge ya kobongisa ezali lisusu te.

Na ntembe te, ezali mpasi kolobela ndenge mawa esalaka moto. Ndenge nini okoki kokitisa mpasi yango mpe kokoba kokende liboso?

OYO OKOKI KOSALA

Sololá na moto moko. Na ntango wana ya mpasi, okoki komona malamu ozala kaka yo moko. Kasi koyebisa ndeko to moninga moko ndenge oyo ozali komiyoka ekosalisa yo okitisa mawa mpe ekosala ete mpasi yango elekela yo motó te.​—Toli ya Biblia: Masese 18:24.

Komá mwa makambo na esika moko boye. Komá makambo etali moboti oyo akufi. Na ndakisa, likambo nini ya malamu koleka asalá, oyo obosanaka te? Komá bizaleli na ye ya malamu. Oyo wapi okolinga komekola na bomoi na yo?

Soki makanisi mabe ezali kotungisa yo, na ndakisa soki ozali kokoka kobosana te likambo moko ya mabe olobaki na moboti na yo liboso akufa, komá ndenge ozali komiyoka mpe ntina ozali komiyoka bongo. Na ndakisa, “nazali komona lokola namemi ngambo mpo toswanaki na papa mokolo moko liboso akufa.”

Na nsima, bwaká makanisi wana ya komiyoka lokola omemi ngambo. Buku moko (The Grieving Teen) elobi boye: “Ntina ya komipesa foti ezali te ntango oyebi ete okozwa lisusu libaku te ya kosɛnga bolimbisi. Ebongi te koloba ete moto akoki te koloba to kosala likambo moko oyo ekosɛnga ete na nsima asɛnga bolimbisi.”​—Toli ya Biblia: Yobo 10:1.

Batelá sante na yo. Zwáká ntango mingi ya kopema, saláká ngalasisi mingi mpe lyáká malamu. Soki ozali koyoka mposa ya kolya te, na esika olya bilei ya kilo, lyáká mwa biloko ya mikemike oyo etongaka nzoto tii ntango mposa ya kolya ekozonga. Kolya te bilei oyo etongaka nzoto te to komɛla masanga te mpo na koluka kokitisa mawa, yango ekobebisa lisusu makambo.

Yebisá Nzambe na libondeli. Biblia elobi: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.” (Nzembo 55:22) Libondeli ezali kaka te likambo ya kosala mpo omiyoka malamu. Ezali mpenza nde kosolola na Nzambe oyo “abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”​—2 Bakorinti 1:3, 4.

Lolenge moko oyo Nzambe abɔndisaka baoyo bazali kolela ezali na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Mpo na nini te oluka koyeba oyo Biblia eteyaka na likambo etali bato oyo bakufá mpe elikya ya lisekwa?c​—Toli ya Biblia: Nzembo 94:19.

a Okoki kotánga makambo oyo ekómelaki Dami, Derick mpe Jeannie na lisolo oyo elandi.

b Atako lisolo oyo elobeli liwa ya moboti, kasi yango etaleli mpe liwa ya ndeko to ya moninga moko.

c Talá mokapo 16 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, volimi 1. Okoki mpe kozwa yango ofele na www.pr2711.com. Kende esika bakomi MIKANDA.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”​—Masese 18:24.

  • “Nakoloba na bololo ya molimo na ngai!”​—Yobo 10:1.

  • “Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo [Nzambe] ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.”​—Nzembo 94:19.

OKOKI KOSALISA BASUSU

“Ngai na libota na ngai tozali Batatoli ya Yehova. Toyebi bana mibale oyo mama na bango akufaki na kanser eleki mwa bambula. Bazalaki na mbula 6 mpe 3, kaka bambula oyo ngai ná leki na ngai ya mwasi tozalaki na yango ntango papa na biso akufaki eleki sikoyo mbula soki 17.

“Ngai, mama, leki na ngai ya mwasi ná oyo ya mobali tozwaki ekateli ya kosalisa libota yango. Tozalaki kobengisa bango mbala mingi. Soki bazali na mposa ya koloba, tozalaki kotikela bango nzela. Tozalaki kolekisa ntango ná bango mpe tozalaki kosala nyonso oyo bazalaki na yango mposa na ntango wana, ezala soki bazali na mposa ya moto ya kosakana na bango, koyoka bango to kopesa bango toli.”

“Soki moboti akufi esalaka mpenza mpasi mpe okobosana yango te. Mpasi yango ekoki kokita, kasi ekozongela yo ntango nyonso na makanisi. Nayebaki mpasi oyo libota wana ezalaki na yango, yango wana nayokaka esengo ndenge libota na biso esalisaki bango. Ekómisaki boninga na biso ná bango makasi mpe biso na biso tokómaki koyokana lisusu malamu.”​—Dami.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto