Maloba ya ebandeli
Lelo oyo, bato mingi bazali na makambo ebele ya kosala, yango ebebisi boninga mpe boyokani na kati ya mabota.
Ndenge nini tokoki kosalela ntango na biso malamu?
Moto moko ya bwanya akomaki boye: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”—Mosakoli 4:6.
Nimero oyo ya Lamuká! epesi batoli oyo ebongi oyo ekosalisa biso tósalela ntango na biso na bwanya, mpe elobeli makambo tosengeli kotya na esika ya liboso.