Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g18 No. 3 nk. 6-13
  • Oyo okoki kosala mpo na kolonga mpasi wana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo okoki kosala mpo na kolonga mpasi wana
  • Lamuká!—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1: NDIMÁ BANDEKO MPE BANINGA BÁSALISA YO
  • 2: LANDELÁKÁ KOLYA NA YO, MPE SALÁKÁ MWA NGALASISI
  • 3: LALÁKÁ MINGI
  • 4: KOTINGAMA KAKA NA LIKAMBO MOKO TE
  • 5: KIMÁ BIZALELI OYO EBEBISAKA NZOTO
  • 6: YEBÁ KOKABOLA NTANGO
  • 7: BATELÁ PROGRAMƐ YA MALAMU
  • 8: KOWELA TE KOZWA MIKANO YA MINENE
  • 9: KANISÁKÁ MOWEI
  • 10: KENDE EPAI MOSUSU
  • 11: SALISÁ BATO MOSUSU
  • 12: TALELÁ LISUSU MAKAMBO OYO ELEKI NTINA
  • Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Ndenge nini nakoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Masolo oyo ezali na kati: Okoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa
    Lamuká!—2018
  • Lisalisi mpo na baoyo bazali kolela
    Lamuká!—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—2018
g18 No. 3 nk. 6-13
Bato bazali kosakana na litaka mpe kokanga bafɔtɔ pembeni ya mai

OKOKI KOLONGA MPASI YA KOBUNGISA MOTO NA LIWA

Oyo okoki kosala mpo na kolonga mpasi wana

Soki oluki toli mpo na kolonga mpasi oyo moto ayokaka ntango ndeko to moninga akufi, okozwa yango ebele; mosusu ekosalisa yo, kasi mosusu ekosalisa mpenza te. Ezali bongo mbala mosusu mpo, ndenge tolobaki yango, bato nyonso bayokaka mawa ndenge moko te. Likambo oyo esalisi moto moko, ntango mosusu ekosalisa moto mosusu te.

Atako bongo, ezali na makambo oyo esalisá bato mingi. Bato oyo bapesaka toli na baoyo bazali na mpasi mpo ndeko to moninga na bango akufi bazongelaka makambo yango mingi, mpe makanisi oyo bapesaka eyokani na makanisi ya Biblia, mokanda oyo ezali na maloba ya bwanya.

1: NDIMÁ BANDEKO MPE BANINGA BÁSALISA YO

  • Bato bazali kosakana na litaka mpe kokanga bafɔtɔ pembeni ya mai

    Bato mosusu ya mayele balobaka ete likambo wana ezali na ntina mingi mpo na moto oyo azali na mpasi mpo ndeko to moninga akufi. Kasi, okoki kolinga ntango mosusu ozala yo moko. Okoki ata koyoka nkanda ntango bato mosusu bazali koluka kosalisa yo. Yango ezali mabe te.

  • Kokanisa te ete osengeli ntango nyonso kozala esika moko na bato, kasi koluka mpe te kozala ntango nyonso mosika na bato. Mpo, ata ndɛlɛ, okozala na mposa básalisa yo. Yebisá bango na boboto makambo oyo olingi mpe oyo olingi te na ntango boye to boye.

  • Yebá kokabola ntango oyo okoki kofandaka ná bato mpe ntango oyo okosepela kozala yo moko.

TOLI: “Bato mibale baleki moto moko . . . Mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.”​—Mosakoli 4:9, 10.

2: LANDELÁKÁ KOLYA NA YO, MPE SALÁKÁ MWA NGALASISI

  • Soki ozali kolya malamu, ekosalisa yo okitisa mpasi ya makanisi oyo ozali na yango mpo ndeko to moninga akufi. Lyáká mbuma ndenge na ndenge, ndunda, mpe kolyaka biloko ya mafutamafuta te.

  • Mɛláká mai mingi mpe masanga mosusu ya makasimakasi te.

  • Soki ozali mpenza koyoka mposa ya kolya te, lyáká mokemoke, kasi mbala na mbala. Okoki mpe kosɛnga monganga akomela yo bavitamini.a

  • Kotambola nokinoki mpe kosala mwa ngalasisi ekoki kokitisa makambo oyo ezali kotungisa yo. Ntango ozali kosala ngalasisi, okoki mpe kokanisa makambo oyo okoki kosala mpe ekoki kobosanisa yo mwa moke mitungisi na yo.

TOLI: “Ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko, kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.”​—Baefese 5:29.

3: LALÁKÁ MINGI

  • Mbeto

    Kolala ezali na ntina; kasi ezali lisusu na ntina mingi mpo na moto oyo ndeko to moninga na ye akufi, mpo mpasi oyo ayokaka elɛmbisaka mpe nzoto.

  • Boyá komɛla mingi kafe to masanga ya makasi, mpo biloko wana mibale ekoki kokimisa yo mpɔngi.

TOLI: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”​—Mosakoli 4:6.

4: KOTINGAMA KAKA NA LIKAMBO MOKO TE

  • Mwasi moko azali koyebisa moninga moko mawa oyo azali na yango

    Yebá ete bato nyonso bayokaka mawa ndenge moko te. Yango wana ekosɛnga ete opona makambo oyo ekosalisa yo mpenza.

  • Bato mingi bamonaka ete koyebisa basusu mpasi na bango esalisaka bango; kasi bato mosusu bamonaka malamu báyebisa moto te ndenge oyo bazali koyoka. Bato ya mayele bazali na likanisi moko te na likambo ya koyeba soki koloba na basusu ndenge oyo ozali koyoka esalisaka mpenza. Soki ozali na mposa ya kosolola na moto, kasi ozali kokakatana, ekoki kozala malamu obanda koyebisa moninga moko ya motema makambo mokemoke.

  • Bato mosusu bamonaka ete kolela esalisaka ntango bazali na mawa; nzokande, bato mosusu babundaka na mpasi na bango kozanga ete bálela.

TOLI: “Motema eyebi mawa na yango mpenza.”​—Masese 14:10, haut-fleuve.

5: KIMÁ BIZALELI OYO EBEBISAKA NZOTO

  • Mobali moko azali komɛla masanga

    Bato mosusu oyo bazali na mpasi mpo ndeko to moninga na bango akufi bakómaka komɛla masangá mingi to mpe bangi mpo na kolongola susi. Biloko yango ekoki kolongola moto susi mpo na mwa ntango; nzokande, ebebisaka nzoto mpe ekoki kobendela moto mindɔndɔ. Ebongi oluka ndenge ya malamu ya kokitisa susi na yo.

TOLI: “Tómipɛtola na mbindo nyonso.”​—2 Bakorinti 7:1.

6: YEBÁ KOKABOLA NTANGO

  • Bato mingi bamonaka malamu kokabola ntango ya kolela (kokanisa makambo oyo ezali kotungisa bango) ná ntango ya kobosana mwa moke (kosala makambo oyo ekobosanisa bango mpasi na bango).

  • Okoki kobosana mwa moke mpasi na yo soki ozali kolekisa ntango ná baninga, koyekola makambo ya sika, to kokende kozwa mwa mopɛpɛ.

  • Ntango mikolo ezali koleka, ndenge oyo ozali kokabola ntango ekobanda mpe kobongwana. Okoki komona ete ntango ya kobosana mpasi na yo ebandi kokóma mingi​—ndenge wana nde mpasi ya kobungisa moto na liwa elimwaka mokemoke.

TOLI: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango, . . . ntango ya kolela mpe ntango ya kosɛka; ntango ya koganga na kolela mpe ntango ya kobina.”​—Mosakoli 3:1, 4.

7: BATELÁ PROGRAMƐ YA MALAMU

  • Mwasi moko azali kokoma programɛ na ye na agenda

    Koumela te mpo na kozongela makambo oyo omesaná kosala.

  • Soki ozali kolanda programɛ malamu ya kolala, ya mosala, mpe ya makambo mosusu, ekosalisa yo ozongela makambo oyo omesaná kosala.

  • Kolekisa ntango na makambo ya malamu ekoki kosalisa yo okitisa mpasi na motema.

TOLI: “Akokanisa mingi te mikolo ya bomoi na ye, mpamba te Nzambe ya solo azali kopesa ye mosala ná esengo na motema na ye.”​—Mosakoli 5:20.

8: KOWELA TE KOZWA MIKANO YA MINENE

  • Bato mingi oyo bawelaki kozwa mikano ya minene nsima ya liwa ya ndeko to moninga bayaki komona na nsima ete basalaki mabe.

  • Soki ekoki kosalema, zelá mwa moke liboso ya kokende kofanda esika mosusu, ya koluka mosala mosusu, ya kokaba to kobwaka biloko ya mowei.

TOLI: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.”​—Masese 21:5.

9: KANISÁKÁ MOWEI

  • Mobali moko azali kolakisa baninga na ye bafɔtɔ ya mwasi na ye oyo akufá

    Bato mingi bamonaka malamu kosala makambo oyo esalisaka bango bábatela basuvenire ya mowei.

  • Kosangisa bafɔtɔ to biloko mosusu to mpe kokoma badati mosusu to makambo oyo olingi kokanisaka ekoki kosalisa yo.

  • Batelá biloko oyo ekobanda kolamwisa basuvenire ya malamu mpo otala yango na ntango oyo okomona malamu.

TOLI: “Kanisá mikolo ya kala.”​—Kolimbola Mibeko 32:7.

10: KENDE EPAI MOSUSU

  • Okoki kokende mwa konje.

  • Soki okokoka te kokende konje ya molai, okoki ata kolekisa mokolo moko to mibale na likambo moko oyo ekosepelisa yo, na ndakisa kokende kotambola, kokende kotala esika moko boye, to kobima moke na motuka.

  • Kosala ata mwa makambo oyo omesaná kosala te ekoki kosalisa yo obosana moke mawa na yo.

TOLI: “Bóya, kaka bino moko, na esika oyo bato bazali te mpe bópema mwa moke.”​—Marko 6:31.

11: SALISÁ BATO MOSUSU

  • Elenge mwasi moko azali kosalisa mobange moko na kosomba biloko

    Yebá ete ntango nyonso oyo okolekisa na kosalisa bato mosusu ekoki kosalisa yo moko oyoka malamu.

  • Okoki kobanda na kosalisa bato oyo bazali mpe bandeko to baninga ya moto oyo akufi, oyo bakoki kozala na mposa okabola na bango mawa.

  • Soki ozali kosalisa mpe kolendisa basusu, ekoki kozongisela yo esengo na bomoi, oyo okómaki komona ete ezali lisusu na ntina te.

TOLI: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

12: TALELÁ LISUSU MAKAMBO OYO ELEKI NTINA

  • Kobungisa ndeko to moninga na liwa ekoki kosalisa moto ayeba sikoyo makambo nini eleki ntina na bomoi.

  • Salelá libaku yango mpo na kotalela lisusu ndenge oyo ozali kotambwisa bomoi na yo.

  • Soki esengeli, luká kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso.

TOLI: “Kokende na ndako ya kolela ebembe eleki kokende na ndako ya fɛti, mpo yango ezali nsuka ya bato nyonso; mpe moto ya bomoi asengeli kotya yango na motema na ye.”​—Mosakoli 7:2.

KOLONGA MPASI YA KOBUNGISA MOTO NA LIWA | NA MOKUSE

  • 1: NDIMÁ BANDEKO MPE BANINGA BÁSALISA YO

    Yebá kokabola ntango oyo okoki kofandaka ná bato mpe ntango oyo okosepela kozala yo moko.

  • 2: LANDELÁKÁ KOLYA NA YO, MPE SALÁKÁ MWA NGALASISI

    Lyáká bilei oyo etongaka nzoto, mɛláká mai mingi, mpe saláká mwa ngalasisi.

  • 3: LALÁKÁ MINGI

    Kobosana te ete mpɔngi ezali na ntina mingi mpo na kosilisa kolɛmba nzoto oyo moto ayokaka ntango ndeko to moninga akufi.

  • 4: KOTINGAMA KAKA NA LIKAMBO MOKO TE

    Lokola bato nyonso bayokaka mawa ndenge moko te, poná makambo oyo ekosalisa yo.

  • 5: KIMÁ BIZALELI OYO EBEBISAKA NZOTO

    Boyá komɛla masangá mingi to mpe bangi, mpo yango ebebisaka nzoto mpe na esika esalisa yo, ekobakisela yo nde mitungisi.

  • 6: YEBÁ KOKABOLA NTANGO

    Soki ntango mosusu ozali kolela, ntango mosusu mpe zaláká na baninga mpe sakanáká mwa moke to kende kozwa mwa mopɛpɛ.

  • 7: BATELÁ PROGRAMƐ YA MALAMU

    Zalá na programɛ oyo ekosalisa yo ozongela makambo oyo omesaná kosala.

  • 8: KOWELA TE KOZWA MIKANO YA MINENE

    Soki ekoki kosalema, zelá ata mbula mobimba eleka liboso ya kozwa mikano ya minene, mpo na nsima omona te ete osalaki mabe.

  • 9: KANISÁKÁ MOWEI

    Sangisá bafɔtɔ to basuvenire mosusu mpe komá badati to makambo mosusu oyo ekosalisa yo obosana mowei te.

  • 10: KENDE EPAI MOSUSU

    Tiká naino makambo oyo osalaka, ata mpo na mokolo moko kaka.

  • 11: SALISÁ BATO MOSUSU

    Salisá bato mosusu oyo bazali mpe bandeko to baninga ya moto oyo akufi mpo ozongela esengo na bomoi.

  • 12: TALELÁ LISUSU MAKAMBO OYO ELEKI NTINA

    Salelá libaku yango mpo na kotalela makambo nini eleki ntina na bomoi mpe, soki esengeli, luká kotya yango na esika ya liboso.

Mpo na koloba solo, eloko moko te ekosilisa mpasi nyonso oyo ozali koyoka. Atako bongo, bato mingi oyo ndeko to moninga na bango akufá balobaka ete kosala makambo ya malamu, lokola oyo tolobeli na lisolo oyo, esalisaki bango. Ya solo, totángi makambo nyonso te oyo moto akoki kosala mpo na kokitisa mpasi ya motema na ye. Kasi, soki omeki kosalela makanisi mosusu oyo topesi, ekoki kosalisa yo ata mwa moke.

a Lamuká! etindaka moto te andima lolenge boye to boye ya komisalisa.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto