Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g18 No. 3 nk. 14-15
  • Lisalisi oyo eleki malamu mpo na baoyo babungisi moto na liwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisalisi oyo eleki malamu mpo na baoyo babungisi moto na liwa
  • Lamuká!—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • TÁNGÁ MAKAMBO MOSUSU ETALI ELIKYA MPO NA BATO OYO BAKUFÁ
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2018
  • Masolo oyo ezali na kati: Okoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa
    Lamuká!—2018
  • Lisalisi mpo na baoyo bazali kolela
    Lamuká!—2011
  • Ata tozali na mawa, tozangi elikya te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—2018
g18 No. 3 nk. 14-15
Na Paradiso, bato bazali kozela mpo na koyamba bandeko mpe baninga na bango oyo bakufá, oyo basekwi

OKOKI KOLONGA MPASI YA KOBUNGISA MOTO NA LIWA

Lisalisi oyo eleki malamu mpo na baoyo babungisi moto na liwa

NA BAMBULA OYO, BATO MINGI YA MAYELE BAZALI KOYEKOLA MPASI YA KOBUNGISA NDEKO TO MONINGA NA LIWA. Kasi, ndenge tomoni yango, mbala mingi batoli eleki malamu oyo bato ya mayele bapesaka eyokanaka na bwanya oyo ezali na Biblia. Likambo yango emonisi polele ete batoli ya Biblia esilaka ngala te. Nzokande, Biblia esuki kaka te na kopesa batoli ya malamu. Ezali na mateya oyo tokoki kokuta epai mosusu te, oyo ekoki mpenza kosalisa moto oyo ndeko to moninga na ye akufi.

  • Ndeko to moninga na biso oyo akufi akei te na esika oyo azali konyokwama

    Mosakoli 9:5 elobi: “Bakufi bayebi ata eloko moko te.” “Makanisi na [bango] ekufi.” (Nzembo 146:4) Yango wana, Biblia ekokanisi liwa na mpɔngi.​—Yoane 11:11.

  • Kondima makasi epai ya Nzambe ekitisaka motema

    Nzembo 34:15 elobi: “Miso ya Yehovaa ezali epai ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.” Kobondela Nzambe mpo na koyebisa ye mpasi oyo tozali na yango na motema ezalaka kaka te mpo na kokitisa motema. Libondeli esalisaka mpe biso tókóma baninga ya Nzambe, oyo akoki kosalela nguya na ye mpo na kopesa biso makasi.

  • Avenire ya malamu mingi

    Kanisá ntango bato oyo bazali na lilita bakozonga lisusu na bomoi awa na mabele! Biblia elobeli ntango yango na bisika mingi. Biblia elobeli ndenge oyo makambo ekozala awa na mabele na ntango wana; elobi ete Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na [biso], mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Bato mingi oyo bandimaka Yehova bazwaka makasi mingi oyo esalisaka bango mpe epesaka bango elikya ya komona lisusu bandeko to baninga na bango oyo bakufá. Na ndakisa, Ann, oyo mobali na ye akufaki ntango azalaki na mbula 65, alobi boye: “Biblia epesaka ngai elikya ete bandeko na biso oyo bakufá bazali konyokwama te mpe Nzambe akosekwisa bato nyonso oyo, atako bakufá, abatelaka bango na makanisi na ye. Makanisi wana ezongelaka ngai mbala nyonso oyo nazali kokanisa molongani na ngai, mpe ezali kosalisa ngai na likambo oyo eleki mpasi oyo ekómelá ngai!”

Tina, oyo tolobelaki na masolo eleki, alobi boye: “Banda Timo akufá, namonaka mpenza ndenge Nzambe asalisaka ngai. Namonaka mpenza lobɔkɔ ya Nzambe na ntango ya mpasi. Nandimaka mpenza elikya ya lisekwa. Epesaka ngai makasi mpo nazonga nsima te tii mokolo nakomona lisusu Timo.”

Bato mingi oyo bandimelaka Biblia bakanisaka mpe bongo. Ata soki okanisaka ete makambo oyo Biblia elobi ekoki kosalema te, zwá ata mwa ntango mpo na kotalela makambo oyo ezali kondimisa ete batoli na yango mpe makambo oyo elaki ezali ya solo. Mbala mosusu okomona ete Biblia epesi lisalisi oyo eleki malamu mpo na bato oyo babungisi moto na liwa.

TÁNGÁ MAKAMBO MOSUSU ETALI ELIKYA MPO NA BATO OYO BAKUFÁ

Talá bavideo oyo elobeli likambo yango na site Internet na biso, jw.org

Na Paradiso, bato bazali kozela mpo na koyamba bandeko mpe baninga na bango oyo bakufá, oyo basekwi

Biblia elobi ete mokolo mosusu tokoyamba bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá

MOTO AKÓMAKA NDENGE NINI SOKI AKUFI?

Soki moto akufi akendaka wapi?

Tokendaka wapi soki tokufi? Biblia epesi eyano oyo ezali mpenza kokitisa motema

Fungolá esika bakomi BIBLIOTƐKƐ > BAVIDEO (Finá na: BIBLIA)

OKOLINGA KOYOKA NSANGO MALAMU?

Okolinga koyoka nsango ya malamu?

Lokola tozali se koyoka bansango ya mabe, epai wapi tokoki kozwa nsango ya malamu?

Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > KIMYA MPE ESENGO

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto