Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g19 No. 2 nk. 12-13
  • Kolanda toli ya mikóló

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolanda toli ya mikóló
  • Lamuká!—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOLANDA TOLI YA MIKÓLÓ ESƐNGI NINI?
  • MPO NA NINI TOLI YA MIKÓLÓ EZALI NA NTINA?
  • NDENGE YA KOPESA TOLI
  • Okoki kosala nini mpo obɔkɔla bana na yo malamu
    Lisalisi mpo na libota
  • Bolenge—Kosalisa bana mpo bákóma mikóló ya malamu
    Lamuká!—2012
  • Batoli ya solosolo mpo na kobɔkɔla bana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Apɛndisi​—Mituna oyo baboti batunaka
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Makambo mosusu
Lamuká!—2019
g19 No. 2 nk. 12-13
Mama moko azali kolakisa mwana na ye bafɔtɔ na ye ya kala

LITEYA 5

Kolanda toli ya mikóló

KOLANDA TOLI YA MIKÓLÓ ESƐNGI NINI?

Bana basengeli na toli mpe litambwisi ya mikóló. Lokola ozali moboti, yo nde osengeli kosala yango; kutu ezali mokumba na yo. Nzokande, mikóló mosusu bakoki mpe kosalisa bana na yo.

MPO NA NINI TOLI YA MIKÓLÓ EZALI NA NTINA?

Na bamboka mingi, bilenge balekisaka ntango mingi te na mikóló. Mpo na nini?

  • Bana balekisaka ntango mingi na kelasi, mpe kuna, bana nde bazalaka mingi koleka balakisi mpe mikóló mosusu.

  • Nsima ya kelasi, bana mosusu bazalaka bango moko na ndako mpo baboti bakendaki mosala.

  • Ankɛtɛ moko emonisi ete na États-Unis, bana ya mbula 8 tii 12 balekisaka ngonga soki 6 mokolo na mokolo na kotala televizyo, koyoka miziki to kosala masano ya video.a

Buku moko (Hold On to Your Kids) elobi: ‘Na esika ya koluka toli, litambwisi mpe mateya epai ya mama, tata, balakisi, to mikóló mosusu, bilenge balukaka yango epai ya baninga na bango.’

NDENGE YA KOPESA TOLI

Lekisá ntango elongo na bana na yo.

TOLI YA BIBLIA: “Bɔkɔlá mwana . . . na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye; ata ntango akokóma mobange akopɛngwa na yango te.”​—Masese 22:6.

Mbala mingi, bana bazalaka na mposa ya toli ya baboti na bango. Kutu, bato ya mayele balobi ete ata ntango bana bakómi na mbula 13, mbala mingi basepelaka na toli ya baboti na bango koleka oyo ya baninga na bango. Na buku na ye (You and Your Adolescent), Doktɛrɛ Laurence Steinberg akomi ete: “Banda na bolenge tii ntango bakokóma mikóló, bana balandaka mingimingi makanisi mpe bizaleli oyo baboti bateyaka bango.” Abakisi ete: “Bilenge balingaka koyeba makanisi na yo mpe koyoka makambo oyo okoloba, ata soki bakondima yango nyonso te.”

Lokola ezali bongo, salá nyonso mpo na kopesa bango toli. Lekisáká ntango elongo na bana na yo mpe yebisaká bango makanisi na yo, bizaleli oyo omonaka ete yango nde ebongi mpe makambo oyo okutaná na yango na bomoi.

Lukelá ye moto oyo akoki kosalisa ye.

TOLI YA BIBLIA: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”​—Masese 13:20.

Okoki kolukela mwana na yo ya elenge mokóló moko oyo azali na bizaleli malamu mpo asalisa ye. Okoki kosala ete mokóló yango alekisaka ntango elongo na mwana na yo. Yango elimboli te ete azwi mokumba na yo ya moboti. Kasi, toli oyo mokóló yango oyo mwana azali kotyela motema mpe oyo oyebi ete akoki kobebisa ye te, ekoki kosalisa yo na kobɔkɔla mwana na yo. Biblia emonisi ete atako Timote akómaki mokóló, kozala elongo na ntoma Paulo esalisaki ye mpenza mpe Paulo asepelaki mingi kozala moninga ya Timote.​—Bafilipi 2:20, 22.

Lelo oyo, mabota mingi ezali kofanda lisusu esika moko te, mpe mbala mosusu bankɔkɔ, banɔkɔ, batata-mwasi, mpe bandeko mosusu bafandaka esika mosusu. Soki ezali bongo mpe mpo na yo, salá makasi oluka mikóló oyo bazali na bizaleli oyo okolinga komona mpe epai ya bana na yo mpo básalisa bango.

a Ankɛtɛ yango emonisi ete bilenge mingi balekisaka pene ya ngonga 9 na masano mokolo na mokolo. Ankɛtɛ yango elobeli te ntango oyo bana mpe bilenge balekisaka na Internet na kelasi to na kosala badevuare na ndako.

Mama moko azali kolakisa mwana na ye bafɔtɔ na ye ya kala

BANDA KOTEYA YE SIKOYO

Mbala mingi, mwana oyo alukaka toli ya mikóló azalaka na bwanya mpe akómaka moto oyo akɔmɛli na makanisi

Ndakisa na yo nde eteya

  • Nazalaka ndakisa malamu mpo na bana na ngai?

  • Bana na ngai bamonaka ete ngai mpe nalukaka toli epai ya basusu oyo bayebi makambo mingi na bomoi?

  • Nalekisaka ntango elongo na bana na ngai mpo na komonisa bango ete bazali na motuya mingi epai na ngai?

Makambo oyo baboti mosusu balobi

“Ntango nazali kosala mosala, mbala mosusu mwana na ngai ya mwasi akataka ngai mpe ayebisaka ngai ete alingi tósolola. Nayokaka ye naino mwa moke mpe nayebisaka ye ete asengeli kozela mwa moke mpo tósolola malamu. Ngai na mwasi na ngai topesaka ndakisa malamu mpo mwana na biso amona ete tosalelaka makambo oyo toteyaka ye.”​—David.

“Ntango mwana na biso ya mwasi abotamaki, ngai na mobali na ngai toyokanaki ete natika mosala mpo esalisa ngai nafanda na ndako mpo na kobɔkɔla ye. Nasepelaka na ekateli oyo tozwaki. Ezali na ntina mingi kosala nyonso oyo okoki mpo na kozala elongo na mwana na yo mpo yango ekosalisa ye azwa mateya mpe litambwisi ya malamu. Likambo eleki ntina, kozala elongo na mwana na yo ekosalisa ye amona ete olingaka ye mingi.”​—Lisa.

KOLEKISA NTANGO ELONGO NA MIKÓLÓ

“Bana na ngai bakolá ná mikóló ya bambula ekeseni, yango esalisaki bango bayeba makambo oyo bato mosusu bakutana na yango na bomoi. Na ndakisa, ekamwisaki bango ntango nkɔkɔ na ngai ya mwasi ayebisaki bango ete ntango azalaki mwana moke, bazalaki libota ya liboso oyo bazalaki na mwinda ya kura. Mpe bato oyo bazalaki zingazinga, bazalaki koya na ndako na bango na esika ya kolamba (cuisine) mpo na kotala ndenge ampulɛ epelaka mpe ekufaka. Lisolo yango esalisaki bana na ngai bamona ndenge oyo bomoi ezalaki liboso. Koyoka lisolo yango esalisaki lisusu bango bakóma na limemya makasi epai ya nkɔkɔ na bango mpe epai ya mibange mosusu. Soki bana bazali kolekisa ntango mingi elongo na mikóló na esika ya kolekisa kaka ntango elongo na baninga ya mbula na bango, ekosalisa bango bayekola makambo mingi.”​—Maranda.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto