Batoli ya solosolo mpo na kobɔkɔla bana
“RUTH alobaki mpo na zemi ya liboso oyo azwaki ete: “Nazalaki na mbula 19 mpe nayebaki eloko moko te na makambo ya kobɔkɔla bana. Atako bongo, nazalaki mosika mpenza na libota na ngai.” Lokola ye moko azalaki naino mwana, azalaki naino na likanisi ya kobota te. Epai wapi akokaki kozwa toli ya malamu?
Epai mosusu, Jan oyo akolisá bana mibale, amikundoli mpe alobi boye: “Na ebandeli, nazalaki kokanisa ete kobɔkɔla bana ezali mpasi te. Kasi, mosika te namonaki ete nayebi eloko te.” Ezala baboti oyo bazalaki kobanga ete bakokoka kobɔkɔla bana na bango te to baoyo bakanisaki ete bakokoka kasi bakoki te, bakozwa lisalisi wapi?
Lelo oyo, baboti mingi balukaka toli na Internet. Kasi, okoki komituna soki tokoki kotyela batoli oyo tozwi na Internet motema. Tosengeli mpenza kozala ekɛngɛ. Na Internet, okoki koyeba soki nani azali kopesa yo toli? Ndenge nini okoyeba soki ye moko abɔkɔlá bana na ye malamu? Ezali polele ete osengeli kozwa na lisɛki te makambo etali bomoi ya libota na yo. Ndenge lisolo eleki emonisi yango, ntango mosusu ata toli ya banganga-mayele esungaka te. Na yango, okozwa toli ya malamu wapi?
Toli ya malamu koleka mpo na kobɔkɔla bana ezali oyo ya Yehova Nzambe, Mokeli ya libota. (Baefese 3:15) Kaka ye nde azali nganga-mayele ya solosolo. Na Liloba na ye, Biblia, apesi malako ya malamu, oyo ekoki mpenza kosalisa biso. (Nzembo 32:8; Yisaya 48:17, 18) Biso nde tosengeli kopona soki tokolanda yango to te.
Batunaki baboti oyo babɔkɔlá bana na bango malamu mpe bakómá mikóló oyo bazali kobanga Nzambe báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango ntango babɔkɔlaki bango. Balobaki ete soki balongaki, ezali libosoliboso mpo bazalaki kosalela mitinda ya Biblia. Bamonaki ete ata lelo oyo batoli ya Biblia ezali kaka malamu ndenge ezalaki ntango bakomaki yango.
Tólekisaka ntango elongo na bana
Ntango batunaki Catherine ayebisa toli oyo esalisaki ye mingi koleka, atángaki mbala moko Deteronome 6:7. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Okolakisa [mitinda ya Biblia] na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.” Catherine amonaki ete mpo na kosalela toli yango, asengeli kolekisaka ntango elongo na bana na ye.
Okoki koloba ete: ‘Koloba ezali mpasi te, kasi kosala nde mama na likambo.’ Lokola na mabota mingi ná tata ná mama basalaka mpo na kolukela mabota na bango, ndenge nini baboti bakoki kolekisaka ntango elongo na bana na bango? Torlief, oyo azali lelo oyo na mwana mobali oyo abalá mpe abotá, alobi ete mpo na kobɔkɔla bana malamu, esengeli kolanda toli ya Deteronome. Soki ozali kokende na bana na yo bipai nyonso, mabaku ya kosolola ekozanga te. Alobi boye: “Ngai ná mwana na ngai tozalaki kosala baprogramɛ nyonso ya ndako na biso elongo. Libota mobimba tozalaki kosala mibembo elongo mpe kolya elongo.” Yango ebimisaki litomba nini? Alobi boye: “Mwana na biso azalaki abangaka te koyebisa biso makanisi na ye.”
Ezali boni soki bosololaka te na libota mpe bolobelanaka kaka makambo makasimakas? Ezalaka bongo ntango mosusu soki bana bakoli. Na likambo wana mpe, kolekisaka ntango mingi elongo na bango ekoki kosalisa. Ken, mobali ya Catherine, alobi ete ntango mwana na bango ya mwasi akokómaki mwa moto, akómaki komilelalela ete Ken ayokelaka ye te. Bilenge nyonso bamilelalelaka bongo. Ken asalaki nini? Alobi boye: “Nazwaki ekateli ya kolekisaka ntango mingi na ye mpe kotalela elongo na ye makanisi na ye, mayoki na ye mpe makambo oyo ezali kotungisa ye. Yango esungaki mpenza.” (Masese 20:5) Kasi, Ken akanisi ete mayele wana elongaki mpo kosolola ezalaki likambo ya sika te na libota na ye. Alobi boye: “Ngai ná mwana na ngai tozalaki ntango nyonso koyokana malamu, yango wana azalaki kokakatana te koyebisa makanisi na ye.”
Likambo ya kokamwa, na ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalema, bilenge mingi, koleka mikóló, balobaki ete baboti balekisaka ntango mingi te elongo na bana na bango. Na yango, ekozala malamu tólanda toli ya Biblia. Lekisaká ntango mingi elongo na bana na yo: ntango ozali kopema mpe na mosala, na ndako mpe ntango okei mobembo, ntango olamuki na ntɔngɔ mpe na butu liboso olala. Soki likoki ezali, memaká bango epai nyonso okei. Ndenge Deteronome 6:7 emonisi yango, ezali na eloko moko te oyo ekokokani na kolekisa ntango elongo na bana na yo.
Tóteyaka bango bizaleli ya malamu
Mario, oyo azali tata ya bana mibale, alobi mpe boye: “Lingáká bana na yo mingi mpe tángeláká bango mikanda.” Kasi, kosala yango kaka mpo na kofungola bango mayele te. Osengeli koteya bango kokesenisa malamu ná mabe. Mario abakisi boye: “Yekoláká na bango Biblia.”
Na likambo yango, Biblia elobi boye: “Bóyokisaka bana na bino kanda té, kasi bóbokola bango na mateya pe batoli ya Nkolo.” (Baefese 6:4, Bible na lingala ya lelo oyo) Lelo oyo, na bandako mingi bateyaka lisusu bana bizaleli ya malamu te. Bato mosusu balobaka ete ntango bakokola, bango moko bakopona etamboli oyo balingi kolanda. Yo mpe okanisi bongo? Kaka ndenge nzoto ya bana esɛngaka bályaka malamu mpo bákola malamu mpe bázala nzoto makasi mpe kolɔngɔnɔ, makanisi mpe mitema na bango ezali mpe na mposa ya malako. Soki oteyi bana na yo bizaleli ya malamu te na ndako, na ntembe te bakolanda makanisi ya baninga na bango ya kelasi mpe ya balakisi na bango, to makambo oyo bazali komona na televizyo to koyoka na radio.
Biblia ekoki kosalisa baboti báteya bana na bango kokesenisa malamu ná mabe. (2 Timote 3:16, 17) Jeff, nkulutu moko ya makoki mpenza oyo akolisá bana mibale, alobi ete baboti basengeli kosalela Biblia mpo na koteya bana na bango bizaleli ya malamu. Alobi boye: “Kosalela Biblia ekosalisa bana báyeba makanisi ya Yehova na likambo boye to boye, kasi kaka ya tata ná mama te. Tomonaki mpenza nguya oyo Biblia ezalaka na yango na makanisi mpe na mitema. Mpo na kolongola bizaleli to makanisi ya mabe epai ya bana, tozalaki kozwa ntango ya koluka vɛrsɛ moko oyo ebongi. Na nsima, tozalaki kobenda mwana na pembeni mpe kosɛnga ye atánga yango. Mbala mingi nsima ya kotánga, mwana azalaki kolela. Ezalaki mpenza kokamwisa biso. Biblia ezalaki na nguya makasi koleka makambo mosusu nyonso oyo tokokaki koloba to kosala.”
Baebele 4:12 elobi ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya . . . mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” Nsango ya Biblia ezali kaka te makanisi to mayele ya bato oyo Nzambe asalelaki mpo na kokoma yango. Ezali nde na makanisi ya Nzambe na ntina na etamboli ya bato. Yango wana, nsango ya Biblia ekeseni mpenza na batoli mosusu nyonso. Soki ozali kosalela Biblia mpo na koteya bana na yo, ozali kosalisa bango báyeba ndenge Nzambe atalelaka makambo. Mateya na yo ekozala mpenza na kilo mpe okozala na likoki ya kosimba mitema ya bana na yo.
Catherine oyo tolobelaki liboso andimi likambo yango. Alobi boye: “Soki tokutani na mikakatano, tozalaki koluka lisalisi ya Biblia, mpe ezalaki mpenza kosalisa biso!” Ekozala malamu osalelaka Biblia mingi mpo na koteya bana na yo báyeba kokesenisa malamu ná mabe.
Tózalaka makambo makasimakasi te
Ntoma Paulo alobelaki likambo mosusu ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa mpo na kobɔkɔla bana malamu. Alobaki na baninga na ye baklisto boye: “Tiká ete ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso.” (Bafilipi 4:5) Na ntembe te, yango ekosɛnga mpe bana bámona ete ozali makambo makasimakasi te. Kobosana te ete kozala makambo makasimakasi te emonisaka “bwanya oyo euti na likoló.”—Yakobo 3:17.
Kasi, ndenge nini kozala makambo makasimakasi te ekoki kosalisa mpo na kobɔkɔla bana? Ata soki toteyi bana ndenge nini, tokoki te kotambwisa bomoi na bango na makambo nyonso. Na ndakisa, Mario oyo tolobelaki liboso, azali Motatoli ya Yehova; ye alobi boye: “Tozalaki ntango nyonso kolendisa bana na biso bázwa batisimo, básala mosala ya ntango nyonso mpe bámityela mikano mosusu ya elimo. Kasi, tozalaki koyebisa bango polele ete bango moko nde bakozwa bikateli yango soki ntango na bango ekoki.” Bazwaki litomba nini? Bana na bango nyonso bazali sikoyo babongisi-nzela.
Na Bakolose 3:21, Biblia ezali kokebisa batata boye: “Bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.” Catherine asepelaka na vɛrsɛ wana mingi. Soki moboti azali na motema molai te, akobanda kosilika pambapamba to kosalela bana makambo makasimakasi. Kasi, Catherine alobi boye: “Koluka te ete bana básalaka makambo nyonso lokola yo moko.” Catherine azali mpe Motatoli ya Yehova, mpe abakisi boye: “Salisá bango bámonaka ete kosalela Yehova ezali mosala moko ya esengo.”
Jeff oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Ntango bana na biso babandaki kokola, moninga na biso moko ya motema ayebisaki biso ete ayaki komona na nsima ete mbala mingi azalaki kopesa bana na ye nzela te ya kosala makambo oyo balingi. Yango ezalaki kosepelisa bango ata moke te mpe bazalaki komona ete azali konyokola bango. Alobaki na biso ete soki tolingi tókwea na motambo yango te, tosengeli kopesaka bana na biso nzela ya kosala makambo oyo basepeli kosala.”
Jeff alobi boye: “Tomonaki ete ezalaki toli moko malamu mingi. Mpe tobandaki koluka mabaku ya kotika bana na biso básalaka makambo na bato mosusu, soki makambo yango ezali mabe te. Na yango, tozalaki na ndakisa kotuna bango ete, ‘Oyebi ete songolo mpakala azali kosala likambo boye? Yo okokende te?’ To mpe soki bana basɛngi biso tókende na bango na esika moko boye, ata soki tolɛmbaki tozalaki kosala makasi tókende, kaka mpo tókokisa mposa na bango.” Wana nde kozala makambo makasimakasi te, elingi koloba koyebaka komitya na esika na bango mpe kotikelaka bango básala oyo balingi, soki ekobuka mitinda ya Biblia te.
Tózwa litomba na toli ya Biblia
Lelo oyo, baboti mingi oyo tolobeli awa bazwá bankɔkɔ. Bazali na esengo ya komona ete bana na bango bazali mpe kobɔkɔla bana na bango kaka na mitinda oyo bango basalelaki. Yo mpe okoki kozwa litomba na mitinda ya Biblia?
Ntango Ruth oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo akómaki mama ya bana, ye ná mobali na ye bazalaki ntango mosusu komona ete bazali na mosungi te. Kasi, bazangaki mosungi te. Bazalaki na batoli kitoko ya Biblia, Liloba ya Nzambe, oyo eleki nyonso. Batatoli ya Yehova babimisi ebele ya mikanda kitoko ya mateya ya Biblia, oyo ekoki kosalisa baboti. Na ndakisa, Yekolá epai ya Moteyi Monene, Mokanda mpo na masolo ya Biblia, Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, mpe Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Torlief, mobali ya Ruth, alobi boye: “Lelo oyo, ezali na ebele ya batoli euti na Biblia oyo baboti bakoki kosalela. Soki kaka basaleli yango, bakoki kozwa lisalisi nyonso oyo basengeli na yango mpo na kobɔkɔla bana na bango malamu.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
Makanisi ya BANGANGA-MAYELE ná oyo ya BIBLIA
Na likambo etali komonisa bolingo epai ya bana
Na buku na ye oyo ebimaki na 1928 (The Psychological Care of Infant and Child), John Broadus Watson, nganga-mayele moko na pisikoloji, alobi na baboti ete: “Komeka te koyamba mpe kopwepwa” bana na yo. “Kondima ata mokolo moko te ete mwana afandela yo na makolo.” Kasi, eleki mwa mikolo, banganga-mayele Vera Lane ná Dorothy Molyneaux balobaki na zulunalo moko (Our Children), na ebimeli ya Marsi 1999 ete: “Bato ya mayele bamoni ete mbala mingi soki bazali kosimba mwana moke na nzoto te mpe komonisa ye bolingo te, akolaka malamu te.”
Nzokande, Yisaya 66:12 emonisi ndenge Nzambe amoniselaka basaleli na ye bolingo lokola oyo ya tata epai ya bana na ye. Ndenge moko, ntango bayekoli ya Yesu balingaki kopekisa bato báya na bana mike epai na Yesu, alobaki na bango ete: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango.” Na nsima, “akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango.”—Malako 10:14, 16.
Na likambo etali koteya bana bizaleli ya malamu
Na 1969, na lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (New York Times Magazine), profɛsɛrɛ Bruno Bettelheim alobaki ete baboti basengeli kotika mwana “apona ye moko, na kotalela makambo oyo azali komona mpe kokutana na yango, etamboli oyo asepeli kolanda, kasi basengeli te kokɔtisa ye makanisi na bango na makasi.” Kasi, mbula soki 30 na nsima, Profɛsɛrɛ Robert Coles, oyo abimisaki buku moko na 1997 (The Moral Intelligence of Children), alobaki ete: “Esengeli kolakisa bana nzela oyo bakolanda na bomoi na bango, elingi koloba etamboli oyo basengeli kozala na yango,” oyo endimami na baboti mpe na mikóló mosusu.
Masese 22:6 elobi na baboti ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopengwa na yango te.” Liloba ya Liebele oyo ebongolami na ‘kobɔkɔla’ ekoki mpe kolimbola “kobanda,” mpe na vɛrsɛ oyo, elimboli kobanda koteya mwana. Na yango, vɛrsɛ yango ezali kolendisa baboti bábanda koteya bana na bango bizaleli ya malamu banda bomwana. (2 Timote 3:14, 15) Na ntembe te, makambo oyo bana bakoyekola na ntango wana, ekotikala na mitema na bango libela.
Na likambo etali kopesa bana bitumbu
Na buku na ye oyo ebimaki na 1978 (The Strong-Willed Child), nganga-mayele James Dobson akomaki ete: “Mpo na moboti ya bolingo, kobɛta bana ezali likambo ya malamu mpenza, oyo elongolaka bango bizaleli ya mabe.” Epai mosusu, na buku moko oyo eyebani mingi (Baby and Child Care) nganga-mayele Benjamin Spock akomaki na 1998 ete: “Kobɛta esalisaka bana báyeba ete mikóló, oyo baleki bango na makasi, bazali na lotomo ya kosala nyonso oyo balingi, ezala bazali na elonga to te.”
Mpo na disipilini, Biblia elobi: “[Fimbo, NW] mpe mpamela ekoyeisa mayele.” (Masese 29:15) Kasi, kosalela fimbo esimbaka te mpo na bana nyonso. Biblia Liloba lya Nzambe elobi na Masese 17:10 elobi boye: “Kopalela moto ya mayele ekoki kobongisa ye, kobete moto zoba mbala nkama ekobongisa ye te.”
[Elilingi]
Saleláká Biblia mpo na kosimba mitema ya bana
[Elilingi na lokasa 7]
Baboti ya bwanya babongisaka mabaku ya kosakana elongo na bana na bango