Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g19 No. 3 lok. 3
  • Buku ya kala ezali kosalisa bato tii lelo oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Buku ya kala ezali kosalisa bato tii lelo oyo
  • Lamuká!—2019
  • Masolo mosusu
  • Na nimero oyo ya lamuká! biblia ekoki kobongisa bomoi na yo!
    Lamuká!—2019
  • Makambo oyo ezali na kati
    Lamuká!—2019
  • Mpo na nini kotika Biblia etambwisa biso?
    Lamuká!—2006
  • 4 | Biblia epesi batoli oyo ebongi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
Makambo mosusu
Lamuká!—2019
g19 No. 3 lok. 3
Mobali moko azali kotala Babiblia ya kala na musée

Buku ya kala ezali kosalisa bato tii lelo oyo

Bato mingi balobaka ete Biblia ezali buku mosantu. Kasi, Biblia ezali kaka te buku mosantu oyo eyebisaka biso ndenge ya kosambela Nzambe. Epesaka mpe batoli oyo esalisaka mokolo na mokolo.

Na ndakisa, talá makambo bato mosusu balobi mpo na bolamu oyo bazwi mpo batángaka Biblia mpe basalelaka batoli na yango na bomoi na bango.

“Bomoi na ngai ekómi malamu mpenza. Makanisi na ngai mpe bizaleli na ngai ebongi mpenza. Nakómi mpenza na esengo.”​—Fiona.

“Banda nakómá koyekola Biblia, namona mpenza ete bomoi ezali na ntina.”​—Gnitko.

“Bomoi na ngai ebongi mpenza. Sikoyo nazali na bomoi ya mindɔndɔ te mpe nazali na ntango mingi ya kolekisa na libota na ngai.”​—Andrew.

Oyo ezali kaka mwa ndambo ya bandakisa. Bato mingi na mokili bamoni ete Biblia epesaka batoli oyo esalisaka na bomoi.

Talá ndenge Biblia ekoki kosalisa moto abongisa . . .

  • Sante

  • Makanisi

  • Libota mpe boninga na basusu

  • Ndenge ya kosalela mbongo

  • Boninga na Nzambe

Masolo oyo elandi ekomonisa ete Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe mpe ekoki kosalisa yo na bomoi ya mokolo na mokolo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto