Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/06 nk. 18-19
  • Mpo na nini kotika Biblia etambwisa biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kotika Biblia etambwisa biso?
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Buku oyo ezali na solo
  • Ezali solo mpe ebongi mpenza
  • Epai wapi okoki kozwa litambwisi libongi na kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Na nimero oyo ya lamuká! biblia ekoki kobongisa bomoi na yo!
    Lamuká!—2019
  • Lukáká litambwisi ya Nzambe na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Búku oyo ezali komonisa boyebi ya Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Lamuká!—2006
g 1/06 nk. 18-19

Engebene Biblia

Mpo na nini kotika Biblia etambwisa biso?

“Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.”​—⁠2 Timote 3:​16.

EPAI wapi olukaka toli oyo esengeli kotambwisa bomoi na yo? Lelo oyo, ezali mpasi te kozwa toli kilikili na makambo ndenge na ndenge. Atako bongo, bato mingi balukaka toli na Biblia, buku oyo eumeli mingi, mpo etambwisa bomoi na bango.

Nzokande, bato mingi bamonaka Biblia na ntina mingi te, mingi mpenza na eleko oyo koyeba makambo ezali lisusu mpasi te, mpe mayele ya teknoloji ekómi mingi. Balakisi mosusu ya lokumu mpe bato mosusu ya siansi balobaka ete Biblia ezali lisusu na ntina te. Ezali bongo solo? Lokola lelo oyo bisika ya koluka toli ezali mingi, mpo na nini moto asengeli kotika Biblia etambwisa bomoi na ye?

Buku oyo ezali na solo

Mokolo moko Yesu Klisto azalaki kopema pembeni na libulu moko ya mai mpe asololaki na mwasi moko Mosamalia. Alobaki na ye ete: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:​24) Maloba wana emonisi ete ezali na lolenge moko ya kosambela oyo Nzambe andimaka. Mpo losambo na biso ezala ya solo, tosengeli kosambela na boyokani na ndenge oyo Nzambe amonisi yango na liloba na ye Biblia. Liloba ya Nzambe ezali na solo kati na yango.​—⁠Yoane 17:⁠17.

Nzokande, mangomba mingi elobaka ete endimaka Biblia, kasi emonanaka ete lingomba na lingomba eteyaka makambo na ndenge na yango. Yango wana, ekómi mpenza mpasi koyeba oyo Biblia eteyaka mpenza. Yesu azali Nzambe to azali nde mwana ya Nzambe? Ezalaka na bomoi nsima ya liwa to te? Lifelo ezali mpenza esika moko ya solo oyo bato banyokwamaka nsima ya liwa? Satana azali mpenza moto? Kozala moklisto elimboli nini? Makanisi na biso mpe makambo oyo tosalaka ezali mpenza na ntina na miso ya Nzambe? Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali komonisa bolingo ya solo? Komɛla masanga ezali mabe?a Mangomba ndenge na ndenge elobaka ete eteyaka solo na ntina na makambo yango. Kasi, mbala mingi, bindimeli ya lingomba moko eyokanaka te na oyo ya lingomba mosusu. Yango nyonso ekoki kozala ya solo te.​—⁠Matai 7:​21-​23.

Kasi ndenge nini okoki koyeba solo na ntina etali Nzambe mpe lolenge ya losambo oyo esepelisaka ye? Kanisá ete esengeli básala yo lipaso mpo na maladi moko makasi oyo ozali na yango. Okosala nini? Soki likoki ezali, okosala makasi oluka monganga oyo ayebi malamumalamu kosala lipaso ya maladi oyo ozali na yango. Okoluka koyeba soki ayebi mosala malamu, soki asalaka malamu banda kala, okokutana na ye, mpe okosolola na ye. Nsukansuka, soki omoni mpenza ete azali monganga ya malamu, okotyela ye motema mpe okondima asala yo lipaso. Bato mosusu bakoki kokanisa ndenge mosusu. Kasi yo otyeli monganga yango motema mpo oyebi ye malamu.

Ndenge moko mpe, soki otaleli malamumalamu mpe na bosembo mpenza makambo oyo ezali komonana polele, kondima na yo epai ya Nzambe mpe na Biblia ekokóma makasi. (Masese 2:​1-4) Na ntango ozali koluka biyano ya mituna etali lolenge ya losambo oyo Nzambe andimaka, osengeli kopona. Okoki koluka yango to na mateya ya bongolabongola mpe na makanisi ya bato, to okoki kotalela likanisi ya Biblia.

Ezali solo mpe ebongi mpenza

Soki otaleli Biblia malamumalamu okomona ebele ya makambo oyo ezali komonisa polele ete “makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba.”b (2 Timote 3:​16, 17) Na ndakisa, Biblia etondi na bisakweli oyo ekokisamaki. Mikanda mosusu ya masolo ya kala ezali komonisa ete bisakweli yango ekokisamaki. (Yisaya 13:​19, 20; Danyele 8:​3-⁠8, 20-​22; Mika 5:⁠2) Atako Biblia ezali buku ya siansi te, kasi elobeli makambo ya solo ya siansi. Ezali na makambo ya solo etali bozalisi mpe bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, oyo ekomamaki bankoto ya bambula liboso ete bato ya siansi báya kondima makambo yango.​—⁠Levitike 11:​27, 28, 32, 33; Yisaya 40:⁠22.

Lisusu, Biblia esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Biblia etondi na batoli oyo ebongi mpo na libota, mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto mpe ya mayoki, mpo na mosala, mpe mpo na makambo mosusu oyo tosalaka mokolo na mokolo. Masese 2:​6, 7 elobi ete: “[Yehova] akopesaka mayele, boyebi mpe bosɔsɔli eutaka na monɔkɔ na ye. Akobombela basembwi mayele malamu.” Soki ozali koluka litambwisi ya Biblia, okoteya makoki na yo ya kososola mpo na “kokesenisa ná mabe ná malamu.”​—⁠Baebele 5:14.

Liloba ya Nzambe ezali mpe kosalisa biso tóyeba ntina ya bomoi. (Yoane 17:⁠3; Misala 17:​26, 27) Ezali kolimbola ntina ya makambo oyo ezali na mokili. (Matai 24:​3, 7, 8, 14; 2 Timote 3:​1-5) Kati na yango, Nzambe azali komonisa biso ndenge akolongola mabe na mabelé mpe akopesa bato likoki ya kozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe bomoi ya seko.​—⁠Yisaya 33:​24; Danyele 2:​44; Emoniseli 21:​3, 4.

Bamilio ya bato bamoni bango moko mpenza ete Biblia ebongi kotyelama motema mpe ete ezali liziba ya solosolo ya bwanya. Babimisi ya Lamuká! bazali kosɛnga yo otalelaka masolo oyo ezalaka na motó ya likambo “Engebene Biblia,” oyo ebimaka na nimero nyonso ya zulunalo oyo. Soki osali bongo, okomona makambo mosusu ya polele oyo ezali komonisa ete Biblia ebongi mpenza mpo na kotambwisa bomoi na yo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Engebene Biblia”​—⁠lisolo oyo ebimaka mbala na mbala na Lamuká!​—⁠ekolobela mituna wana mpe mituna mosusu na banimero oyo ekobima nsima.

b Mpo na koyeba makambo oyo emonisi ete Biblia epemamaki na Nzambe, talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Lolenge nini ya losambo Nzambe andimaka?​—⁠Yoane 4:​24.

◼ Osengeli kosala nini mpo na kozwa bwanya ya Nzambe?​—⁠Masese 2:​1-⁠4.

◼ Na ndenge nini Biblia ezali liziba ebongi mpo na kotambwisa biso?​—⁠Baebele 5:​14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto