Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g19 No. 3 nk. 4-5
  • Sante

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sante
  • Lamuká!—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BATELÁ NZOTO
  • BOYÁ BIZALELI YA MABE
  • BATOLI MOSUSU YA BIBLIA
  • 1 Batelá sante na yo
    Lamuká!—2022
  • Yebá kopona mpo nzoto na yo ezala kolɔngɔnɔ
    Lamuká!—2004
  • Nzoto na yo esengeli na mpɔngi
    Lamuká!—1995
  • Nasala nini mpo nalalaka mingi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—2019
g19 No. 3 nk. 4-5
Mobali moko azali kolya ndunda ya mobesu (Salade)

Sante

Biblia ezali buku ya minganga te. Kasi, ezali na batoli oyo ekoki kosalisa biso tózala na sante malamu. Talá batoli mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo ozala na sante malamu.

BATELÁ NZOTO

TOLI YA BIBLIA: “Ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.”​—Baefese 5:29.

YANGO ELIMBOLI NINI? Biblia elendisi biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela sante na biso. Lapolo moko emonisi ete bamaladi mingi eyaka na ndenge oyo bato baponaka kotambwisa bomoi bango. Yango wana, kopona kosala makambo oyo ebongi ekoki kobatela sante.

OYO OKOKI KOSALA:

  • Bilei. Lyáká bilei oyo etongaka nzoto mpe mɛláká mai mingi.

  • Saláká ngalasisi. Ngalasisi ekoki kobatela sante na yo ata soki ozali na mbula nini, to mpe ozali na maladi oyo eumeli mingi oyo ezali kopekisa yo kosala makambo mosusu. Bandeko, baninga na yo mpe minganga bakoki kopesa yo toli mpe kolendisa yo osalaka ngalasisi, kasi mpo na kozwa bolamu, yo moko osengeli kosala milende!

  • Laláká mingi. Bato oyo basali ntango molai balalaka mingi te, nsukansuka bakweaka maladi makasi. Bato mingi balalaka mingi te mpo basalaka makambo mosusu na ntango oyo basengeli kolala. Nzokande soki moto azali kolala mingi, akozala na sante malamu.

BOYÁ BIZALELI YA MABE

TOLI YA BIBLIA: “Tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.”​—2 Bakorinti 7:1.

YANGO ELIMBOLI NINI? Tokozala na sante malamu soki toboyi komɛla biloko oyo ebebisaka nzoto, na ndakisa makaya, mpo epesaka maladi mpe ebomaka.

OYO OKOKI KOSALA: Tyá mokolo oyo okotika komɛla makaya. Liboso mokolo yango ekoka bwaká makaya, eloko oyo batyaka putulu ya makaya, ba alimɛti, mpe biloko mosusu oyo ekopesa yo mposa ya komɛla makaya. Boyá bisika oyo bato bamɛlaka makaya bazali. Yebisá baninga mpe bandeko ekateli oyo ozwi mpo básalisa yo.

BATOLI MOSUSU YA BIBLIA

Mobali moko azali kotánga Biblia

Mpo na kozwa Biblia, luká to komɛla Batatoli ya Yehova ya esika ofandi

MIBATELÁ MPE BATELÁ BASUSU.

“Soki otongi ndako ya sika, osengeli mpe kosala efelo ya libateli mpo na nsamba na yo, mpo omemisa ndako na yo ngambo ya makila te, mpo moto akoki kokwea longwa na yango.”​—KOLIMBOLA MIBEKO 22:8.

PEKISÁ NKANDA.

“Ye oyo ayokaka nkanda noki te azalaka na bososoli mingi, kasi ye oyo azali motema mokuse atombolaka bozoba.”​—MASESE 14:29.

KOLEKISA NDELO TE NA KOLYA.

“Kozala te . . . kati na bato oyo balyaka mosuni na lokoso.”​—MASESE 23:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto