Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g22 No. 1 nk. 4-6
  • 1 Batelá sante na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 1 Batelá sante na yo
  • Lamuká!—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
  • Oyo osengeli koyeba
  • Oyo okoki kosala sikoyo
  • Ndenge ya kosala mpo nzoto ezala malamu
    Lamuká!—2015
  • Oyo okoki kosala soki obɛli maladi moko ya mbalakaka
    Makambo mosusu
  • Batela kondima na yo mpe kolongono na yo ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Sante
    Lamuká!—2019
Makambo mosusu
Lamuká!—2022
g22 No. 1 nk. 4-6
Bilei ndenge na ndenge oyo esalisaka moto azala na sante ya malamu ezali na mesa.

MOKILI OYO ETONDI NA MAKAMBO YA MPASI

1 | Batelá sante na yo

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Ntango likambo moko ya mpasi ebimi to likama moko esalemi, yango ekoki kobebisa sante na biso mbala moko to mokemoke.

  • Mikakatano esalaka ete bato bakóma komitungisa, mpe ezalaka mpasi te bato oyo bamitungisaka na boumeli ya ntango molai bábɛla.

  • Mikakatano ekoki mokemoke kobebisa ba anticorps na biso mpe yango ekoki kosala ete minganga bázala na likoki te ya kopesa biso lisalisi oyo tosengeli na yango.

  • Mikakatano esalaka ete bato bázanga mbongo, bázanga likoki ya kosomba biloko oyo ezali na ntina mingi, na ndakisa, bilei mpe bankisi mpo na komisalisa ntango babɛli.

Oyo osengeli koyeba

  • Soki obɛli makasi mpe ozali komitungisa na makanisi, yango ekoki kosala ete ozwa bikateli ya mabe oyo ekoki kopekisa yo kotya likebi na makambo oyo ekoki kosala ete ozala na sante ya malamu. Mpe yango ekoki kosala ete maladi na yo ekóma makasi.

  • Soki ozali kolandela sante na yo te, yango ekoki kokómisa makambo ndɔngɔ mpe kotya kutu bomoi na yo na likama.

  • Soki ozali na sante ya malamu, yango ekosala ete ozwá bikateli ya malamu ntango okutani na mokakatano moko.

  • Ozala na mbongo mingi to te, okoki kosala makambo oyo ekosalisa yo ozala na sante ya malamu.

Oyo okoki kosala sikoyo

Moto ya bwanya amonaka likama na mosika mpe azwaka bikateli oyo ekosala ete akima yango. Yango ekoki mpe kosalelama na makambo etali sante. Soki ozali pɛto mpe ozali kotya bopɛto na ndako na yo, yango ekoki kosala ete ozwaka maladi mpambampamba te. Ezali malamu komibatela na esika ya kozela ete makambo eya ndɔngɔ.

“Lokola tozalaka pɛto mpe totyaka bopɛto na ndako na biso, yango esali ete tokendaka lopitalo mpambampamba te mpe tóbebisa mbongo te na kosomba bankisi.”​—Andreas.a

a Topesi bato yango bankombo mosusu.

NDENGE YA KOYIKA MPIKO​—Batoli oyo ekoki kosalisa yo

Ntango okutani na makambo ya mpasi, salelá makanisi oyo mpo obatela sante na yo

ZALÁKÁ PƐTO

Mobali moko azali kosukola mabɔkɔ na mai mpe sabuni libanda ya ndako.

Zaláká pɛto

Biblia elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Zwáká bikateli ya malamu oyo ekosala ete okima bamaladi mosusu.

  • Sukoláká mabɔkɔ na yo na mai mpe na sabuni, mingimingi liboso ya kosimba bilei to mpe nsima ya kouta na zongo.

  • Tyáká mbala na mbala bopɛto na ndako na yo mpe pangwisáká na nkisi biloko mpe bisika oyo bato basimbaka mingi.

  • Soki likoki ezali, boyá kozala penepene na bato oyo bazali kobɛla.

LYÁKÁ BILEI YA MALAMU

Bilei ndenge na ndenge oyo esalisaka moto azala na sante ya malamu ezali na mesa.

Lyáká bilei ya malamu

Biblia elobi boye: “Ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.” (Baefese 5:29) Tomonisaka ete tolingaka nzoto na biso ndenge tokebaka na biloko oyo tolyaka mpe tomɛlaka.

  • Mɛláká mai mingi.

  • Lyáká bandunda mpe bambuma ndenge na ndenge.

  • Kolyáká mingi te biloko oyo etondi na mafuta, mungwa mpe sukali.

  • Boyá komɛla makaya, masanga mingi to mpe kosalela drɔgɛ.

“Mpo tóbɛlaka mpambampamba te, tosalaka makasi tólya bilei ya malamu; soki tosali bongo te, tokobebisa mwa mbongo moke oyo tozwaka mpo na koluka lisalisi ya monganga. Tomonaka ete ezali malamu kosalela mbongo yango mpo na kosomba bilei ya malamu.”​—Carlos.

SALÁKÁ NGALASISI MPE PEMÁKÁ MALAMU

Mobali moko azali kokima mbangu na nzela moko ya mabe.

Saláká ngalasisi

Biblia elobi boye: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:6) Atako tolingaka kosala mosala, tosengeli mpe kopemaka.

  • Saláká ngalasisi mbala na mbala. Okoki kobanda naino na kotambolaka mbala na mbala. Kosala ngalasisi mbala na mbala ekosalisa yo ozala na sante ya malamu ata soki ozali mobange, ebɔsɔnɔ, to ozali na maladi moko oyo eumeli.

  • Elenge mwasi moko azali kolala.

    Pemáká malamu

    Pemáká malamu. Na mokuse, soki ozali kolala malamu te yango ekoki kosala ete okóma komitungisa na makanisi mpe otyaka likebi te na makambo. Soki ozali kopema te ndenge esengeli, na nsima ya mikolo, yango ekoki komemela yo mikakatano na nzoto.

  • Poná ngonga moko ya sikisiki oyo okobanda kolala mpe kolamuka. Tosáká programɛ yango mpe saláká yango mokolo na mokolo.

  • Boyá kotala TV to kosalela baaparɛyi ntango ozali na mbeto.

  • Boyá kolya biloko ya kilo, komɛla kafe, mpe masanga liboso ya kolala.

“Namonaka ete kolala na ngonga moko boye esalaka ete nazala na sante ya malamu to te. Na bantango mosusu soki nalali mingi te, nayokaka motó mpe nzoto mpasi. Kasi soki nalali mingi, namiyokaka malamu mpe nazalaka na makasi ya kosala mosala nyonso oyo nakani! Nazali nzoto makasi, mpe nabɛlaka mpambampamba te.” —Justin.

Elilingi oyo euti na video “Maladi oyo ezali kopanzana​—Ndenge nini okoki komibatela.” Mwasi moko azali kofungwela maladi mabe porte.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU. Talá video Maladi oyo ezali kopanzana​—Ndenge nini okoki komibatela. Kɔtá na site jw.org mpo na kozwa video yango. Okoki mpe kotánga lisolo, “Ndenge ya kosala mpo nzoto ezala malamu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto