Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g19 No. 3 nk. 10-11
  • Ndenge ya kosalela mbongo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosalela mbongo
  • Lamuká!—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ZALÁ NA PROGRAMƐ
  • BOYÁ BIZALELI YA MABE
  • BATOLI MOSUSU YA BIBLIA
  • Biblia ekoki kosalisa na makambo etali mbongo mpe banyongo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Ndenge oyo moto akoki kobika na kotalela makoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • 2 Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela
    Lamuká!—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—2019
g19 No. 3 nk. 10-11
Basali na esika oyo basalaka mosala ya mabaya

Ndenge ya kosalela mbongo

Bato mingi bazalaka lisusu na mikakatano mingi te ya mbongo mpo balandaka batoli ya Biblia.

ZALÁ NA PROGRAMƐ

TOLI YA BIBLIA: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.”​—Masese 21:5.

YANGO ELIMBOLI NINI? Osengeli kosala programɛ mpe kolanda yango. Na yango, salá programɛ liboso ya kosomba eloko. Kobosana te ete mbala mosusu okosomba te eloko nyonso olingi. Yango wana, salelá mbongo malamu.

OYO OKOKI KOSALA:

  • Sombá kaka biloko oyo okani kosomba. Komá biloko nyonso okosomba mpe kabolá yango na milɔngɔ. Tyá motángo ya mbongo oyo okosalela mpo na kosomba biloko yango. Soki mbongo ya biloko ya molɔngɔ moko ekoki te, zwá mbongo ya biloko ya molɔngɔ mosusu. Na ndakisa, soki osaleli mbongo mingi mpo na kosomba esansi, zwá mbongo oyo otyaki pembeni mpo na makambo mosusu oyo ezali mpenza na ntina mingi te, na ndakisa kokende kozwa mopɛpɛ.

  • Boyá nyongo ezangi ntina. Soki likoki ezali, boyá kozwa banyongo. Kutu, bombá nde mbongo mpo na kosomba biloko oyo ozali na yango mposa. Soki osengeli kozwa nyongo, salá nyonso ofuta yango na ntango oyo boyokanaki mpo bábakisela yo mbongo mosusu likoló te. Mityelá mokano ya kofuta nyongo yango mpe salá kaka ndenge okani.

    Moto oyo azwaka nyongo ntango nyonso, abebisaka mbongo mingi. Na yango, liboso ya kozwa nyongo, kanisá malamu.

BOYÁ BIZALELI YA MABE

TOLI YA BIBLIA: “Mpo na eleko ya mpiɔ moto ya gɔigɔi akobalola mabele te; akosɛngasɛnga na ntango ya kobuka mbuma, kasi eloko moko ekozala te.”​—Masese 20:4.

YANGO ELIMBOLI NINI? Ezaleli ya gɔigɔi ememaka bobola. Na yango, salá mosala na molende, mpe salelá mbongo na yo malamu mpo na mikolo ekoya osomba oyo osengeli na yango.

OYO OKOKI KOSALA:

  • Salá mosala makasi. Soki ozali kosala makasi mpe na motema moko, bakonzi ya kompanyi bakolinga yo mpe bakolongola yo na mosala te.

  • Zalá sembo. Koyiba te na mosala. Soki oyibi, bato bakoyeba yango mpe ata moto moko te akolinga lisusu kozwa yo na mosala.

  • Kozala lokoso te. Soki ozali ntango nyonso koluka kozwa mbongo mingi, nsukansuka okobebisa sante na yo mpe boninga na yo ná basusu. Kobosana te ete mbongo nde eleki ntina te na bomoi.

BATOLI MOSUSU YA BIBLIA

Mobali moko azali kotánga Biblia na Internet

Tángá Biblia na site Internet jw.org. Ezali na minɔkɔ ebele mpenza

KOBEBISA TE MBONGO MPE NTANGO NA YO NA MIMESENO YA MABE.

“Molangwi-masanga mpe moto oyo alyaka na lokoso bakokóma na bobola, mpe kolalalala ekolatisa moto bilamba oyo epasukapasuká.”​—MASESE 23:21.

KOMITUNGISA KOLEKA NDELO TE MPO NA MBONGO.

“Bótika komitungisa mpo na milimo na bino mpo na oyo bokolya to oyo bokomɛla, to mpo na nzoto na bino mpo na oyo bokolata.”​—MATAI 6:25.

BOYÁ BILULELA.

“Moto ya liso ya bilulela awelaka kozwa biloko ya motuya mbangumbangu, kasi azali koyeba te ete kokelela nde ekoyela ye.”​—MASESE 28:22.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto