Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 1 nk. 10-11
  • Mpo na nini tonyokwamaka, tokómaka mibange, mpe tokufaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tonyokwamaka, tokómaka mibange, mpe tokufaka?
  • Lamuká!—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tomonaka mpasi mpo na makambo oyo baboti na biso ya liboso basalaki
  • Tomonaka mpasi mpe mpo na bilimo mabe
  • Ntango mosusu tomonaka mpasi mpo tozwaka bikateli ya mabe
  • Tomonaka mpe mpasi mpo tozali na “mikolo ya nsuka”
  • Mpo na nini makambo ya mabe mpe bampasi ezali na mokili?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mpo na nini bampasi etondi na mokili?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bampasi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 1 nk. 10-11

Mpo na nini tonyokwamaka, tokómaka mibange, mpe tokufaka?

Nzambe oyo akelá biso amonaka ete tozali bana na ye. Yango wana, alingaka te ete tónyokwamaka. Kasi, mpo na nini bampasi etondi na mokili boye?

Tomonaka mpasi mpo na makambo oyo baboti na biso ya liboso basalaki

“Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso.”​—BAROMA 5:12.

Nzambe asalaki baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, na makanisi mpe na nzoto ya kokoka. Apesaki bango mpe esika ya kofanda na paradiso awa na mabele, babengaki yango elanga ya Edene. Ayebisaki bango ete bakoki kolya mbuma ya nzete nyonso oyo ezali na elanga yango, longola kaka mbuma ya nzete moko. Kasi, Adama ná Eva baponaki kolya mbuma ya nzete yango, mpe na ndenge yango basalaki lisumu. (Ebandeli 2:15-17; 3:1-19) Nsima ya kozanga botosi wana, Nzambe abenganaki bango na elanga yango, mpe bomoi na bango ekómaki mpasi. Na nsima na yango, babotaki bana, mpe bomoi ya bana yango ekómaki mpe mpasi. Bakómaki mibange mpe bakufaki. (Ebandeli 3:23; 5:5) Tonyokwamaka, tokómaka mibange, mpe tokufaka mpo toutá na Adama ná Eva.

Tomonaka mpasi mpe mpo na bilimo mabe

“Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.”​—1 YOANE 5:19.

“Moto mabe” yango nkombo na ye Satana. Azali anzelu oyo atɔmbɔkelaki Nzambe. (Yoane 8:44; Emoniseli 12:9) Na nsima, baanzelu mosusu basanganaki na Satana. Babengaka baanzelu yango bademo. Baanzelu yango basalelaka nguya na bango mpo na kokosa bato bátika kotosa Nzambe oyo akelá biso. Batindaka bato mingi básala makambo ya mabe. (Nzembo 106:35-38; 1 Timote 4:1) Satana ná bademo basepelaka komonisa bato mpasi mpe konyokola bango.

Ntango mosusu tomonaka mpasi mpo tozwaka bikateli ya mabe

“Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—BAGALATIA 6:7.

Na makambo mingi, tonyokwama mpo na lisumu oyo tozwá epai ya baboti na biso ya liboso mpe mpo Satana azali kotambwisa mokili oyo. Kasi, ntango mosusu mpe, bato bango moko bamibakiselaka bampasi. Na ndenge nini? Ntango bazali kosala makambo mabe to bazali kozwa bikateli ya mabe, mbala mingi, babukaka mbuma mabe. Nzokande, ntango bato bazali kosala makambo ya malamu, babukaka mbuma malamu. Na ndakisa, tata ya libota oyo azali sembo, azali kosala mosala makasi, mpe kolinga libota na ye, akozwa bolamu mingi mpe libota na ye ekozala na esengo. Kasi, tata ya libota oyo abɛtaka masano ya mbongo, amɛlaka masanga mingi, to azali na gɔigɔi, akokómisa libota na ye na bobola mpenza. Yango wana, koyoka Nzambe oyo ekelá biso ezali mpenza bwanya. Alingi tozwa bolamu mingi, ezala mpe “kimya mingi.”​—Nzembo 119:165.

Tomonaka mpe mpasi mpo tozali na “mikolo ya nsuka”

“[Na] mikolo ya nsuka . . . , bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . batosaka baboti te, . . . bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te.”​—2 TIMOTE 3:1-5.

Lelo oyo, bizaleli ya bato mingi ezali kaka ndenge bavɛrsɛ oyo emonisi yango. Yango ezali komonisa polele ete tozali na “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo. Biblia esakolaki mpe ete tokoyeba ete tozali na “mikolo ya nsuka” ntango tokomona bitumba, nzala, mabele ezali koningana makasi mpenza, mpe bamaladi mabe. (Matai 24:3, 7, 8; Luka 21:10, 11) Makambo yango ezali kobimisa mpasi mpe liwa.

Nazwá kimya ya motema

“Nakómaki ebɔsɔnɔ ntango nazalaki na mbula 19, mpe bayebisaki ngai ete yango euti na mabe moko oyo nasalaki liboso nabotama. Likambo yango enyokolaki makanisi na ngai mingi mpenza. Bateyaki ngai ete Nzambe nde moto anyokolaka bato. Nakokaki kolinga Nzambe ya mabe boye ata moke te. Na nsima, nayekolaki Biblia mpe nayebaki ete Nzambe oyo akelá biso alingaka biso mingi mpe ete elimo mabe moko, oyo babengi Satana, nde moto amemelaka bato bampasi nyonso oyo. Nayebaki mpe ete, mosika te, Nzambe akoboma Satana mpe akobongisa makambo nyonso oyo Satana abebisá. Nakómaki kolinga Nzambe yango mingi, mpo azali malamu mpenza. Mpe nazwaki kimya ya motema.”​—Sanjay.

Mpo na koyeba makambo mosusu:

Mpo na kozwa batoli ya malamu oyo etali bampasi mpe ndenge ya kolonga yango, kɔtá na jw.org mpe kende na esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA > BAMPASI.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto