Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/1 nk. 4-7
  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini mpasi ebandaki?
  • Mpo na kokata likambo yango
  • Mpasi ekosila
  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi
  • Mpo na nini makambo ya mabe mpe bampasi ezali na mokili?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Koyika mpiko na bampasi ekoki komemela biso matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bampasi ya bato: Mpo na nini Nzambe atikelaki yango nzela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/1 nk. 4-7

Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi

BANDA kala, bato mingi ya mayele na filozofi mpe na teoloji balukaka koyeba ntina oyo Nzambe atikaka bato bámona mpasi. Bamosusu balobaka ete lokola Nzambe azali mozwi-ya-nguya-nyonso, esengeli kozala ete mpasi nyonso eutaka kaka epai na ye. Na ekeke ya mibale, moto oyo akomaki buku Les Homélies clémentines, oyo endimami te na kati ya mikanda oyo epemami, alobaki ete Nzambe asalelaka mabɔkɔ na ye nyonso mibale mpo na kotambwisa mokili. Na “lobɔkɔ na ye ya mwasi,” oyo elakisi Zabolo, abimisaka mpasi, mpe na “lobɔkɔ na ye ya mobali,” elingi koloba Yesu, abikisaka mpe apambolaka.

Bamosusu, lokola bakoki kondima te ete Nzambe akoki kopesa nzela na mpasi ata soki ye te moto abimisaka yango, baboyi kondima ete mpasi ezali. Mary Baker Eddy akomaki boye: “Mabe ezali se makanisi mpamba, ezali likambo ya solosolo te. Soki bato báyebaka ete lisumu, maladi mpe liwa ezali makambo ya solosolo te, elingaki kozala lisusu te.”​—Science et Santé avec la clef des Écritures.

Na kotalela makambo ya mabe oyo esalemaka kobanda kala, mingimingi kobanda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba tii na mikolo na biso, bato mingi bakómá koloba ete Nzambe azali na makoki te ya kopekisa mpasi ekómela bato. David Wolf Silverman, ye azali Moyuda mpe moto ya mayele, akomaki boye: “Mpo na ngai, ndenge Banazi babomaki ebele ya Bayuda emonisi ete Nzambe abongi te kobengama mozwi-ya-nguya-nyonso.” Mpe abakisaki boye: “Soki tolobi ete toyebi Nzambe, tosengeli koloba ete motema malamu na ye eyokani na mabe oyo ezali na mokili; mpe yango ekoki kozala bongo kaka soki [Nzambe] azali mozwi-ya-nguya-nyonso te.”

Nzokande, ezala baoyo bazali koloba ete Nzambe mpe abimisaka mpasi, to baoyo bazali koloba ete azali na likoki ya kopekisa yango te, to mpe baoyo bazali koloba ete mpasi ezali se makanisi mpamba, bango nyonso bazali mpenza te kobɔndisa bato oyo bazali na mpasi. Likambo ya ntina koleka ezali ete makanisi ya ndenge wana emonisi ata moke te Nzambe oyo Biblia ezali kolobela: Nzambe ya boyengebene, oyo atondá na nguya mpe na bolingo. (Yobo 34:10, 12; Yilimia 32:17; 1 Yoane 4:8) Kasi Biblia ezali koloba nini mpo na ntina oyo Nzambe atiki nzela na mpasi?

Ndenge nini mpasi ebandaki?

Nzambe akelaki bato mpo bámonaka mpasi te. Kasi apesaki Adama, mobali ya liboso, na mwasi na ye Eva makanisi mpe nzoto ya kokoka; abongisaki elanga moko kitoko mpo ezala esika na bango ya kofanda, mpe apesaki bango mosala moko ya ntina mpe ya malamu. (Genese 1:27, 28, 31; 2:8) Nzokande, mpo bomoi na bango ezala ntango nyonso malamu, basengelaki kotosa boyangeli ya Nzambe mpe kondima ete ye nde azali na lotomo ya kopona nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Nzete moko oyo ebengamaki “nzete ya koyeba malamu mpe mabe” nde ezalaki komonisa lotomo wana ya Nzambe. (Genese 2:17, NW) Adama na Eva balingaki komonisa botosi na bango epai ya Nzambe soki bátosaka mobeko na ye oyo epekisaki bango kolya mbuma ya nzete wana.a

Likambo ya mawa, Adama na Eva batosaki Nzambe te. Ekelamu moko ya elimo oyo atombokelaki Nzambe, oyo na nsima azwaki nkombo ya Satana Zabolo, andimisaki Eva ete kotosa Nzambe ezali na litomba te mpo na ye. Emonanaki lokola nde Nzambe azalaki kobombela ye sɛkɛlɛ moko ya monene: bonsomi, likoki ya kopona ye moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Satana ayebisaki ye ete soki alei mbuma ya nzete yango, ‘miso na ye ekofungwama mpe akozala lokola Nzambe, koyeba malamu na mabe.’ (Genese 3:1-6; Emoniseli 12:9) Lokola likanisi yango ya kokóma na bonsomi esepelisaki Eva makasi, alyaki mbuma oyo epekisamaki; mwa moke na nsima Adama mpe alyaki.

Kaka na mokolo wana, Adama na Eva babandaki kobuka mbuma ya botomboki na bango. Lokola baboyaki boyangeli ya Nzambe, babungisaki libateli mpe mapamboli oyo bazalaki na yango ntango bazalaki kotosa Nzambe. Nzambe abenganaki bango na Paladiso mpe alobaki na Adama ete: “Mabele elakelami mabe na ntina na yo. Okolya biloko na yango na mpasi mikolo nyonso ya bomoi na yo. Na motɔki ya elongi na yo okolya limpa kino ntango okozonga na mabele.” (Genese 3:17, 19, NW) Adama na Eva bakokaki sikoyo kobɛla, komona mpasi, konuna mpe kokufa. Mpasi ekɔtaki na bomoi ya bato.​—Genese 5:29.

Mpo na kokata likambo yango

Moto mosusu akoki kotuna ete: ‘Ekokaki te ete Nzambe abosana kaka lisumu ya Adama na Eva mpe likambo esila?’ Te, mpamba te yango elingaki kokitisa lisusu limemya mpo na bokonzi na ye; ntango mosusu, ekokaki kopesa nzela na botomboki mosusu nsima ya mikolo mpe yango ekokaki kobimisa lisusu mpasi monene koleka. (Mosakoli 8:11) Longola yango, soki Nzambe atalaka botomboki ya ndenge wana kaka na miso, elingaki komonana ete ye mpe azali kosangana na makambo ya mabe. Moize, moko ya bakomi ya Biblia, akundoleli biso likambo oyo: “Mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe ya mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Na boyokani na bomoto na ye, Nzambe asengelaki kotika ete Adama na Eva bábuka mbuma mabe ya kozanga botosi na bango.

Mpo na nini Nzambe abomaki mbala moko te mobali ya liboso na mwasi na ye elongo na Satana, ekelamu oyo emonanaka te oyo etindaki bango bátomboka? Azalaki na nguya ya kosala yango. Soki asalaka yango, mbɛlɛ Adama na Eva balingaki te kobota bana oyo balingaki komona mpasi mpe kokufa lokola bango. Nzokande, soki Nzambe alakisaka nguya na ye na lolenge wana, yango elingaki komonisa te ete azali mpenza na lotomo ya kozala na bokonzi likoló ya bikelamu na ye ya mayele. Longola yango, soki Adama na Eva bákufaka kozanga kobota, mokano ya Nzambe oyo ezalaki ete bátondisa mabele na bana na bango ya kokoka elingaki kokokisama lisusu te. (Genese 1:28) Lisusu, “Nzambe azali lokola moto te . . . soki alobi likambo, asalaka yango te?, soki apesi elaka, akokisaka yango te?”​—Mituya 23:19, NW.

Na bwanya na ye ya kokoka, Yehova Nzambe azwaki ekateli ya kotika botomboki yango ekoba lisusu mpo na mwa ntango. Yango esengelaki kopesa batomboki ntango oyo ekoki mpo na komona makambo oyo ebimaka na ntango bato baboyi kotambwisama na Nzambe. Makambo oyo bato balingaki kokutana na yango elingaki komonisa polele ete bato basengeli kaka kotambwisama na Nzambe, mpe ete boyangeli ya Nzambe eleki boyangeli ya bato to oyo ya Satana. Kaka na ntango yango, Nzambe abandaki mokemoke kosala makambo oyo ekosala ete mokano na ye mpo na mabele ekokisama. Alakaki ete “mombóto” to “mwana” moko akoya, oyo ‘akosasa Satana na motó,’ mpe akosilisa mbala moko mpe mpo na libela botomboki na ye mpe makambo nyonso ya mabe oyo botomboki yango ebimisá.​—Genese 3:15, NW, maloba na nse ya lokasa.

Mombóto yango oyo alakamaki ezalaki Yesu Klisto. Tozali kotánga na 1 Yoane 3:8 ete “Mwana ya Nzambe amonisamaki polele . . . mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.” Asalaki yango ntango apesaki bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka mpe na ndenge yango, afutaki motuya oyo esengelaki mpo na kosikola bana ya Adama na lisumu mpe na liwa oyo Adama atikelá bango. (Yoane 1:29; 1 Timote 2:5, 6) Baoyo nyonso bamonisaka mpenza kondima na mbeka ya Yesu bazwi elaka ete bakozala na mpasi lisusu te mpo na libela. (Yoane 3:16; Emoniseli 7:17) Elaka yango ekokokisama ntango nini?

Mpasi ekosila

Koboya bokonzi ya Nzambe ebimisi nsuka na mpasi. Na yango, ebongi mpenza ete Nzambe asalela ebongiseli mosusu ya bokonzi na ye mpo na kosilisa mpasi ya bato mpe kokokisa mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na mabele. Yesu alobelaki ebongiseli yango ya Nzambe ntango alakisaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Tata na biso na likoló, . . . tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”​—Matai 6:9, 10.

Ntango oyo Nzambe atikeli bato mpo bámeka komitambwisa bango moko elingi kosuka. Bokonzi na ye etyamaki na likoló na mobu 1914 ndenge Biblia esakolaki yango mpe Yesu Klisto nde azali mokonzi na yango.b Mosika te, ekobukabuka mpe ekosilisa biyangeli nyonso ya bato.​—Danyele 2:44.

Na boumeli ya ntango moke oyo asalaki mosala na ye awa na mabele, Yesu amonisaki mwa moke mapamboli oyo bato bakozwa ntango boyangeli ya Nzambe ekozongisama. Baevanzile emonisi polele ete Yesu amonisaki motema mawa epai ya babola, oyo bato bazalaki kosalela bango makambo na bosembo te. Abikisaki bato ya maladi, aleisaki bato oyo bazalaki na nzala, mpe asekwisaki bakufi. Ata mpe mipɛpɛ makasi ezalaki kotosa mongongo na ye. (Matai 11:5; Malako 4:37-39; Luka 9:11-16) Kanisá naino makambo oyo Yesu akosala ntango akosalela nguya ya kopɛtola oyo mbeka na ye ya lisiko ezali na yango mpo na bolamu ya bato ya botosi! Biblia ezali kolaka ete, na nzela ya boyangeli ya Klisto, Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na [bato], mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:4.

Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi

Tolendisami mpenza na koyeba ete Yehova, Nzambe na biso ya bolingo mpe mozwi-ya-nguya-nyonso, amibanzabanzaka mpo na biso mpe ete mosika te akosilisa bampasi nyonso ya bato! Moto oyo azali na maladi makasi andimaka lisalisi nyonso oyo ekobikisa ye, ata soki ekosala ye mpasi makasi. Ndenge moko mpe, soki toyebi ete lolenge oyo Nzambe asalaka makambo ekomemela biso mapamboli oyo ekoumela libela, boyebi wana ekoki kosalisa biso, ezala ata tozali kokutana na mikakatano ya ndenge nini, oyo ekoleka na yango.

Ricardo, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, azali moko ya bato oyo bazwi libɔndisi na bilaka ya Biblia. Alobi boye: “Nsima ya liwa ya mwasi na ngai, nazalaki kolinga lisusu te kofanda esika moko na bato; kasi nayaki komona ete ata soki nasali bongo, yango ekozongisa mwasi na ngai na bomoi te, ekongalisa nde mpasi na ngai.” Na esika akoba kosala bongo, Ricardo akangamaki nde na momeseno na ye ya koyanganaka na makita ya boklisto mpe ya kosakolaka nsango ya Biblia epai ya bato mosusu. Ricardo alobi ete: “Lokola nazalaki komona lisalisi mpe bolingo ya Yehova mpe ndenge azalaki koyanola na mabondeli na ngai ata na makambo oyo ezalaki komonana lokola makambo ya mike, napusanaki lisusu penepene na ye mpenza. Lokola nayebaki ete Nzambe alingi ngai, yango esalisaki ngai nayika mpiko liboso ya komekama wana oyo ezalaki mpenza mpasi koleka komekama nyonso oyo nakutaná na yango.” Alobi lisusu boye: “Nazali kaka na mposa makasi ya mwasi na ngai, kasi sikoyo nandimi mpenza ete ezali na likambo moko te oyo Yehova atiki ekómela biso oyo ekoki komemela biso mpasi ya libela.”

Yo mpe ozelaka, lokola Ricardo na bamilio ya bato mosusu, ntango oyo bampasi oyo ezali kotungisa bato sikoyo ‘ekokanisama lisusu te, ekoya mpe lisusu na motema te’? (Yisaya 65:17) Yebá mpenza ete okoki kozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe soki olandi toli oyo ya Biblia: “Bóluka Yehova . . . na ntango oyo akoki komonana. Bóbelela ye na ntango oyo azali naino penepene.”​—Yisaya 55:6, NW.

Mpo na yango, salá ete kotánga Liloba ya Nzambe mpe koyekola yango na likebi mpenza ezala na esika ya liboso na bomoi na yo. Luká koyeba Nzambe mpe moto oyo ye atindaki, Yesu Klisto. Luká kotosa mitinda ya Nzambe na bomoi na yo mpo na komonisa ete olingi komitya na nse ya boyangeli na ye. Soki ozali kosala bongo, okozwa esengo monene banda sikoyo, ezala ata okutani na mikakatano ya ndenge nini. Mpe na mikolo ezali koya, okozwa bomoi ya seko na kati ya mokili oyo ekozala na mpasi te.​—Yoane 17:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba na nse ya lokasa ya Bible de Jérusalem na Genese 2:17 elimboli “koyeba malamu mpe mabe” ete ezali “likoki ya kopona . . . nini ezali malamu mpe nini ezali mabe mpe ya kosala makambo ndenge likoki yango ezali kosɛnga; ezali kobɛta ntolo oyo moto abɛtaki ete ye moko akoyeba kopona mabe na malamu mpe na ndenge yango, alakisaki ete aboyi komitya na esika na ye ya ekelamu.” Maloba na nse ya lokasa yango ebakisi boye: “Lisumu ya liboso ezalaki nde koboya boyangeli ya Nzambe.”

b Mokapo 10 mpe 11 ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, elobeli na molai bisakweli ya Biblia oyo etali mobu 1914.

[Etanda na lokasa 6, 7]

NDENGE NINI TOKOKI KOYIKELA MPASI MPIKO?

‘Bóbwaka mitungisi na bino nyonso likoló na Nzambe.’ (1 Petelo 5:7) Ekómelaka moto nyonso ete, ntango azali komona mpasi to ntango azali komona moto oyo ye alingaka azali komona mpasi, ayeba lisusu likambo ya kosala te, ayoka nkanda to mpe amona ete basundoli ye. Kasi, tóyeba malamu ete Yehova ayebi ndenge biso tomiyokaka. (Exode 3:7; Yisaya 63:9) Lokola bato ya sembo na ntango ya kala, tokoki kofungolela ye mitema na biso mpe koyebisa ye makambo oyo tozali kokakatana mpo na kondima yango mpe mitungisi na biso. (Exode 5:22; Yobo 10:1-3; Yilimia 14:19; Habakuku 1:13) Ntango mosusu, akosala likamwisi te mpo na kolongola mikakatano na biso; kasi, mpo na koyanola na mabondeli na biso oyo euti na motema, akoki kopesa biso bwanya mpe makasi mpo na koyikela mikakatano yango mpiko.​—Yakobo 1:5, 6.

“Bókamwa te mpo na komekama oyo ezali kobimisela bino mpasi, lokola nde likambo moko ya kokamwa ezali kokwela bino.” (1 Petelo 4:12, New International Version) Awa, Petelo azali kolobela minyoko, kasi maloba na ye ekoki mpe kosalelama mpo na mpasi ata ya ndenge nini oyo mondimi akoki kokutana na yango. Bato bazali komona mpasi mpo bakeleli, bazali na maladi to mpe mpo bazali kokufela baninga to bandeko na bango. Biblia elobi ete “ntango mpe makambo ekanami te” ekómelaka bato nyonso. (Mosakoli 9:11, NW) Lelo oyo, makambo wana ezali na kati ya makambo oyo bato bazali kokutana na yango na bomoi na bango. Soki toyebi ete ezali bongo, ekosalisa biso tóyika mpiko ntango mpasi to mokakatano ekómeli biso. (1 Petelo 5:9) Libosoliboso, tokozwa mpenza libɔndisi soki tozali kobosana te elaka oyo elobi ete ‘miso ya Yehova etalaka bato ya boyengebene, mpe matoi na ye eyokaka koganga na bango.’​—Nzembo 34:15; Masese 15:3; 1 Petelo 3:12.

“Bósepelaka na kati ya elikya.” (Baloma 12:12) Na esika tókanisaka ntango nyonso bolamu oyo tozalaká na yango, tokoki komanyola likoló ya elaka oyo Nzambe apesi ete akosilisa mpasi nyonso. (Mosakoli 7:10) Elikya yango ya solosolo ekobatela biso ndenge ekɔti ebatelaka motó. Elikya ekitisaka bampasi ya bomoi mpe esalisaka biso tótikela bampasi yango nzela te ete ebebisa ntango nyonso makanisi, mayoki, to elimo na biso.​—1 Batesaloniki 5:8.

[Elilingi na lokasa 5]

Adama na Eva baboyaki boyangeli ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 7]

Nzambe alaki mokili oyo ekozala na mpasi te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto