Okoki kozwa bwanya
“Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Na vɛrsɛ oyo, kokomama “na litambwisi ya elimo ya Nzambe” elimboli ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindaki bakomi ya Biblia bákoma makanisi na ye.
Nzambe alingi ozwa bolamu oyo bwanya na ye epesaka
“Ngai Yehova nazali . . . koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.”—YISAYA 48:17, 18.
Zwá maloba oyo lokola Nzambe azali koloba na yo mpenza. Alingi ete motema na yo ezala na kimya mpe ozala na esengo ya libela, mpe akoki kosalisa yo mpo ozwa yango.
Okoki kozwa bwanya ya Nzambe
“Nsango malamu esengeli liboso kosakolama na bikólo nyonso.”—MARKO 13:10.
“Nsango malamu,” esangisi mpe bilaka ya Yehova ya kosilisa bampasi, kokómisa mabele paradiso, mpe kozongisa na bomoi bato oyo tolingaka oyo bakufá. Nsango malamu yango euti na Biblia, mpe Batatoli ya Yehova bazali kosakola yango na mokili mobimba.