Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp24 No. 1 nk. 14-15
  • Mabe ná malamu: Osengeli kopona

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabe ná malamu: Osengeli kopona
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
  • Masolo mosusu
  • Mibeko ya Nzambe na oyo etali malamu ná mabe esilá ngala?
    Makambo mosusu
  • Salelá Yehova na kolanda mitinda na ye ya sembo
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Basaleli ya Yehova balingaka boyengebene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mitinda ya nani okoki kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
wp24 No. 1 nk. 14-15
Elenge mobali oyo tomonaki na masolo oyo eleki, azali kotala na esengo nyonso nsima ya kokóma na nsɔngɛ ya ngomba.

Mabe ná malamu: Osengeli kopona

Mibeko etali bizaleli malamu oyo toponaka kosalela ekoki kosala ete tózala na bomoi ya esengo to te. Yehova Nzambe ayebi yango. Yango wana alingi ete tósalela mibeko na ye na bomoi na biso.

Yehova alingi tózala na bomoi ya kimya mpe ya esengo.

“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, moto oyo azali koteya yo mpo na bolamu na yo moko, moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Soki otyaka likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale mpe bosembo na yo lokola mbonge ya mbu.”—Yisaya 48:​17, 18.

Lokola Nzambe azali Mozalisi na biso, ayebi lolenge ya bomoi oyo eleki malamu mpo na biso. Asɛngi biso tótosa mibeko na ye mpo ekozala mpo na bolamu na biso. Soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe, tokomituna te soki ekateli na biso ekobimisa matomba ya malamu. Ekozala ntango nyonso ekateli ya malamu oyo tokozwa mpe oyo ekomemela biso kimya mpe esengo.

Yehova asɛngaka biso te tósala likambo oyo ekoki kosalema te.

“Mitindo oyo nazali kopesa yo lelo eleki makasi te mpo na yo, mpe ezali mosika mpenza te mpo ozwa yango.”—Kolimbola Mibeko 30:11.

Kosalela mibeko ya Nzambe na bomoi na biso ekoki kosɛnga tóbongola ndenge na biso ya kokanisa mpe ya kosala makambo. Ata bongo, Yehova azali te kosɛnga biso likambo oyo eleki makoki na biso. Lokola ye moto asalá biso, ayebi makoki na biso. Mpe soki toyebi Yehova, tokomona ete “mibeko na ye ezali kilo te.”—1 Yoane 5:3.

Batatoli ya Yehova mibale bazali koyekola Biblia na mwasi moko, bazali kosalela buku “Sepelá na bomoi libela na libela!”

Yehova alaki ete akosalisa baoyo baponi kosalela mibeko na ye na bomoi na bango.

“Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Nakosalisa yo.’”—Yisaya 41:13.

Tokoki kolonga kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na biso mpo ye moko akosalisa biso. Nzambe asalisaka biso na nzela ya Liloba na ye Biblia, oyo elendisaka biso mpe epesaka biso elikya.

Bamilio ya bato na mokili mobimba bamoni ete kosalela mibeko ya Nzambe ebongisi bomoi na bango. Tolendisi yo oluka koyeba batoli mosusu ya malamu oyo Biblia epesi. Okoki kobanda naino na kotalela mwa buku Sepelá na bomoi libela na libela! oyo ezali ofele na jw.org. Na kati ezali na mateya oyo:

  • Biblia ekoki kosalisa yo?

  • Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya

  • Makambo oyo Biblia elobi ezali mpenza solo?

Wana ozali koyekola na mozindo Biblia Liloba ya Nzambe, okomona ete ezali te buku moko oyo esilá ngala; kasi “ebongi kotyelama motema ntango nyonso, sikoyo mpe mpo na libela.” (Nzembo 111:8) Kotosa mibeko oyo ezali na Biblia ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Kasi, Nzambe akotindika biso na makasi te. (Kolimbola Mibeko 30:​19, 20; Yosua 24:15) Ezali likambo oyo mokomoko na biso asengeli kopona.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto