Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 3 lok. 3
  • Makambo nini osengeli kotalela?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo nini osengeli kotalela?
  • Lamuká!—2021
  • Masolo mosusu
  • Mozalisi akoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Kómisá kondima na yo makasi epai ya Mozalisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mozalisi na biso Monene azali komibanzabanza mpo na biso!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Bomoi ebandá ndenge nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 3 lok. 3
Na kokamwa nyonso, mwasi moko azali kotala mokonzi moko ya lingomba oyo asimbi Biblia mpe moto moko ya siansi oyo asimbi shema ya ADN.

Okoloba nini?

“Molɔ́ngɔ́ ekoki kosalema yango moko mpe ekomisala yango moko.”​—Stephen Hawking ná Leonard Mlodinow, bato ya mayele na physique, 2010.

“Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.”​—Biblia, Ebandeli 1:1.

Nzambe nde asalá molɔ́ngɔ́ mpe bomoi oyo ezali na kati na yango to ebimá kaka yango moko? Eyano oyo bato ya mayele mibale na makambo ya physique oyo touti kolobela na ebandeli ya lisolo oyo bapesi, mpe eyano oyo vɛrsɛ ya liboso ya Biblia epesi ekeseni mosika mpenza. Bato mingi bandimaka makanisi yango nyonso mibale. Kasi, bato mingi mpe bayebi eyano ya malamu te. Bato batyelanaka ntembe na likambo yango na babuku mpe na baemisyo ya TV.

Ntango mosusu, balakisi na yo mpe basilá koloba ete molɔ́ngɔ́ mpe bomoi oyo ezali na kati na yango ebimá kaka yango moko, moto asala yango te, mpo Nzambe azali te. Kasi, balakisi na yo basilá kolakisa yo makambo oyo emonisi ete Mozalisi azali te? Ntango mosusu, osilá koyoka basango ná bapastɛrɛ bazali koteya ete Mozalisi azali. Kasi, basilá kopesa yo elembeteli moko oyo endimisi likanisi na bango? To basɛngaki yo nde ondima maloba na bango mpo ezali likambo ya “kondima” to mpo ezali liteya ya lingomba?

Ntango mosusu, osilá kokanisa na motuna yango. Mbala mosusu, moto moko te akoki komonisa na bosikisiki ete Mozalisi azali. Okoki mpe komituna boye: Kozwa eyano na motuna yango ezali mpenza na ntina?

Ya liboso, nimero ya Lamuká! oyo ekolobela makambo oyo etindá bato mingi bándima ete Mozalisi azali. Na nsima, ekolobela ntina oyo eyano na motuna etali ndenge bomoi ebandá ezali na motuya mingi mpenza.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto