Mozalisi na biso Monene azali komibanzabanza mpo na biso!
1 Na molende na ye mpo na komema libota ya Yisalaele oyo ezangaki botosi ete bákanisa malamu, Yehova atunaki: “Oyebi te? Oyoki te ete [Yehova] azali Nzambe libela motongi na nsuka na mokili?” (Yis. 40:28) Toyebi Mozalisi na biso Monene, mpe tozali komona lolenge azali komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na biso. Nzokande, bamilio ya bato bazali kondima te ete azali to bayebi ye na lolenge oyo ezali na boyokani te na Biblia. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?
2 Buku ya sika oyo ezali na motó ya likambo ete Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? (Ezali na Mozalisi oyo azali komibanzabanza mpo na yo?) ebongi mpo na kosalisa bato motindo wana. Ezali kopusa bato ya mayele ete bátalela makambo oyo mazali komonana na miso. Buku yango ezali na makambo oyo ezali kobenda likebi mpe makanisi ya kondimisa. Ekosepelisa mpenza baoyo bakotánga yango.
3 Tómesana na buku Créateur: Ezali malamu koyeba likambo ya ntina oyo ezali kolobelama kati na buku yango. Mokapo 2 kino mokapo 5 ezali kolobela lolenge oyo molɔ́ngɔ́ mobimba, bomoi, mpe bato basalemaki mpe oyo asalaki yango. Mokapo 6 kino mokapo 9 ezali kolobela Biblia mpe Mobandisi na yango mpe, mingimingi, ezali komonisa ete nyonso oyo mokanda ya Genese elobi na ntina na kozalisama ezali makambo ya solo. Mokapo 10 ezali kopesa eyano ebongi na motuna moko ya makasi mingi oyo moto amitunaka: “Soki Mozalisi amibanzabanzaka mpo na biso, mpo na nini mpasi ezali mingi boye?”
4 Sololá na baoyo bazali kobɛta ntembe: Lokasa 78 kino 79 ya buku Créateur (Mozalisi) ezali komonisa mwango oyo okoki kosalela mpo na kosalisa basusu ete bákóma na makanisi malamu na ntina na Nzambe. Tuná bango ete: “Molɔ́ngɔ́ ezali na ebandeli?” Mingi bakondima ete ezali na ebandeli. Soki ezali bongo, tuná: “Ebimaki pwasa to ezalisamaki?” Mingi bandimaka ete ezalisamaki. Yango ezali komema na motuna ya nsuka ete: “Molɔ́ngɔ́ ezalisamaki na eloko moko oyo ezangi nsuka to Moto moko oyo azangi nsuka?” Motuna oyo ekoki komema bato mingi na komona ete ezali na Mozalisi oyo azalisaki yango.
5 Buku Créateur ezali mpenza buku oyo bato mingi basengeli na yango. Lakisá yango epai ya bandeko na yo, baninga ya mosala, baninga ya kelasi, mpe bato mosusu oyo oyebani na bango. Memá yango ntango nyonso oyo obimi na mosala ya kosakola na boye okozala na likoki ya kolakisa yango epai ya bato oyo okokutana na bango mpe oyo bazali kondima te ete Nzambe azali. Soki tomeseni mingi na buku oyo, bolingo na biso mpo na Mozalisi na biso ekokóma makasi, ekopusa biso ete tókoba kotambola na boyokani na mitinda na ye.—Ef. 5:1; Emon. 4:11.