OYO OKOKI KOSALA NTANGO NTALO YA BILOKO EZALI KOMATA
Sepelá na oyo ozali na yango
Baoyo basepelaka na biloko oyo bazali na yango, balukaka bomoi ya mindɔndɔ te. Mpe ntango makambo ya bomoi na bango ebongwani, basalaka bambongwana oyo esengeli mpo básalela mbongo mingi te koleka oyo bazali na yango.
MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
Jessica Koehler, moto moko ya mayele na makambo ya psychologie alobi boye: “Bato oyo basepelaka na oyo bazali na yango, bazalaka na makanisi ya malamu.” Alobi lisusu boye: “Bato ya ndenge wana, balulaka te biloko ya bato mosusu.” Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ndenge bato oyo basepelaka na oyo bazali na yango, bazalaka mpenza na esengo mpe bamitungisaka mingi te. Kutu, bato mosusu oyo bazalaka mpenza na esengo, bazalaka na biloko mingi te ya kobikela. Ezali mpenza bongo mpo na baoyo batyaka makanisi na bango nyonso na biloko oyo mbongo ekoki kosomba yango te. Na ndakisa, esengo oyo moto ayokaka wana azali kolekisa ntango elongo na bato ya libota mpe baninga na ye.
OYO OKOKI KOSALA
Boyá komikokanisa ná basusu. Soki ozali kokokanisa bomoi ezangi mindɔndɔ oyo ozali na yango ná bato oyo bazali na biloko mingi ya kobikela, yango ekoki kozangisa yo esengo, mpe okoki kokóma moto ya zuwa. Lisusu, komikokanisa ná bato mosusu ndenge wana, emonisaka ntango nyonso te makambo ya solo. Ekoki mpe kozala ete, bato mosusu oyo bazalaka na biloko mingi ya kobikela, bazalaka na banyongo ebele. Mwasi moko na nkombo Nicole, oyo afandaka na Sénégal, alobi boye: “Mpo na kozala na esengo, esɛngaka te kozala na biloko mingi. Soki nazali kosepela na biloko oyo nazali na yango, nakoki kozala na esengo ata soki bato mosusu bazali na biloko mingi ya kobikela koleka ngai.”
Meká kosala boye: Boyá bapiblisite mpe biloko oyo bato batyaka na Internet oyo elakisaka bomengo oyo bato mosusu bazalaka na yango.
Zalá na botɔndi. Mbala mingi, bato oyo bazalaka na botɔndi basepelaka na oyo bazali na yango mpe bakanisaka te ete basengeli kozala na biloko mingi. Roberton, mobali moko oyo afandaka na Haïti, alobi boye: “Nazwaka ntango mpo na kokanisa makambo ya boboto oyo bato mosusu basalelaki ngai ná libota na ngai. Na nsima, nayebisaka bango ndenge oyo nasepelaki na makambo yango. Nateyaka mpe mwana na ngai ya mobali oyo azali na mbula 8 ntina ya kopesaka mersi mpo na biloko nyonso oyo bapesaka ye.”
Meká kosala boye: Mokolo na mokolo, komáká makambo oyo mpo na yango osengeli komonisa botɔndi. Na ndakisa, ndenge ozali na sante ya malamu, mpo na libota na yo, baninga ya solosolo oyo ozali na bango, to mpe kotala kolala kitoko ya moi.
Na bantango mosusu, ezalaka mpasi mpo tósepela na oyo tozali na yango. Kasi milende oyo tosalaka, ezalaka mosala ya mpunda te! Soki tozali kosepela na oyo tozali na yango, tokozala mpe na esengo mingi—ezaleli mosusu oyo mbongo ekoki kosomba te.