LISOLO YA BOYEKOLI 31
LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso
‘Oyekoli sekele’ ya kosepela na oyo ozali na yango?
“Ezala ata na makambo ya ndenge nini, nayekoli kosepela na oyo nazali na yango.”—FLP. 4:11.
NA MOKUSE
Tokotalela ndenge oyo ezaleli ya botɔndi, komikitisa, mpe komanyola na elikya na biso mpo na mikolo ezali koya ekosalisa biso tósepela na oyo tozali na yango.
1. Koyeba kosepela na oyo ozali na yango elimboli nini, mpe elimboli nini te?
OYEBAKA kosepela na oyo ozali na yango? Moto oyo asepelaka na oyo azali na yango azalaka na esengo mpe na kimya mpo atyaka makanisi na mapamboli oyo asili kozwa. Akómaka nkandankanda te mpo azangi biloko mosusu. Nzokande, kosepela na oyo ozali na yango elimboli te komona ete okoki na nyonso. Na ndakisa, ebongi ete mokristo alukaka mabaku ya kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova. (Rom. 12:1; 1 Tim. 3:1) Atako bongo, abungisaka esengo na ye te soki mikumba oyo azali kolinga eyei noki te ndenge akanisaki.
2. Mpo na nini kozanga kosepela na oyo tozali na yango ezali likama mpenza?
2 Kozanga kosepela na oyo tozali na yango ekoki kosala ete tózwa bikateli ya mabe mpenza. Na ndakisa, baoyo basepelaka ata moke te na oyo bazali na yango bakoki koboma nzoto na mosala bangonga mingi mpo na kozwa biloko ya mosuni oyo bazali na yango mpenza mposa te. Likambo ya mawa, mwa bandeko mosusu bayibaki kutu mbongo to biloko mosusu oyo balulaki. Mbala mosusu bamilobaki, ‘Esengeli kozala ya ngai,’ ‘Nazeli mpe mingi,’ to ‘Nakozongisa mbongo yango nsima.’ Nzokande, moyibi ya lolenge nyonso esepelisaka Yehova te mpe epesaka ye lokumu te. (Mas. 30:9) Basusu balɛmbaki mpenza nzoto mpo bazwaki te mokumba moko boye mpe batikaki na bango kosalela Yehova. (Gal. 6:9) Ndenge nini moto oyo amipesá na Yehova akoki kokanisa kosala likambo ya ndenge wana? Likambo ya ndenge wana ekoki kosalema soki moto atiki kosepela na oyo azali na yango.
3. Ndenge nini maloba ya Bafilipi 4:11, 12 ezali kolendisa biso?
3 Biso nyonso tokoki koyekola kosepela na oyo tozali na yango. Ntoma Paulo akomaki ete ‘ayekolaki kosepela na oyo azali na yango, ata na makambo ya ndenge nini.’ (Tángá Bafilipi 4:11, 12.) Akomaki maloba yango ntango azalaki mokangami. Kasi, abungisaki esengo na ye te. Nini esalisaki ye? ‘Ayekolaki sekele’ ya kosepela na oyo azalaki na yango. Soki tozali kokoka te kosepela na oyo tozali na yango, maloba mpe ndakisa ya Paulo emonisi ete biso mpe tokoki koyekola ezaleli yango. Tókanisa te ete ekozala ntango nyonso pɛtɛɛ tósepela na oyo tozali na yango. Tosengeli nde koyekola kosepela na oyo tozali na yango. Ndenge nini? Tótalela bizaleli oyo ekosalisa biso tóyekola sekele ya kosepela na oyo tozali na yango.
YEKOLÁ KOZALA NA BOTƆNDI
4. Ndenge nini kozala na botɔndi esalisaka biso tósepela na oyo tozali na yango? (1 Batesaloniki 5:18)
4 Kozala na botɔndi esalisaka moto asepela na oyo azali na yango. (Tángá 1 Batesaloniki 5:18.) Na ndakisa, ntango tozali mpenza na botɔndi mpo na biloko ya kobikela oyo tozali na yango, tokomitungisa koleka ndelo te mpo na biloko oyo tolingi, kasi tozali na yango te. Soki tozali na botɔndi mpo na mikumba oyo tozali na yango sikoyo na ebongiseli ya Yehova, tokomipesa na kokokisa yango na esika ya koluka kaka kozwa mokumba ya sika. Yango wana Biblia elendisi biso ete na mabondeli na biso, tópesaka Yehova matɔndi! Kozala na botɔndi esalisaka biso tózala na “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi na biso.”—Flp. 4:6, 7.
5. Mpo na nini Bayisraele basengelaki kozala na botɔndi? (Talá mpe elilingi.)
5 Tótalela likambo oyo ekómelaki Bayisraele. Na mabaku ebele, bamilelalelaki epai ya Yehova ete bazangaki bilei oyo bazalaki kolya na Ezipito. (Mit. 11:4-6) Ya solo, bomoi na esobe ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, nini ekokaki kosalisa bango básepela na oyo bazalaki na yango? Basengelaki kokanisa nyonso oyo Yehova asilaki kosala mpo na bango mpe komonisela ye botɔndi. Ntango bazalaki baombo na Ezipito, bazalaki konyokola bango makasi mpenza, mpe Yehova atindelaki Baezipito malɔzi 10. Ntango bazalaki kobima na Ezipito, “bapunzaki Baezipito”; basɛngaki bango palata, wolo, mpe bilamba. (Kob. 12:35, 36) Ntango limpinga ya Farao elandaki Bayisraele na Mbu Motane, Yehova akabolaki mai na ndenge ya likamwisi. Mpe ntango nyonso oyo bazalaki na esobe, Yehova aleisaki bango mokolo na mokolo na mana. Sikoyo mpo na nini Bayisraele bamilelalelaki? Lokola bazalaki na botɔndi te, bazalaki kosepela te na oyo bazalaki na yango, atako Yehova asalaki mingi mpo na bango.
Mpo na nini Bayisraele batikaki kosepela na oyo bazalaki na yango? (Talá paragrafe 5)
6. Tokoki kosala nini mpo tókóma na botɔndi?
6 Ndenge nini okoki kokóma na botɔndi? Ya liboso, mokolo na mokolo, zwáká ntango ya kokanisa makambo ya malamu oyo ozali na yango. Okoki ata kokoma makambo mibale to misato oyo ozali na botɔndi mpo na yango. (Bil. 3:22, 23) Ya mibale, monisáká botɔndi na yo. Okoki koyebisa basusu ete ozali na botɔndi mpo na oyo basaleli yo. Koleka nyonso, pesáká Yehova matɔndi mbala na mbala. (Nz. 75:1) Ya misato, ponáká baninga oyo bazalaka na botɔndi. Soki okangami na bato oyo bazalaka na botɔndi, yo mpe okokóma na botɔndi; soki baninga na yo basepelaka te na oyo bazali na yango, yo mpe okozala kaka lokola bango. (Mib. 1:26-28; 2 Tim. 3:1, 2, 5) Ntango tozali kosala makasi mpo na komonisa botɔndi, ekozala mpasi tókóma na elimo ya kozanga kosepela na oyo tozali na yango.
7. Nini esalisaki Aci akóma na botɔndi?
7 Tótala likambo oyo ekómelaki Aci, oyo afandaka na Indonésie. Alobi boye: “Na ntango ya maladi mabe ya coronavirus, nabandaki kokokanisa makambo ya bomoi na ngai na oyo ya bandeko mosusu. Yango esalaki ete nasepela te na oyo nazalaki na yango.” (Gal. 6:4) Nini esalisaki Aci abongola makanisi na ye? Alobi boye: “Nakómaki kotánga mapamboli oyo nazalaki kozwa mokolo na mokolo mpe kokanisa ebele ya makambo ya malamu oyo nazwaki na kati ya ebongiseli ya Nzambe. Na nsima, napesaki Yehova matɔndi mpo na nyonso wana. Na yango, motema na ngai ekómaki mpenza kosepela na oyo nazalaki na yango.” Soki yo mpe ozali kosepela lisusu te na oyo ozali na yango, okoki kosala makambo oyo Aci asalaki mpo okóma lisusu na botɔndi.
ZALÁ NA KOMIKITISA
8. Baruke akweaki na motambo nini?
8 Baruke, sɛkrɛtɛrɛ ya mosakoli Yirimia, akweaki na motambo moko mpo na mwa ntango. Baruke azalaki na mokumba moko ya mpasi: kosalisa Yirimia mpo na koyebisa nsango ya etumbu na bato ya ekólo oyo bazangaki botɔndi. Kendekende, Baruke alongolaki makanisi na mokumba na ye. Na esika atya makanisi nyonso na mosala oyo Yehova alingaki asala, emonani ete Baruke abandaki kokanisa mingi bomoi na ye moko mpe makambo oyo azalaki na mposa ya kosala. Na nzela ya Yirimia, Yehova ayebisaki Baruke boye: “Ozali koluka makambo minene mpo na yo moko. Tiká koluka makambo yango.” (Yir. 45:3-5) Na maloba mosusu, Yehova alobaki na ye: “Sepelá na bomoi oyo ozali na yango sikoyo.” Baruke andimaki toli mpe Yehova akobaki kosepela na ye.
9. Na kotalela 1 Bakorinti 4:6, 7, komikitisa ekotinda biso tóndima likambo nini? (Talá mpe bililingi.)
9 Na bantango mosusu, mokristo akoki komona ete abongi kozwa mokumba moko boye na ebongiseli ya Yehova. Mbala mosusu azali na mayele mingi, asalaka mosala makasi, to ayebi makambo mingi, to mbala mosusu azali na makoki yango nyonso misato. Kasi, ekoki kozala ete bandeko mosusu bazwi mokumba oyo mokristo yango azali kokanisa. Nini ekoki kosalisa ye azala na makanisi oyo ebongi? Akoki kokanisa makambo oyo ntoma Paulo akomaki na 1 Bakorinti 4:6, 7. (Tángá.) Mokumba nyonso oyo tozwi mpe mayele nyonso oyo tozali na yango euti epai ya Yehova. Tosalá eloko te mpo tózwa yango; tobongi mpe na yango te. Nyonso wana ezali mpo na boboto monene ya Yehova.—Rom. 12:3, 6; Ef. 2:8, 9.
Makoki nyonso oyo tozali na yango ezali mpo na boboto monene ya Yehova (Talá paragrafe 9)b
10. Ndenge nini tokoki kolona komikitisa?
10 Tokoki kolona komikitisa soki tokanisi mpenza ndakisa oyo Yesu atikelá biso. Kanisá butu oyo Yesu asukolaki bantoma na ye makolo. Ntoma Yoane akomaki boye: “Yesu, lokola ayebaki [1] ete Tata asilaki kopesa biloko nyonso na mabɔkɔ na ye mpe [2] ete autaki epai ya Nzambe mpe [3] azalaki kokende epai ya Nzambe, . . . abandaki kosukola makolo ya bayekoli.” (Yoa. 13:3-5) Yesu akokaki komona ete ebongi basusu nde básukola ye makolo. Kasi ntango nyonso oyo azalaki awa na mabele, amonaki ata moke te ete abongi kozala na bomoi ya bomɛngo to oyo ezangi mpasi. (Luka 9:58) Yesu azalaki na komikitisa; azalaki kosepela na oyo azalaki na yango. Na yango, atikelá biso ndakisa ya kokoka.—Yoa. 13:15.
11. Nini esalisaki Dennis asepela na mikumba oyo azali na yango?
11 Dennis, ndeko moko ya Pays-Bas, asalaka makasi alanda ndakisa ya komikitisa ya Yesu, kasi ezalaka pɛtɛɛ te. Alobi boye: “Na bantango mosusu ezaleli ya lolendo mpe kozanga kosepela na oyo nazali na yango ekɔtelaka ngai, na ndakisa ntango moto mosusu nde azwi mokumba moko. Ntango esalemi bongo, nayekolaka masolo oyo elobeli komikitisa. Na programɛ JW Library® oyo natyá na telefone na ngai, nabombá bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli komikitisa mpo namona yango noki mpe natánga yango lisusu. Nazwá mpe mwa badiskur oyo elobeli komikitisa, mpe nayokaka yango mbala na mbala.a Nakangi ntina ete mosala nyonso oyo tosalaka ezali mpo na kokumisa Yehova, kasi biso moko te. Mokomoko na biso azali kopesa mwa mabɔkɔ mpo mosala ya Yehova ekende liboso.” Soki ozali kosepela te mpo ozwi te mokumba moko boye, salá makasi olona komikitisa. Yango ekokómisa makasi boninga na yo na Yehova mpe ekosalisa yo osepela na oyo ozali na yango.—Yak. 4:6, 8.
MANYOLÁKÁ NA ELIKYA NA YO
12. Elikya nini oyo etali bomoi na mikolo ezali koya ekosalisa biso tósepela na oyo tozali na yango lelo? (Yisaya 65:21-25)
12 Tokosepela mpenza na oyo tozali na yango soki tozali komanyola bilaka ya Yehova mpo na mikolo ezali koya. Na mokanda ya Yisaya, Yehova amonisi ete ayebi ete bomoi ya lelo ezali na mitungisi mingi mpe alaki ete akosilisa makambo nyonso oyo etungisaka biso. (Tángá Yisaya 65:21-25.) Tokozala na bandako ya kitoko mpe tokofanda kuna na kimya. Tokozala na misala oyo ekopesa biso esengo, mpe tokobanda kolya bilei ya kitoko mpe oyo etongaka nzoto. Tokomitungisa lisusu ata moke te ete makama ekómela biso to bana na biso. (Yis. 32:17, 18; Ezk. 34:25) Bomoi na biso na mikolo ezali koya ekozala malamu mpenza mpo bilaka nyonso wana ekokokisama.
13. Ntango nini tosengeli mpenza kokanisa elikya na biso ya mikolo ezali koya?
13 Lelo, koleka na bileko mosusu nyonso, tosengeli kotya makanisi na elikya na biso. Mpo na nini? Mpo tozali na “mikolo ya nsuka” mpe biso nyonso tozali kokutana na “mikakatano.” (2 Tim. 3:1) Mokolo na mokolo, Yehova azali kosalisa biso tóyika mpiko na ndenge azali kopesa biso litambwisi, makasi, mpe lisungi oyo tosengeli na yango. (Nz. 145:14) Longola yango, elikya oyo tozali na yango mpo na mikolo ezali koya esalisaka biso tókanga motema na bantango ya mpasi. Mbala mosusu ozali kobunda mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na yo. Yango elingi nde koloba ete okokoba kaka kobundabunda ndenge wana? Te! Yehova alaki ete akopesa yo oyo osengeli na yango, mpe biloko mingi koleka, na Paradiso. (Nz. 9:18; 72:12-14) Mbala mosusu ozali na mpasi oyo ezali kosila te, ozali konyokwama na makanisi, to ozali na maladi mosusu ya makasi mpenza. Bomoi na yo yango wana kaka, elikya ya koyoka malamu ezali te, libela na libela? Ezali bongo te. Maladi mpe liwa ekosila na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (Em. 21:3, 4) Elikya yango esalisaka motema na biso esepela na oyo tozali na yango, mpe tózala nkandankanda te, banda sikoyo. Tokoki kosepela ata ntango tokutani na makambo ya kozanga bosembo, ntango moto oyo tolingaka akufi, to ntango tokutani na makambo mosusu ya mabe. Mpo na nini? Mpo ata soki tokutani na mokakatano ya mpasi ndenge nini lelo, toyebi ete “komekama ezali ya ntango mokuse” mpe ete na mokili ya sika tokonyokwama lisusu te.—2 Ko. 4:17, 18.
14. Ndenge nini tokoki kokómisa elikya na biso makasi?
14 Lokola elikya esalisaka biso tósepela na oyo tozali na yango, ndenge nini tokoki kokómisa yango makasi? Kaka ndenge ekoki kosɛnga ete moto alata manɛti mpo amona malamu na mosika, ekoki kosɛnga tósala makambo mosusu mpo na kokómisa elikya na biso makasi mpo Paradiso oyo ezali koya ezala polele mpenza na makanisi na biso. Ntango mitungisi elati biso mpo tozangi mbongo, tokoki komona na makanisi ndenge bomoi na biso ekozala ntango mbongo, banyongo, mpe bobola ekozala lisusu te. Soki tozali komitungisa ete tozwi naino te mokumba moko boye, tokoki kokanisa ndenge mitungisi ya bongo ekozala na ntina te ntango biso nyonso tokozala bato ya kokoka mpe tokosalela Yehova na boumeli ya bankóto ya bambula. (1 Tim. 6:19) Tokoki komona ete ezali mpasi tókanisa makambo ya malamu oyo ekoya mpo tozali na mitungisi mingi lelo. Kasi, soki tozali kokanisa mingi makambo oyo Yehova alaki, kendekende ekokóma momeseno na biso.
15. Maloba ya Christa eteyi yo nini?
15 Talá ndenge elikya esalisi ndeko Christa, mwasi ya Dennis oyo tolobelaki liboso. Christa alobi boye: “Nazali na maladi oyo elyaka misuni ya nzoto malɛmbɛmalɛmbɛ mpe esɛngaka ete nasalela kiti ya bibɔsɔnɔ mpe nalekisa ntango mingi na mokolo kaka na mbeto. Nayokaka mpasi na nzoto mikolo nyonso. Mikolo oyo eleki, monganga na ngai ayebisaki ngai ete emonani ete nakobika te. Kasi na nse ya motema namilobaki mbala moko: ‘Azali kotalela mikolo ezali koya ndenge ngai natalelaka yango te.’ Natye makanisi na elikya na ngai, mpe yango epesaka ngai kimya ya motema. Lelo, nazali komona mpasi na mokili oyo, kasi nakosepela mpenza na bomoi na mokili ya sika!”
“BAOYO BABANGAKA YE BAZANGAKA ELOKO TE”
16. Mpo na nini Mokonzi Davidi akokaki kokoma ete baoyo babangaka Yehova “bazangaka eloko te”?
16 Ata mosaleli ya Yehova oyo asepelaka na oyo azali na yango akokutana na mikakatano. Tózwa ndakisa ya Mokonzi Davidi. Bana na ye ata misato bakufaki. Bakoselaki ye moko makambo, moninga na ye abalukelaki ye, mpe balukaki koboma ye na boumeli ya bambula ebele. Atako bongo, ntango akutanaki na mokakatano moko ya makasi, Davidi alobaki mpo na Yehova ete: “Baoyo babangaka ye bazangaka eloko te.” (Nz. 34:9, 10) Mpo na nini akokaki koloba bongo? Mpo atako biso basaleli ya Yehova tozelaka te ete tózala na bomoi oyo ezangi mikakatano, tondimaka ete tokozanga te eloko oyo tozali na yango mpenza mposa. (Nz. 145:16) Mpe tokoki kotya motema ete Yehova akosalisa biso na mikakatano na biso nyonso. Na yango, tokoki ntango nyonso kosepela na oyo tozali na yango.
17. Mpo na nini ozwi ekateli ya koyekola sekele ya kosepela na oyo ozali na yango?
17 Yehova alingi ete osepelaka na oyo ozali na yango. (Nz. 131:1, 2) Yango wana, salá makasi oyekola sekele yango. Soki osali nyonso mpo okóma na botɔndi, oloni komikitisa, mpe okómisi elikya na yo makasi, okozala na likoki ya koloba ete: “Ɛɛ, nasepeli.”—Nz. 16:5, 6.
LOYEMBO 118 “Bakiselá biso kondima”
a Na ndakisa, talá na jw.org video ya Losambo ya ntɔngɔ Yehova atyelaka bato ya komikitisa likebi mpe Lolendo ezalaka liboso ya kokwea.
b NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mobali moko azali kobongisa masini na ndako moko ya teokrasi, ndeko mwasi moko oyo ayekolá elobeli ya bajɛstɛ azali kosala mituna-lisolo na liyangani, mpe ndeko mobali moko azali kosala diskur.