Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 1 nk. 5-9
  • Ndenge nini okoki koloba maloba kitoko mpe ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki koloba maloba kitoko mpe ya solo
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Tólobaka malamu mikolo nyonso
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Zaláká na maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Ozali “ndakisa . . . na maloba”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Bimisáká maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 1 nk. 5-9

Liteya 1

Ndenge nini okoki koloba maloba kitoko mpe ya solo

1-3. Nani apesaki moto likoki ya koloba, mpe ndenge nini likoki yango ekolaki?

1 Jéhovah azali Mozalisi monene ya liloba. Tika ete lokumu ezala na ye mpamba te akelaki mwango oyo kitoko ezali kopesa nzela na bikelamu na ye ya mayele ete balobanaka. Misala nyonso na Nzambe mizali malamu, yango wana likoki ya koloba oyo ye apesaki moto na ebandeli ezali solo moko na ‘makabo mabongi’ oyo Biblia elobeli yango kati na Yakobo 1:17. Na ntina na likoki ya koloba oyo epesamaki na biso bato, Ludwig Koehler, molimboli na maloba na bato akomáká boye: “Toyebi mpenzampenza malamu te eloko nini esalemaka ntango moto azali koloba, ndenge nini móto ya bososoli epelisaka elimo . . . mpe ebimisaka maloba. Koloba ya moto ezali libombami, likabo euti na Nzambe, likamwísi.”

2 Uta azalisamaki, Adame ayebaki maloba mwa mingi mpe azalaki na likoki ya kobakisa maloba mosusu na vokabilere na ye. Na mokuse, azalaki na likoki ya kolobana mpe koyokana na bazalani na ye. Ayebaki kobimisa polele makanisi na ye mpe kosimba makambo bazalaki koloba na ye. Na ndakisa, toyebi ete Nzambe alobaki na Adame mpe apesaki ye malako, toyebi lisusu ete Adame alobanaki na Eva. — Gen. 1:27-30; 2:16-20.

3 Kasi ekomaki eleko moko oyo mabe ezalaki mingi na mokili, mpe Nzambe abulunganisaki lokota ya bato na ndako molai ya Babel. (Gen. 11:4-9) Yango wana lelo tozali na minoko mingi, mpe mingi na yango ekabwani lisusu na minoko mikemike. Nkota mosusu ezali kolobama bobele na bikólo mikemike, nzokande mingi ezali minoko minene oyo bamilió na bato bazali koloba yango. Lokola moto azali lisusu na kokoka te, bobele bongo maloba ya bomoto mazali lisusu na kokoka te lokola epesamaki na yango na ebandeli. Lelo oyo maloba mazali kosalelama mpo na kopalanganisa lokuta mpe kopengwisa bato longwa epai na Nzambe.

4. Ndenge nini tosengeli kosalela likoki ya koloba oyo epesameli biso?

4 Kasi biso baoyo tozali baministre ya Jéhovah, tolingi kosalela malamu liloba. Tozali na libaku malamu ya koloba mpo na Nzambe ya solo mpe kokabolana elongo na bazalani na biso nsango na ye kitoko na ntina etali bomoi ya seko kati na mokili ya sika mpe ya sembo. Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ebimisami mpo na kosalisa biso ete toyeba kokokisa malamumalamu mokumba oyo.

5, 6. Mpo na nini ezali likambo na ntina ete tolobaka ntango nyonso solo?

5 Maloba na solo. Kosalela malamu liloba esengi ete tolobaka solo ntango nyonso, tolobaka mpenza na boyokani na Liloba na Nzambe. Lokuta ekoki kosalisa bato na elimo te. Yango wana ntoma Paulo apesaki biso toli oyo ya mayele: “Osimba lolenge na maloba na sembo mayoki yo epai na ngai.” Mpo na nini? Ezali mpo ete “lolenge na maloba na sembo” oyo euti epai na Nzambe. (2 Tim. 1:13) Paulo asakolaki ete bamoko ‘bakoboya koyoka solo’, kasi amonisaki ete biso tozali na mokumba ya ‘kosakola liloba’, Liloba ya Nzambe. Esengeli na biso kokangama na solo ya bonzambe, mpe kotongá kosakola na biso nyonso mpe mateya na biso nyonso likoló na yango. — 2 Tim. 4:1-5.

6 Toyebi biso banso ete liloba libongi, lilobami na ntango malamu, likoki kolakisa moto nzela ya bomoi ya seko to kosalisa ye ete akangama na nzela yango. (Mas. 18:21; Yak. 5:19, 20) Yango wana esengeli ete ministre moko na moko ayeba kosalela malamu maloba, mpe likambo yango elobelami mingi na Eteyelo ya mosala ya Nzambe.

7-9. Maloba nini mabongi malamu mpo na bayoki?

7 Kopona maloba. Maloba mazali kosalisa moto oyo azali koloba ete ayebisa makanisi na ye epai na moto mosusu. Yango wana esengeli ete apona maloba oyo makobimisa makanisi na ye polele mpe asalela vokabilere oyo bayoki na ye bakoki kosimba ntina na yango noki. Na ebandeli, ekoki kozala na yo mpasi mpo na koyeba kopona maloba. Salomo mokonzi na mayele, “atalaki malamu, alukaki mpe abongisaki masese mingi. Mosakoli alukaki mpe maloba na kitoko mpe na sembo, akomaki maloba na solo”. (Mosakoli 12:9, 10) Kosalela mayele na boongó, koluka mpe kotala malamu esengeli mpo na kopona maloba mabongi. Mos 12:11 Vɛrsɛ ya zomi na moko, bobele na mokapo wana moko na Biblia emonisi ete maloba maponami malamu makoki kobimisa matomba malamu. “Maloba na bato na mayele” makokisami kati na yango na “mpimbo oyo ezali na ntonga”, yango ezali koyikisa bato mpiko mpe kozwisa bango ekateli ete bakangama na nzela ya bomoi.

8 Moko na mitinda ya liboso oyo tosengeli kosimba ezali boye ete toyeba kosalela maloba ya petee. Maloba na mindondo ezali na litomba moko te. Eleki malamu kosalela maloba ya petee mpo ete yango ezali fungola ya mayele mpe ezali kosalisa bayoki na biso ete bakanga yango na boongó na bango. Kanisa naino mpo na maloba ya liboso ya Biblia; ezali ya petee koleka kasi ezali mpe kitoko mingi. Ezali boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.” Moto akoki kobosana yango te! Bobele bongo, mpo na maloba ya nsuka ya mokanda ya Mosakoli: “Banga Nzambe mpe batela mibeko na ye; yango ezali mosala na bato nyonso.”— Mosakoli 12:13.

9 Totika kosalela maloba oyo mazali kotya molili na solo ya Nzambe. Tolingi te ‘kobulunganisa toli na maloba mazangi boyebi’. (Yobo 38:2) Mpamba te, “soko kelelo ekoloba polele te”, nani akotya likebi mpe akosimba ntina?— 1 Bakol. 14:8.

10, 11. Ndenge nini Yesu apesi biso ndakisa na lolenge na ye ya koloba?

10 Biso banso tokoki kozwa litomba soko tokolanda ndakisa malamu mingi oyo Yesu Klisto atikelaki biso. Elobeli na ye ya petee mpe masese na ye mazwamaki na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo ezalaki kosimba mitema ya bayoki na ye. Tomikundola diskur oyo asalaki na likoló ya ngomba moko penepene ya Kapernaume; tozali kokuta diskur yango kati na Mokanda ya Matai, banda na mokapo ya mitano kino na mokapo ya nsambo. Maloba mineneminene? Soki moke te. Maloba mayebani te? Ata moko te. Yesu azalaki koluka ntango nyonso kokotisa solo kati na elimo ya bato mpe kosimba mitema na bango. Atondaki solo na makanisi ya Tata na ye, Jéhovah. Mpo na oyo etali koloba, azali ndakisa eleki kitoko oyo baministre nyonso ya Jéhovah basengeli kolanda.

11 Tobosana soko moke te ete maloba na solo na polele, na petee mpe maponami malamu mazali na nguya mingi. Makoki kosepelisa makasi bayoki na yo, kopesa bango makanisi malamu mpe kopusa bango na mosala. Na ntina na Yesu, Luka 4:22 eyebisi biso ete bayoki na ye “balobaki malamu na ntina na ye mpe bakamwaki na maloba na ngolu mabimaki na monoko na ye”. Bobele bongo mpo na bantoma na ye, bato mingi bazalaki koyoka bango na likebi. Nzokande, mikóló na Bayuda bayebaki “bango ete bazali bato bameseni na mikanda te, mpe bato bayekoli te”. (Misala 4:13) Ndenge nini bakomaki koloba malamumalamu? Ezali mpo ete balandaki bametode ya Nkolo na bango, Klisto. Oyo ezali elendiseli monene mpo na baministre ya Nzambe na mikolo na biso, ata bazali bilenge to mikolo.

12. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango ete bayeba koloba malamu?

12 Baboti bakoki kosalisa mingi bana na bango ete bayeba koloba malamu. Na kati ya libota, bakoki kobongisa bango, na ndakisa na bango mpe na mateya, ete bayeba kosolola malamu mikolo nyonso. Bakoki kokotisa kati na elimo na bango mitinda ya Biblia, oyo esengeli kotambwisa maloba na biso. (Deter. 6:6-9) Mabota mingi bakamataka mwa minite ntongo nyonso mpo na kolobana likoló na texte ya mokolo na mokolo oyo epesami kati na buku moke Tótangaka Makomami mokolo na mokolo, mpe na bantango mosusu batangaka elongo Mosenzeli to Lamuká! na mongongo makasi. Mabota wana bazali bongo kozwa formation moko malamu mingi, kobakisaka maloba mosusu na vokabilere na bango mpe kolukaka koyeba ndenge nini maloba yango makoki kosalelama na lolenge kitoko mpo na koyokana malamu elongo na bazalani. Epai mosusu, bazali kotonda na makanisi na Jéhovah, mpe yango ekomonana na elobeli na bango.

13-16. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa matomba mingi na Eteyelo ya mosala ya Nzambe?

13 Tokola na kosangana na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Na nzela na mateya malakisami na buku oyo, baoyo nyonso balingi solo kokola kati na mosala ya Nzambe bakosalisama ete bayeba kosalela “maloba kitoko mpe . . . maloba na solo”. Ata mbula nini ozali na yango, ata okotaki kelasi mingi te, soki otii motema na etambwiseli mpe na elimo ya Jéhovah okoki kokola kati na mosala ya boklisto. Nzokande esengeli na yo kotya molende. Biblia epesi biso toli oyo: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bamona polele ete ozali kokola.”— 1 Tim. 4:15.

14 Kati na milende oyo esengami na biso, moko na moko kati na biso asengeli kozwa ekateli ete azangisa ata likita moko te na makita nyonso mabongisami na lisangá ya Jéhovah; nzokande, ekoki bobele kozwa ekateli oyo te, esengeli lisusu kotosa yango. Longola makita mosusu, Eteyelo ya mosala ya Nzambe oyo ezali kosalema poso na poso ekosalisa yo ete otosa toli oyo ntoma Paulo apesaki na Timote: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai na Nzambe lokola mosali oyo abongi koyoka nsoni te, awa ezali yo kosembola liloba na solo.”— 2 Tim. 2:15.

15 Baoyo nyonso, mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, babatisami to babatisami naino te, oyo bazali koyangana na makita ya lisangá bakoki kokomisa nkombo na bango na eteyelo oyo mpe kozwela yango matomba. Baoyo bakotaki kelasi mingi te basengeli komikundola ete Nzambe ayebisaki ete nsango ya Bokonzi ekoyambama na bato mingi ya mayele na mosuni te, soki mpe bato ya lokumu soki mpe bato bayekoli mingi na mokili. (1 Bakol. 1:26-29) Kasi ayebisaki mpe ete bato mingi oyo mokili ezali komona bango bato mpamba bakoyoka nsango yango mpe bakosakola yango epai na bato mosusu oyo bazali na mposa ya koyeba solo. Soki okomisi nkombo na yo na eteyelo yango mpe soki okolanda mateya na yango poso na poso, okozwa boyebi oyo ekosalisa yo ete oyeba kosakola maloba kitoko epai na bato na kolongobana. Yango ekozala elendiseli mpo na yo mpe mpo na bato oyo bakoyokamela yo.

16 Likoló na nyonso, na kolanda poso na poso mateya oyo, okoluka, na maloba na yo mpe na misala na yo ete okokisa libondeli oyo ya David, mokonzi na Yisraele: “Tika ete maloba na monoko na ngai mpe makanisi na motema na ngai mazala kitoko liboso na yo, ô Jéhovah, Nguya na ngai mpe Mosikoli na ngai.” (Nz. 19:14) Moklisto nyonso asengeli kozala na mposa makasi ete ayekola koloba malamu ntango nyonso mpe kosalela maloba oyo makosepelisa Mozalisi. Eteyelo ya mosala ya Nzambe ekosalisa yo mingi mpo na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto