Liteya 11
Tólobaka malamu mikolo nyonso
1. Ndenge nini maloba na biso makoki kozala kitoko liboso na Jéhovah?
1 “Tika ete maloba na monoko na ngai . . . mazala kitoko liboso na yo, ô Jéhovah!” (Nz. 19:14, MN) Mpo ete mokapo yango ekokana na biso, esengeli na biso ete tólobaka makambo oyo makoki kolendisa baninga, na lolenge ebongi na mosaleli na Nzambe. Na elobeli na biso, tolingi komonisa ete tozali basaleli ya sembo ya Nzambe mikolo nyonso, nde bobele ntango tozali na Salle du Royaume te soki mpe ntango tozali kosangana na mosala ya kosakola. Maloba oyo tozali kobimisa na ndako, na mosala ya mosuni to na kelasi ekopesa litatoli malamu mingi na mosala na biso ya boklisto.—2 Bakol. 6:3.
2, 3. Mpo na nini ezali likambo na ntina ete tosenzela na elobeli na biso mpe na maloba oyo tozali kosalela?
2 Lolenge na biso ya koloba ezali na ntina. Nzokande, ntango tolobaka, elongi na biso, nzela moko na mongongo na biso, ezali komonisa mayoki na biso. Esengo tozali na yango lokola tozali basaleli ya Jéhovah esengeli komonana na elongi na biso. Ezaleli ya boninga mpe koseka ebendaka bato. Ya solo, makambo mazali na Biblia ezali liseki te; nde ata bongo, mazali mpe na elendiseli. Na yango, ebongi ete tozala na móto. Kokanga elongi ebongi te mpo na nsango ya elikya oyo tozali kosakola.
3 Ekosila yo komesena mpo na oyo etali koloba okomona ete maloba mazali lokola na “bomoto”. Liloba ekoki kozala ya kozokisa to ya boboto, ya makasi to ya bopolo, ya boninga to ya bonguna, ya kolendisa to ya kolembisa. Yango wana ezali likambo ya ntina na kopona liloba oyo ebongi, mingimingi wana ezali biso kosakola solo, nsango malamu ya Bokonzi.
4. Tokoki kosala nini mpo tokoka koyeba maloba mingi to vokabilere?
4 Luka kobakisa maloba mosusu na oyo oyebi. Soki ofungoli diksionere, okomona ete maloba mazangi te mpo na kokumisa Jéhovah. Ebongi kotalaka diksionere mpo na koyeba ndimbola ya maloba ya sika. Osalaka yango? Na ntango ozali kotanga, luka ndimbola ya maloba oyo oyebi yango malamu te, ntango mosusu okoki kokoma yango na lokasa moko mpo ete nsima na kosilisa botangi na yo, oluka ndimbola na yango. Kosalaka boye, okoyeba maloba mingi to vokabilere. Na botangi na yo, okomona lisusu ete maloba mingi oyo ozali kokuta kuna na kati oyebi yango kasi osalelaka yango mingi te. Sala makasi mpo ete oyeba kosalela yango malamu na esika ebongi. Lokola ozali ministre moklisto, osengeli kolona ntango nyonso likoki ya koloba lokótá na bino ndenge esengeli kolobama.
5, 6. Ndenge nini tokoki koyekola na kotya liloba na liloba na esika na yango?
5 Yekola kotya liloba na liloba na esika ebongi na yango. Okoki komona lokola ete maloba mibale mazali na ndimbola moko, nzokande ekeseni kati na yango mwa moke; kokesena wana nde ekosalisa yo na koyeba esika nini osengeli kosalela mokomoko na yango. Soki okosenzela mpo na yango, okozokisa bayoki na yo te, mpe maloba na yo makozala polele. Ezali litomba na koluka ndimbola kati na diksionere moko malamu. Badiksionere mosusu elakisaka maloba oyo mazali na ndimbola moko (synonymes) mpe maloba oyo mazali na ndimbola ya kontrere (antonymes). Okokuta na kati ebele na maloba oyo okoki kosalela mpo na kolobela likanisi moko, nzokande liloba mokomoko ekeseni mwa moke na mosusu. Yango ekosalisa yo ete okoka kosalela liloba na liloba na esika na yango. Na motindo yango, okozala na mposa te ya kosalela maloba mingimingi mpo na koloba likambo moko; okozala nde na maloba mokuse. Maloba mingimingi ekobungisaka makanisi. Omimesenisa bongo kosalela se maloba moke. Ekosila yo koyekola koloba bobele maloba moke, okobongisa elobeli na yo koleka, kobakisaka maloba ndenge na ndenge, lokola oyo eyebi kolimbola makambo mpe eyebi kobimisa ntina.
6 Kolisa vokabilere na yo, bobele mpo na koyekolaka maloba ya sika te, kasi lisusu koyekola motindo ya maloba: ba verbes ya nguya, ba adjectifs oyo ekopesaka elengi na elobeli ya moto, bikangiseli to conjonctions ya ndenge na ndenge, nyonso wana mpo ete elobeli na yo ezala se na maloba ndenge moko te. Salela maloba ya móto mpe ya boboto. Na kotanga mikanda ya la Société, okokuta ndenge nyonso ya maloba mpe bafraze oyo okoki kosalela.
7, 8. Soki tokomi na boyebi ya maloba mingi, ezaleli nini tosengeli kopengola?
7 Ya solo, soki tokolisi vokabilere na biso to tokomi na boyebi ya maloba mingi, ezali mpo na komikumisa na miso ya bamosusu te. Mokano na biso ezali mpo na kokabela bato makanisi mabongi kasi ezali mpo na kokamwisa bayoki te. Tosengeli kozala na makanisi ndenge moko na ntoma Paulo, oyo alobaki boye: “Nde kati na lisangá nalingi koloba maloba mitano na makanisi na ngai mpo na kolakisa bamosusu koleka maloba nkoto [na monoko ya bopaya].” (1 Bakol. 14:9, 19) Soki elobeli na biso ezali komplike, elingi koloba ete bato bazali koyoka eloko te, ezali lokola ete tozali koloba na monoko ya bopaya, oyo bayoki na biso bayebi yango te. Ntina ezali te ya kosalela maloba ya komplike wana ezali biso koloba na bato oyo toyebi ete bakoki koyoka elobeli wana te. Na masolo na biso ya mokolo na mokolo, toluka te kosalela maloba minene lokola ya bato ya mayele na mokili. Eloko tozali koluka ezali bobele ete bayoki na biso bakanga ntina na makambo tozali kolobela bango. Tobosana te ete, engebene Masese 15:2, “lolemo na bato na mayele ekososolisa boyebi malamu”. Maloba maponami malamu mpe oyo bato bakoki kokanga ntina na yango noki, ekobongisa elobeli na biso; na esika ete ezala mpio mpe lokola gitare ya nsinga moko mpamba, ekozala nde elendiseli mpo na bayoki na biso mpe ekoyikisa bango mpiko.—Bakolose 4:6.
8 Osengeli mpe koloba liloba nyonso kozanga libunga. Mpo na yango, tala kati na diksionere mpe yoka prononciation ya baoyo balobaka malamu lokótá na bino. Kosalaka boye, okobebisa maloba te. Bandeko mosusu bamelaka maloba to bakangisaka yango na bisika bisengeli te. Koloba lokola moto azali koimaima te. Bongisa koloba na yo. Fungola malamu monoko mpe bimisa liloba nyonso polele.
9-12. Maloba ya motindo nini tosengeli koboya kosalela yango, mpe mpo na nini?
9 Maloba oyo tosengeli koboya. Liloba na Nzambe emonisi biso lolenge nini ya maloba tosengeli koboya kati na masolo na biso ya mikolo nyonso. Na ndakisa, ntoma Paulo apesi biso toli ete toboya koloba “makambo nyonso na mbindo”, lokola liseki na “maloba na bosoto, maloba na zoba to maloba ya mpamba”. (Baef. 5:3, 4) Na yango, totika kosalela maloba ya bosoto to maloba ya nsoni. Paulo akomaki lisusu: “Tika te ete maloba na bosoto mabima na minoko na bino kasi bobele yango mazali malamu mpo na kolendisa, pelamoko ezali bosenga, ete mapesa bayoki ngolu.” (Baef. 4:29) Moklisto asengeli koboya maloba ya nsoni lokola oyo bamokili basalelaka to mpe maloba mazangi limemya. Bato mosusu bakanisaka ete kosalela maloba motindo wana ezali na ntina mpo na kosimbisa moto ntina na likambo bazali koloba, nzokande ezali na maloba mingi mabongi oyo tokoki kosalela mpo na komonisa ete tozali koloba likambo ya ntina. Ntango tozali kolobana na bato motindo oyo, toboya komekola elobeli na bango. Maloba na petee maleki malamu, kasi ebongi ete mazala peto mpe na libunga te.
10 Tokoboya mpe mitindo mosusu ya kobalola maloba kozanga kotosa gramere. Elobeli oyo, ezali kosalelama mingi na babeti miziki, epalangani mingi kati na banzembo ya lelo. Bato bazali koluka kolanda bamizisié, kasi moklisto akoki komekola maloba motindo wana te. Soki asali bongo, mbele akomonisa na wana ete likeseni ezali te kati na ye mpe bato ya mokili. Bameli-bangi, basali na mabe mpe basali na pite, bazali na maloba na bango oyo basalelaka misala na bango, mpe moto oyo ameseni na bango te akoki koyeba te eloko nini bazali koloba. Kasi mpo na biso, tokoki kotika te ete bopusi ya mokili ekota kati na elobeli na biso.—Baloma 12:2.
11 Moklisto akoboya maloba mazangi limemya. Bato mosusu basalelaka bafraze oyo ezali na maloba “Nzambe”, “Nkolo” mpe “Yesu” kati na yango, bobele mpo na kondimisa makambo bazali koloba. Maloba lokola “Nzambe mpenza!” ezali mpo na kokata tsheleka. Nzokande, oyo nyonso baklisto basengeli koboya kosalela yango.—Ex. 20:7; Mat. 5:34-37.
12 Mbala mosusu, maloba oyo toyokaka makoki kosilikisa biso, kasi ebongi te ete moklisto azongisa na maloba ya nkanda to na bifingeli. Ntoma Paulo alobaki: “Bolongola na minoko na bino makambo yango nyonso: nkele, nkanda, kotónga, kotuka, maloba na nsoni.” (Bakolose 3:8) Na yango, atako maloba ya bato mosusu epesi yo nkanda, nzela ya mayele ezali boye ete opekisa mayoki na yo.—Masese 14:29; Yak. 3:11.
13-16. Ndenge nini tokoki kobakisa boyebi na biso ya gramere mpe kobongisa elobeli na biso?
13 Totosa gramere. Bandeko mingi bakoloba ete bango bazali makasi te na gramere. Mbala mosusu babokwamaki na mokili mosusu to bakotaki kelasi te na ntango bazalaki bana. Na esika ete balemba, ebongi batya molende mpenza mpo na koyekola, mpo na nsango malamu. Tala mwa batoli ebongi kosalelama. Kotanga na mongongo makasi kati na libota ezali libaku malamu mpo na kosembola bambeba na biso mpo na oyo etali elobeli. Tokoki mpe koyekola makambo mingi matali gramere na koyokamela bandeko oyo bayebi koloba malamu engebene gramere. Na yango, tya likebi na ntango bandeko bateli mpe bayekoli bazali koloba. Na ntango ozali kotanga Biblia mpe mikanda ya la Société, tala malamu etongeli ya bafraze mpe mitindo ndenge na ndenge ya gramere esalelami na esika boye to na esika boye. Landa bandakisa oyo malamu na elobeli na yo.
14 Bilenge baklisto basengeli kosalela mabaku malamu mapesameli bango na eteyelo mpo na koyekola malamu gramere mpe motindo ya kobenga liloba mokomoko. Soki ozali koyeba ntina na mobeko moko te kati na gramere, tuna molakisi na bino ete alimbwela yo lisusu. Olemba noki te, mpamba te mokano na yo ezali ete ozala mosakoli abongi ya nsango malamu.
15 Sala makasi na koloba lokóta na bino ndenge esengeli kolobama. Ye oyo alobaka malamu te na masolo na ye ya mokolo na mokolo, akanisa te ete akoloba malamu ntango bakopesa ye diskur. Osengeli kosalaka ekzersise mpo oyeba koloba malamu. Nzokande, soki na koloba na yo ya mokolo na mokolo osalelaka maloba mabongi, ntango okoleka na liboso ya lisangá mobimba to ntango okozala na mosala ya kosakola, okoloba lokola moto ameseni, mpe kozanga kokakatana, kopesaka litatoli na ntina na solo ya bonzambe.
16 Soki tokomimekisa na koloba malamu mikolo nyonso, tokotondisa elimo na biso mpe motema na biso na maloba kitoko oyo tokokoka kosalela yango mpo na kolimbola bosepeli na biso na mikano kitoko ya Jéhovah na ntina etali Bokonzi na ye. Kosalaka bongo, maloba oyo ya Yesu makomami na Luka 6:45 makokokana mpo na biso: “Moto malamu abimisi [maloba] malamu kati na makambo malamu mabombami na motema na ye.”