Liteya 8
Komilengela ezali na ntina
1-5. Komilengela ezali na ntina mpo na nani, mpe mpo na nini?
1 Paulo, ntoma epai na mabota, alobaki boye epai na Tito, moninga na ye kati na mosala: “Kanisela bango [baklisto] . . . bamilengela mpo na misala nyonso malamu”. (Tito 3:1) Basengelaki bongo komilengela na mayele mpe na makanisi mpo na mosala oyo basengelaki kosala.
2 Ata mosala nini epesameli biso na lisangá ya Nzambe, komilengela liboso ezali na ntina. Na mbala ya liboso oyo okosala mosala moko to devuare moko epesameli yo, okozala na mposa ete omilengela mingi, mpo ekozala likambo ya sika mpo na yo. Kasi nsima na mikolo, wana boyebi na yo ekobakisama mingi, okoki kotóka kati na boyekoli na yo ya kala mpe na eksperianse oyo osili kozwa. Nzokande, atako omeseni kosalaka badevuare, komilengela ekozala ntango nyonso se na ntina.
3 Komilengela liboso ezali na ntina bobele mpo na baoyo bakosala diskur te, kasi lisusu mpo na moto na moto oyo alingi kobonga na motindo na ye ya ministre ya nsango malamu. Ya solo, soki ozali mosakoli uta sanza mingi to uta mbula mingi mpe omeseni kokenda ndako na ndako, okolekisa ntango mingi te mpo na komilengela mbala nyonso oyo olingi kobima. Nde atako bongo, komilengela ekobongisa biso malamu koleka. Ezali se ndenge moko mpo na boyekoli ya Biblia. Mbala ya liboso oyo otambwisaki boyekoli ya Biblia, olekisaki naino ntango mingi mpo na komilengela. Nzokande, ata osili koyekola mokapo moko mbala mingi, okotambwisa boyekoli na malamu koleka soki okobwaka lisusu miso na mokapo yango, kokanisaka moto oyo ozali kokende koteya. Ezali se ndenge moko na ntango osengeli kosala diskur. Komesena oyo osili komesena na boumeli ya mbula mingi ekosalisa yo solo, kasi soki oyebi ete okoleka liboso ya bato mpo na koloba, eleki malamu komilengela.
4 Mpo na oyo etali Eteyelo ya mosala ya Nzambe, biso banso tosengeli kobongisa makambo makolobama kuna. Moyekoli mokomoko azali na programme na ye ya eteyelo mpe ayebi liboso mikapo nini ya Biblia to ya mokanda mosusu oyo ekoyekolama. Komilengela liboso ekopesa yo nzela na kozwela yango matomba mingi. Nde soki ozali komona ntina ya komilengela te, okozanga bolamu mingi oyo eteyelo ekoki kopesa yo.
5 Esengeli ntango mpo na komilengela, kasi ebebi mpamba te soki totaleli matomba oyo tokoki kozwa na nsima. Komilengela ezali kosalisa biso na kopesa biyano malamu na ntango ya bozongeli, nde lisusu ezali kosalisa biso na kosimba ntina na makanisi na Jéhovah mpe komikotela malamumalamu “monoko na peto”, elingi koloba solo. (Sofoni 3:9) Kamata momeseno ya komibongisa liboso na kotanga mpe na koyekola makambo makolobama na eteyelo, elongo na libota na yo to elongo na baninga. Lokola baoyo nyonso bapesaki nkombo na eteyelo bazali na libaku ya kosala badevuare, tala mwa batoli mpo na lolenge malamu ya komilengela:
6. Ndenge nini tokoki kobongisa botangi oyo epesameli biso na Eteyelo ya mosala ya Nzambe?
6 Kotanga na mongongo makasi. Programme ya Eteyelo ya mosala ya Nzambe ekozalaka na botangi na mongongo makasi. Mpo okoka komilengela, tanga naino na likebi nyonso eteni oyo epesamelaki yo. Omimesenisa na kotanga bankombo ya bato to bankombo ya bamboka mpe maloba ya kwokoso. Na nsima meka kotanga mbala mingi na mongongo makasi kino okokoka kotanga lokola lisolo, kozanga kokakatana mpe kozanga kobebisa maloba. Mpo na kosukisa, tala montre mpo na koyeba soki okoki kotanga na minite oyo bakatelaki yo.
7-11. Na ntango tozali kobongisa diskur na lisolo moko ezwami na zulunalo, nini ekosalisa biso mpo na kopona makanisi oyo tokosalela?
7 Diskur ezwami na lisolo moko kati na zulunalo. Mpo na kobongisa diskur motindo oyo, osengeli naino kotanga na likebi nyonso lisolo oyo bapesi yo. Tya mikólótó na nse na makambo ya ntina to kamata papier mpe koma wana makanisi oyo maleki ntina. Nsima na yango, pona wapi oyo okosalela, mpamba te okokoka koloba nyonso te na mwa minite oyo bapesi yo. Mpo oyeba kopona makanisi oyo okosalela, talela: (1) banani bakozala bayoki na yo mpe motindo nini okosalela lisolo na yo, — soki nde yango ekopesa yo nzela na komonisa malamu ndenge nini kosalela makanisi malakisami; (2) motó ya likambo bapesi yo mpe ndenge likambo ekoki kotalela bayoki na yo.
8 Na kokanisaka liboso mpo na bato oyo bakoyoka yo, okopona kati na lisolo yango makambo oyo makosepelisa bango mpe makozala litomba mpo na bango. Soki omoni ete baparagrafe mosusu ezali kwokoso mingi mpo na bayoki na yo, pona mosusu. Pona mpe mikapo oyo okotanga mpo na komonisa bosolo ya maloba na yo. Mpo ete bayoki bazwa litomba na diskur na yo, kotalela ebele na makanisi te, mpamba te soki okomi koleka mbangumbangu, litomba mpenza ekomonana te. Eleki malamu kotalela makanisi moke kasi na mozindo.
9 Mpo na badevuare mingi oyo epesami na bayekoli, ebongi kopona kadre ya sikisiki to ndenge ya kosalela. Okoki kosala lisolo na yo lokola ete ozali koloba na moto moko oyo okutani na ye ndako na ndako, to ozali koyanola na motuna moko batuni yo na ntango ya vizite, to lisusu na ntango ya kosakola na litatali ya libaku malamu. Okoki mpe kosala devuare na yo lokola ete ozali kolimbola likambo moko epai na mwana na yo. Kadre to ndenge ya kosalela ezali mingi. Na yango, yeba kopona moko oyo ebongi malamu. Kanisa naino liboso ya kopona mpe lobela yango na basakoli mosusu oyo bakoki mpe kosunga yo.
10 Teme nini oponi mpo na lisolo na yo mpe ekateli nini olingi ete bayoki na yo bakamata nsima na koyoka yo? Kanisa na yango, wana ezali yo kopona makanisi oyo okosalela. Tika pembeni makanisi oyo mazali mosika na teme na yo mpe na mokano ya diskur na yo. Eleki malamu kozwa makanisi nyonso se na lisolo ya zulunalo oyo bapesaki yo, na esika ete olukaluka epai mosusu. Nzokande epekisami te kosalela ndakisa moko malamu oyo otangaki epai mosusu to pwɛ́ mosusu oyo ekosalisa bayoki ete basimba ntina malamu na lisolo oyo ozali kopesa bango. Soki likoki ezali, kozanga te komonisa ndenge nini makanisi opesi etali bato nyonso oyo bazali wana, mpo ete bango bazwela yango litomba mpenza.
11 Nsima na kopona teme na yo mpe ndenge ya kosalela lisolo na yo to kadre mbala mosusu okomona ete baparagrafe mosusu kati na zulunalo ezali mpenza litomba te mpo na diskur na yo. Okanisa te ete osengeli kosalela paragrafe nyonso. Sala nde boye: pona teme mpe kadre oyo ekopesa yo nzela ya kolobela bayoki na yo makanisi mabongi oyo otoki yango kati na lisolo ya zulunalo oyo balakisaki yo ete osalela.
12. Ndenge nini tokoki kobongisa diskur bobele na mikapo ya Biblia oyo mipesameli biso?
12 Diskur likoló na mikapo ya Biblia. Ntango mosusu ekosengela na yo kosala diskur etongami bobele na liste moko ya baversets ezwami na mwa mokanda moke Biyano mpo na mituna ya Biblia to na mokanda “Comment raisonner à partir des Écritures”. Soki ekomi boye, mokano na yo ekozala ete osala diskur moko lokola esengeli, to mpe mwa lisolo moke lokola ekosalemaka kati na mosala ya kosakola. Soki baverset bapesi yo eleki mingi mpe ntango ezali moke, pona bobele mwa ndambo na yango. Kamata bobele oyo okokoka kolimbola yango malamu engebene ntango epesameli yo. Na nsima, sosola verset mokomoko oyo ozali kokana ete okotanga yango. Tala mpo na nini olingi kotanga yango. Omilengela na motindo boye ete ntango okobimisa verset mokomoko, ebenda likebi ya bayoki na yo, bayeba ntina oyo otangeli yango. Na verset nyonso oyo okotanga, nyata maloba ya ntina. Mpo na kosukisa, monisa likanisi eleki monene mpe monisa ndenge ya kosalela yango.
13-15. Metode nini ekosalisa biso na kobongisa diskur oyo bobele titre mpamba epesameli biso?
13 Diskur oyo bobele titre mpamba epesami. Na eteyelo ya mosala ya Nzambe, na likita ya mosala to na libaku mosusu, bakoki kosenga na yo ete osala diskur moko oyo bobele titre mpamba epesameli yo. Bayebisi yo ata makanisi ya moboko te. Na yango, okoki kosala boye: Kanisa mpe zwa note na makanisi ya ntina oyo, engebene yo, masengeli kokota kati na diskur. Kosala boye ezali na ntina mingi, mpamba te okoluka ete diskur ezala ya yo mpenza na esika ya kolokota makanisi ya bato mosusu. Esili yo kozwa note na makanisi ya ntina oyo okokotisa na lisolo na yo, okobebisa ntango te mpo na kolukaluka to kotangatanga makambo oyo matali lisolo na yo te. Epai mosusu, okokoka kosalela maloba na yo moko na esika ete osalela elobeli oyo ebongi na bomoto na yo te. Ekoki mpe kozala litomba ete olobela lisolo na yo epai ya bandeko bateli. Bakoki kopesa yo makanisi malamu mpo na lolenge oyo okoki kosala lisolo na yo.
14 Sika ekomi ntango ya kobakisa bandimbola na makanisi oyo osili kozwa note na yango. Ozali na mposa ya boluki kati na Biblia mpe na mikanda misusu, na lisalisi ya concordance mpe ba index ya mikanda ya la Société. Mpo na kozwa matomba mingi na mokanda oyo olingi kotala makambo kati na yango, ebongi malamu kotala naino table des matières to kolandana ya mitó ya makambo. Na nsima, mpo na kozwa makanisi ya sikisiki oyo ozali koluka, tala index. Kosala boye ekosalisa yo na komona noki makambo oyo ozali koluka. Mpamba te, na kotanga na yo, soki okebi te okoki kopengwa kino na makambo oyo mazali ata na boyokani moko te na lisolo oyo ozali kobongisa. Mpo ete okwea na motambo oyo te, bwaka miso nokinoki na bapage, zwa note bobele na biteni oyo okoki kosalela. Mbala mingi ekoki bobele kozwa note na maloba ya ntina to fraze clé ya paragrafe moko na moko, mpe kotanga na mozindo bobele baparagrafe oyo etali mpenza lisolo na yo.
15 Esili yo kosangisa esika moko makanisi na yo mpe oyo otóki na mikanda, ozali sikawa na likoki ya kopona makanisi maleki malamu oyo okoki kolobela yango bayoki na yo na ntango epesameli yo. Mpo na koyeba wapi oyo okopona kati na ebele na makanisi yango, omituna mituna milandi: Likanisi oyo ezali solo na motuya mpo ete bato basalela yango? Ekoki kosepelisa bato? Ezali na boyokani mpenza na teme na ngai? Bongo na bongo.
16, 17. Toli nini epesameli biso mpo na lolenge malamu oyo tokoki kosalela mpo na kokamata banote?
16 Ndenge nini okoki kozwa banote. Na ntango ozali koluka makambo oyo okokotisa kati na diskur na yo, esengeli ozala na metode moko malamu mpo na kozwa note na ebele na makanisi oyo ozali kokundola. Bamoko bamonaki malamu kosalela biteni ya papier oyo bakati yango lokola bafiche mpe kokoma likoló na fiche mokomoko bobele likanisi moko monene oyo okoki kosalela kati na diskur.
17 Banote esengeli kozala mikuse mpenza, koma bobele maloba oyo makoki kokundola yo likanisi. Banote mikuse eleki malamu, mpamba te ntango okobanda koloba, okosalela maloba oyo makozala kobimela yo mbala moko na elimo na esika ete otanga liloba mokomoko oyo okomaki yango kokoma mpe ezali maloba ya bato mosusu. Nzokande, kobosana te kokoma mokanda to zulunalo epai ozwelaki makambo yango, mpo ete soki mposa ezali, okoka kotala lisusu page mpe paragrafe epai omonaki makambo yango. Koma lisusu mikapo ya ntina oyo okosalela mpo na kondimisa maloba na yo. Malamu ya bafiche ezali boye ete okoki kobakisa mosusu to kolongola, mpe ekosengela te ete obandela kokoma diskur mobimba.
18. Mpo na nini tozali na mposa ya kozala libota libongami?
18 Libota libongami. Soki ozalaka na bopoto mpo na kobongisa mikumba mipesameli yo na lisangá ya Nzambe, kanisa malamu ete komilengela liboso ezali na ntina monene epai na baoyo balingi kondimama na Jéhovah. Omikundola, na ndakisa, ete Yoane Mobatisi azwaki mokumba ya “kobongisela Jéhovah libota libongami”. (Luka 1:17) “Libota libongami” oyo, ezalaki Bayisraele oyo bamitikaki na maboko ya Jéhovah ete abongisa bango mpo ete bakoka kosala mosala oyo alingaki kopesa bango. Ezali ndenge moko mpo na biso. Soki tokozwa litomba mpenza na Eteyelo ya mosala ya Nzambe mpe tozali kobongisa malamu masolo nyonso, Jéhovah akobongisa biso na nzela na programme oyo ya mateya azali kopesa biso. Mpe tokozala baministre malamu mingi ya Nzambe.