Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 43 lok. 234-lok. 235 par. 3
  • Salelá mokanda oyo batindi yo osalela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá mokanda oyo batindi yo osalela
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobongisa masolo na yo ya eteyelo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Komilengela ezali na ntina
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Ndenge ya kobongisa masukulu ya lisangá
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge ya kosala plan ya lisolo na yo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 43 lok. 234-lok. 235 par. 3

LITEYA 43

Salelá mokanda oyo batindi yo osalela

Osengeli kosala nini?

Lisukulu na yo esengeli kolanda mpenza lisolo oyo bapesi yo, mpe soki batindi kotala na mokanda mpo na kozwa makambo oyo okoloba, osengeli kozwa mikapo mpe makanisi ya ntina kuna na mokanda yango.

Yango ezali na ntina nini?

Soki tozali kosalela makambo ya mokanda oyo batindi tósalela mpo na lisukulu na biso, yango ekomonisa ete tozali kotosa programɛ oyo moombo ya sembo mpe ya mayele asali mpo na koleisa biso.

BIBLIA ekokanisi lisangá ya boklisto na nzoto ya moto. Eteni mokomoko ezali na ntina, kasi ‘yango nyonso ezali na mosala moko kaka te.’ Biso mpe ndenge moko, tosengeli kondima kokokisa mokumba nyonso oyo bapesi biso. Mpo na kotosa likambo yango, tosengeli kokangaka ntina ya lisolo nyonso oyo bapesi biso mpe kobongisa yango malamu, na esika ya komona ete masolo mosusu ezali na ntina mingi te mpo tozali kokanisa ete lisolo boye to boye eleki yango. (Lom. 12:4-8) Moombo ya sembo mpe ya mayele azali na mokumba ya koleisa biso biloko ya elimo “na ntango oyo ebongi.” (Mat. 24:45) Ntango tozali kobongisa masukulu na biso na makoki oyo tozali na yango, soki tozali kolanda malako oyo bazali kopesa biso, tokolakisa botɔndi na biso mpo na ebongiseli yango. Na ndenge wana, lisangá mobimba ekosala mosala na yango malamu.

Makambo oyo okoki kokɔtisa. Ntango bapesi yo lisolo ya kosala na eteyelo, salá makasi olobela kaka likambo oyo basɛngi yo olobela, mosusu te. Mbala mingi, batindaka kozwa makambo ya kolobela na mokanda moko. Soki batyeli yo mokanda te, yo moko okoki koluka mateya na mikanda nyonso oyo olingi. Atako bongo, ntango ozali kobongisa lisolo na yo, salá ete lisolo yango mobimba elanda kaka likambo oyo bapesi yo olobela. Ntango ozali koluka makambo oyo okoki kokɔtisa na lisolo yango, kobosana te kokanisa bato oyo bakoyoka yo.

Yekolá malamumalamu makambo ya mokanda oyo batindi yo osalela mpe talelá malamu bavɛrsɛ oyo batii wana. Na nsima, kanisá ndenge oyo okoki kosalela yango malamu mpo na bolamu ya bato oyo bakoyoka yo. Na kati ya mokanda esika batindi yo, poná makanisi mibale to misato, soki likoki ezali mpe salelá yango lokola makanisi ya ntina na lisukulu na yo. Kaka na mokanda yango lisusu, poná bavɛrsɛ oyo okotánga mpe okolimbola.

Okozwa nde makambo nyonso oyo ezali na mokanda esika batindi yo? Te, okozwa kaka ndambo oyo okoki kolobela na ndenge oyo ebongi. Kolobela makambo ebele ebele te, noki te okobebisa mateya. Soki makambo mosusu oyo ezali na mokanda esika batindi yo ebongi mpenza te na ntina ya lisolo na yo, tiká yango mpe tyá makanisi na makambo oyo ekosalisa yo okokisa mokano yango. Na mokanda oyo okotánga mpo na kozwa makanisi mpo na lisolo na yo, zwá makanisi oyo omoni ete ekoteya mpenza mpe ekosalisa bato oyo bakoyoka yo. Na toli oyo, mokano na yo ezali te ya komona soki okokoka kolobela makambo nyonso ya mokanda oyo bapesi. Mokano na yo ezali nde ya kozwa makanisi ya lisolo na yo na mokanda yango.

Elingi koloba te ete na lisolo na yo okopesa kaka mwa makanisi mokuse ya makambo oyo ozwi na mokanda oyo bapesi. Osengeli komityela mokano ya kolimbola makambo mosusu, kolobela yango na mozindo, kopesa bandakisa, mpe soki likoki ezali, kopesa ndakisa moko mpo na komonisa ndenge ya kosalela yango na bomoi. Soki okobakisa makanisi mosusu, ekozala mpo na kolimbola makambo ya ntina oyo ezali na mokanda oyo bapesi, kasi ekozala te mpo na kolongola makambo ya mokanda yango mpe koteya makambo mosusu na esika na yango.

Nsima ya mikolo, bakoki kosɛnga bandeko mibali oyo bakómi na makoki ya koteya básala masolo na Likita ya Mosala. Bandeko wana bayebi ntina ya kosalela malamumalamu makambo oyo ekomami na mokanda wana, bakolongola yango te mpo na kolobela makambo mosusu. Ndenge moko mpe, bandeko mibali oyo basalaka masukulu ya bato nyonso bazwaka plan oyo basengeli kolanda. Plan wana epekisaka te kokɔtisa mwa makanisi mosusu; atako bongo, elakisaka polele makambo nini ya ntina okolobela, makanisi nini okosalela mpo na kondimisa bato makambo yango, mpe bavɛrsɛ nini esimbi lisukulu. Koyekola ndenge ya kosalela makambo ya mokanda oyo bapesi yo mpo na koteya ezali moko ya makambo ya ntina mingi oyo ekobongisa yo mpo na kozwa masolo mosusu.

Formasyo yango ekoki mpe kosalisa yo oyeba kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kobota mbuma. Okoyeba kotya makanisi na yo nyonso na makambo oyo bozali koyekola; okotika lisolo na bino te mpo na kolobela makambo mosusu oyo, atako ezali kitoko, ekoki te kosalisa moto akanga ntina ya likambo oyo bozali koyekola. Atako bongo, soki okangi mpenza ntina ya liteya oyo, okotingama kaka te na makambo ya mokanda ntango omoni ete moyekoli azali na mposa ya mwa bandimbola mosusu.

NDENGE YA KOSALA YANGO

  • Lobá kaka makambo oyo eyokani na likambo oyo basɛngi yo olobela.

  • Soki esengeli kotánga mikanda mosusu mpo na lisolo na yo, poná makanisi ya ntina mpe bavɛrsɛ ya ntina na mikanda wana kaka, epai mosusu te.

DEVUARE: Na boumeli ya mikolo misato, ntango ozali kotánga mokapo ya mokolo na mokolo, zingá liloba to maloba oyo ezali komonisa likambo oyo bazali kolobela. Tyá mɔkɔlɔtɔ na nse ya likanisi moko to makanisi mibale ya mokuse oyo eyokani mpenza na likambo oyo bazali kolobela. Na nsima, salelá vɛrsɛ oyo bapesaki mpo na mokolo wana mpe makanisi oyo yo moko otyaki bilembo, mpo na kolobela likambo yango na maloba na yo moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto