Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my eteni 1
  • Creation to the Flood

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Creation to the Flood
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bikelamu na elimo nkoto na nkoto
    Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
  • Botomboki kati na mokili na elimo
    Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
  • God Begins to Make Things
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mobali ya mpiko
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my eteni 1

Eteni 1

Banda na bozalisi tii na Mpela

Likoló ná mabele eutá wapi? Moi, sanza, minzoto, ná biloko nyonso oyo ezali na mabele ebimaki ndenge nini? Biblia epesi eyano ya solo, elobi ete Nzambe nde moto akelaki yango. Yango wana, buku oyo ebandi na masolo oyo elobeli liboso mpenza ndenge Nzambe asalaki biloko nyonso.

Bikelamu ya liboso oyo Nzambe asalaki ezali baanzelu. Baanzelu bamonanaka te lokola Nzambe. Nzambe asalaki mabele mpo na bato. Asalaki mwasi ná mobali ya liboso, nkombo na bango Adama ná Eva mpe atyaki bango na paradiso. Kasi batosaki ye te mpe basengelaki lisusu kofanda wana te.

Banda Nzambe asalaki mokili tii na Mpela, elekaki mbula nkóto moko na nkama motoba na ntuku mitano na motoba (1 656). Na ntango yango, bato mabe bakómaki mingi. Satana ná baanzelu mabe na ye bazalaki kuna na likoló. Kaina ná ebele ya bato mabe mosusu bazalaki awa na mabele, kati na bato mabe yango tokoki kotánga bilombe ya makasi mingi. Kasi bato malamu mpe bazalaki: Abele, Enoka ná Noa. Na eteni ya LIBOSO ya buku oyo, tokolobela bato yango mpe makambo oyo esalemaki na ntango wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto