Lisolo 7
Mobali ya mpiko
LOKOLA bato bazalaki kokóma ebele na mokili, mingi na bango bazalaki kosala mabe, lokola Kaina. Nzokande, moto moko akesanaki na bato mosusu. Nkombo na ye Enoka. Enoka azalaki mobali ya mpiko. Atako bato oyo bazalaki esika Enoka azali bazalaki kosala mabe, ye akobaki kosalela Nzambe.
Boyebi mpo na nini bato ya ntango wana bazalaki kosala mabe mingi? Nani atindaki Adama ná Eva bátombokela Nzambe mpe bálya mbuma oyo Nzambe alobaki ete bálya te? Ezali anzelu moko ya mabe. Biblia ebengi ye Satana. Ye nde moto azali koluka kobebisa bato nyonso.
Mokolo moko, Yehova Nzambe atindaki Enoka ayebisa bato likambo moko, mpe bato basepelaki na likambo yango te. Alobaki na bango boye: ‘Mokolo mosusu Nzambe akoboma bato mabe nyonso.’ Ntango bato yango bayoki maloba wana, basiliki mpenza! Ekoki mpe kozala ete balukaki koboma ye. Yango wana, Enoka asengelaki kozala na mpiko mpo ayebisa bato makambo oyo Nzambe asengelaki kosala.
Nzambe atikaki Enoka na bomoi na kati ya bato mabe wana ntango molai te. Enoka aumelaki mbula nkama misato na ntuku motoba na mitano (365) mpamba. Mpo na nini tolobi ete “mbula nkama misato na ntuku motoba na mitano mpamba”? Ezali mpo na ntango wana, bato bazalaki makasi mingi mpe bazalaki koumela mingi. Na ndakisa, Metusela, mwana ya Enoka, aumelaki mbula nkama libwa na ntuku motoba na libwa (969)!
Nsima ya liwa ya Enoka, bato bakómaki mabe koleka. Biblia elobi ete ‘makanisi na bango ezalaki ntango nyonso mabe’ mpe ‘mabele etondaki na mobulu.’
Boyebi mpo na nini mabe ezalaki mingi na mokili na ntango yango? Ezali mpo Satana azwaki mayele ya sika ya kobebisa bato. Na lisolo oyo elandi tokolobela likambo yango.
Ebandeli 5:21-24, 27; 6:5; Baebre 11:5; Yuda 14, 15.