Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 3
  • Adama ná Eva

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Adama ná Eva
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Adama ná Eva
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Soki Adama azalaki moto ya kokoka, ebandaki boni asala lisumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 3

LISOLO 3

Adama ná Eva

TOZALI komona nini na elilingi oyo? Tozali komona bato. Mobali ya liboso ná mwasi ya liboso. Nani asalaki bango? Nzambe. Boyebi nkombo ya Nzambe? Nkombo na ye Yehova. Bongo apesaki mobali nkombo Adama, mpe mwasi nkombo Eva.

Talá ndenge Yehova asalaki Adama. Akamataki putulu ya mabele mpe asali nzoto ya kokoka, nzoto yango nde mobali. Na nsima Nzambe atyaki mpema na zolo ya mobali, mpe Adama akómaki na bomoi.

Yehova Nzambe apesaki Adama mosala. Alobaki na ye apesa banyama nyonso nkombo. Ntango mosusu, Adama atalaki banyama ntango molai liboso ya kozwa nkombo oyo ebongi na nyama mokomoko. Kasi, ntango azalaki kopesa banyama nkombo, amonaki likambo moko. Boyebi likambo yango?

Amonaki ete banyama nyonso bazali na basi. Amonaki banzoku ya mibali ná ya basi, bankɔsi ya mibali ná ya basi. Kasi Adama azalaki kaka ye moko. Yango wana, Yehova alalisaki ye mpɔngi ya makasi mpenza mpe akamati mokuwa moko na mopanzi na ye. Na mokuwa yango asaleli ye mwasi.

Kanisá naino esengo Adama ayokaki. Eva mpe asepelaki kofanda na kati ya elanga ya kitoko wana! Sikoyo bakokaki kobota bana mpe kofanda na esengo elongo.

Yehova alingaki ete Adama ná Eva bázala na bomoi libela na libela. Alingaki mpe ete bákómisa mabele mobimba kitoko lokola elanga ya Edene. Kanisá naino esengo oyo Adama ná Eva bazalaki na yango ntango bazalaki kokanisa mosala oyo bakosala! Na ntembe te, olingaki kosepela kosangana na mosala yango ya kokómisa mabele elanga ya kitoko mingi. Nzokande, bolamu na bango eumelaki te. Tiká tótala ntina nini eumelaki te.

Nzembo 83:18; Ebandeli 1:26-31; 2:7-25.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto