Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 3 lok. 14-lok. 15 par. 3
  • Adama ná Eva batosaki Nzambe te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Adama ná Eva batosaki Nzambe te
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Babengani bango na Edene
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Bato oyo baleki biso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Bomoi ya mpasi ebandi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 3 lok. 14-lok. 15 par. 3
Adama ná Eva babimi na elanga ya Edene

LITEYA 3

Adama ná Eva batosaki Nzambe te

Adama asimbi mbuma oyo epekisami, oyo Eva apesi ye

Mokolo moko ntango Eva azalaki kaka ye moko, nyoka moko elobaki na ye. Elobaki boye: ‘Ezali solo ete Nzambe aboyi bólya mbuma ya nzete nyonso?’ Eva alobaki: ‘Tokoki kolya mbuma ya nzete nyonso, longola kaka ya nzete moko. Soki tolei mbuma ya nzete yango, tokokufa.’ Nyoka ebakisaki: ‘Bokokufa te. Kutu soki bolei yango, bokokóma lokola Nzambe.’ Ezalaki solo? Te, ezalaki lokuta. Kasi Eva andimaki likambo yango. Abandaki kotala mbuma yango, tii ayokaki mposa na yango. Alyaki mbuma yango, na nsima apesaki mpe Adama. Adama ayebaki ete bakokufa soki batosi Nzambe te. Kasi alyaki yango kaka.

Ntango Adama ná Eva babimi na elanga ya Edene, baanzelu mpe mopanga moko ya mɔtɔ etyami na nzela ya kokɔta na elanga

Na nsima, kaka na mokolo yango, Yehova alobaki na Adama ná Eva. Atunaki bango ntina oyo batosaki ye te. Eva alobaki ete ezali foti ya nyoka, mpe Adama alobaki ete ezali foti ya Eva. Lokola Adama ná Eva batosaki Yehova te, abenganaki bango na elanga. Mpo bázonga lisusu kuna te, Yehova atyaki baanzelu ná mopanga moko ya mɔtɔ na nzela ya kokɔta na elanga.

Yehova alobaki ete moto oyo akosaki mpe Eva akozwa etumbu. Ezalaki mpenza nyoka te nde esololaki na Eva. Yehova asalaki nyoka na likoki ya koloba te. Ezalaki anzelu moko ya mabe nde alobaki na nzela ya nyoka. Asalaki bongo mpo na kokosa Eva. Anzelu yango abengami Satana Zabolo. Na mikolo ezali koya, Yehova akoboma Satana mpo akosa lisusu bato te.

“Zabolo . . . azalaki mobomi-bato ntango abandaki, mpe akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te.” ​—Yoane 8:44, maloba na nse ya lokasa

Mituna: Mpo na nini Eva alyaki mbuma? Lokola Adama ná Eva batosaki Yehova te, nini ekómelaki bango? Satana Zabolo azali nani?

Ebandeli 3:1-24; Yoane 8:44; 1 Yoane 3:8; Emoniseli 12:9

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto