Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/9 nk. 29-31
  • Enoka atambolaki elongo na Nzambe na kati ya mokili moko ya mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Enoka atambolaki elongo na Nzambe na kati ya mokili moko ya mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Enoka atambolaki elongo na Nzambe ya solo’
  • Esakweli mpo na bato mabe
  • “Nzambe akamataki ye”
  • Tólanda ndakisa ya kondima ya Enoka
  • “Asepelisaki mpenza Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Enoka—Abangaki te liboso ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tambolá elongo na Nzambe na ntango oyo ya yikiyiki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mobali ya mpiko
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/9 nk. 29-31

Enoka atambolaki elongo na Nzambe na kati ya mokili moko ya mabe

ZABOLO amikumisaka ete akoki kopɛngwisa bato nyonso bátika kosambela Nzambe, mpe na bantango mosusu emonanaki lokola ete azalaki kolonga. Bikeke soki mitano nsima ya liwa ya Abele, moto moko te amimonisaki lokola mosaleli ya sembo ya Yehova. Bato bakómaki nde kosala masumu mpe mabe ekómaki mingi mpenza.

Ezalaki na ntango wana oyo bato babebaki na elimo nde Enoka abotamaki. Biblia emonisi ete abotamaki na mobu 3404 L.T.B. Na kokesene na bato ya ntango na ye, Enoka amonisaki ete azalaki moto oyo andimamaki na Nzambe. Ntoma Paulo atyaki ye na molongo ya basaleli ya sembo ya Yehova, oyo batiká ndakisa ya kondima oyo baklisto basengeli kolanda. Enoka azalaki nani? Mikakatano nini akutanaki na yango? Ndenge nini alongaki yango? Mpe bosembo na ye ezali na ntina nini mpo na biso?

Na mikolo ya Enosa, soki bikeke minei liboso ete Enoka abotama, “bato babandaki kobyanga nkombo ya [Yehova].” (Genese 4:26) Babandaki kosalela nkombo ya Nzambe banda ebandeli ya lisolo ya bato. Yango emonisi ete kobelela oyo ebandaki na ntango Enosa azalaki na bomoi, ezalaki te kobelela Yehova na kondima mpe kosambela ye na ndenge ya pɛtɔ. Bato mosusu ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Liebele balobaka ete maloba ya mokapo ya Genese 4:26 elimboli ete “babandaki na ndenge ya kotyola” to “nde botyoli ebandaki.” Ekoki kozala ete bato bazalaki komipesa nkombo ya Yehova to bazalaki kopesa nkombo yango na bato mosusu, oyo bango bazalaki kokanisa ete bazali kosambela Nzambe na nzela na bango. To mpe ekoki kozala ete bazalaki kopesa nkombo ya Nzambe na bikeko.

‘Enoka atambolaki elongo na Nzambe ya solo’

Atako bato oyo bazingaki Enoka bazalaki bato mabe, ye “alandaki kotambola elongo na Nzambe ya solo,” Yehova. Biblia eyebisi te ete bankɔkɔ na ye​—Sete, Enosa, Kenana, Mahalalele mpe Yelede​—batambolaki elongo na Nzambe. Ata soki ezali ete batambolaki elongo na ye, basalaki yango te ndenge moko na Enoka, oyo amonisaki na bomoi na ye ete akesenaki mpenza na bango.​—Genese 5:3-27.

Kotambola elongo na Yehova esɛngaki koyebana na ye mpe kozala moninga na ye ya motema, oyo elingaki kosalema kaka mpo Enoka azalaki kosala mokano ya Nzambe. Yehova asepelaki na ezaleli ya komipesa ya Enoka. Kutu, libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki elobi ete “Enoka azalaki mpenza kosepelisa” Nzambe; likanisi oyo ntoma Paulo mpe amonisaki yango.​—Genese 5:22; Baebele 11:5.

Soki Enoka azalaki koyokana malamu na Yehova, ezalaki mpenzampenza mpo na kondima oyo azalaki na yango. Amonisaki kondima na elaka ya “mombóto” ya “mwasi” ya Nzambe. Soki Enoka akutaki Adama na bomoi, boye Enoka ayebaki mwa makambo mosusu oyo Nzambe asalaki mpo na mobali mpe mwasi yango ya liboso na Edene. Boyebi oyo Enoka azalaki na yango mpo na Nzambe ekómisaki ye moto oyo azalaki “mpenza koluka ye.”​—Genese 3:15; Baebele 11:6, 13, NW.

Ezala mpo na Enoka to mpo na biso lelo oyo, kozala na boyokani ya malamu na Yehova esuki kaka te na koyeba Nzambe. Soki mpenza tolingi kokóma moninga ya motema ya moto moko, na ntembe te makanisi mpe misala na biso esengeli kolanda oyo ya moto yango, boye te? Tokoboya maloba to misala oyo ekoki kobebisa boninga yango. Mpe soki tolingi kobongola makambo mosusu na bomoi na biso, tokotalela oyo mbongwana yango ekoki komema na boyokani yango, boye te?

Ndenge moko mpe, makambo oyo tozali kosala esengeli komonisa ete tozali na mposa ya kotikala na boninga ya motema elongo na Nzambe. Likambo ya liboso ezali ya koyeba malamumalamu makambo oyo ye alingaka mpe oyo aboyaka. Na nsima, boyebi yango esengeli kotambwisa biso, mpe tokosala makasi mpo na kosepelisa ye na makanisi mpe na misala.

Ya solo, mpo tótambola elongo na Nzambe, tosengeli kosepelisa ye. Ezali yango nde Enoka asalaki na boumeli ya bankama ya bambula. Kutu, liloba ya Liebele oyo basaleli mpo na komonisa ete Enoka “atambolaki” elongo na Nzambe ezali kopesa likanisi ya kozongela likambo moko mbala na mbala, kokoba kosala likambo moko. Moto mosusu ya sembo oyo ‘atambolaki elongo na Nzambe’ ezalaki Noa.​—Genese 6:9.

Enoka azalaki tata ya libota, azalaki na mwasi, na ‘bana mibali mpe bana basi.’ Mwana na ye moko ya mobali nkombo na ye Metusela. (Genese 5:21, 22) Na ntembe te, Enoka azalaki kosala nyonso mpo na kotambwisa libota na ye na ndenge ebongi. Kasi, lokola mokili oyo ezingaki ye ezalaki mabe, ezalaki pɛtɛɛ te mpo asalela Nzambe. Emonani lokola ete Lemeke, tata ya Noa, nde azalaki moto kaka moko oyo amonisaki kondima epai ya Yehova na ntango ya Enoka. (Genese 5:28, 29) Atako bongo, Enoka azalaki na molende mpo na losambo ya solo.

Nini esalisaki Enoka na kozala ntango nyonso sembo epai ya Nzambe? Na ntembe te, aboyaki kosangana na bato oyo bazalaki kotuka nkombo ya Yehova to kosangana na bato mosusu oyo bazalaki baninga ya malamu te mpo na moto oyo asambelaka Nzambe. Koluka lisalisi ya Yehova na nzela ya libondeli ebakisaki molende oyo Enoka azalaki na yango ya koboya likambo nyonso oyo ekokaki kosepelisa Mozalisi na ye te.

Esakweli mpo na bato mabe

Ezali mpasi mpo tómonisa ntango nyonso bizaleli malamu soki tofandi esika moko na bato mabe. Nzokande Enoka azalaki kosakola nsango ya polele ete bato mabe bakozwa etumbu. Lokola elimo ya Nzambe ezalaki kotambwisa ye, Enoka asakolaki boye: “Talá! Yehova ayei elongo na makiasi ya basantu na ye, mpo na kopesa etumbu na bato nyonso, mpe mpo na kokweisa bato nyonso ya mabe mpo na misala na bango nyonso ya mabe oyo basalaki na ndenge ya mabe, mpe mpo na makambo nyonso ya mabe koleka oyo bato yango ya mabe mpe ya masumu balobaki mpo na kotemela ye.”​—Yuda 14, 15, NW.

Nsango yango esalaki nini epai ya bato mabe wana oyo bazangaki kondima? Tokoki kokanisa ete maloba wana oyo eswaki bango na mitema esalaki ete báyina Enoka, to mbala mosusu básɛka ye, bátyola ye, to báfinga ye. Ekoki mpe kozala ete bamosusu balingaki koboma ye. Kasi, Enoka abangaki te. Ayebaki likambo oyo ekómelaki moto ya sembo Abele, mpe na ndakisa na ye, Enoka azwaki ekateli ya kosalela Nzambe, kozanga kobanga oyo ekokómela ye.

“Nzambe akamataki ye”

Emonani lokola ete Enoka azalaki na likama ya liwa ntango “Nzambe akamataki ye.” (Genese 5:24) Yehova atikaki nzela te ete banguna wana ya mitema mabe bányokola mosakoli na ye ya sembo. Ntoma Paulo amonisi ete “Enoka atombwaki ete amona kufa te.” (Baebele 11:5) Bato mingi balobaka ete Enoka akufaki te, Nzambe azwaki ye na likoló, esika oyo azali na bomoi. Nzokande, Yesu alobaki polele ete: “Moto moko te asila komata na likoló, kaka ye oyo akitaki longwa na likoló, ye Mwana ya moto.” Yesu azalaki “moto ya liboso” kati na baoyo nyonso bakomata na likoló.​—Yoane 3:13, NW ; Baebele 6:19, 20.

Likambo nini kasi ekómelaki Enoka? Ndenge oyo “atombwaki ete amona kufa te” ekoki kolimbola ete Nzambe akómisaki ye lokola moto oyo azali komona emonaneli mpe na nsima asukisaki bomoi na ye na ntango azalaki komona emonaneli yango. Na ndenge oyo azalaki, Enoka akokaki koyoka mpasi ya liwa te. Na nsima ‘bamonaki ye lisusu esika moko te,’ ekoki kozala ete Yehova abombaki nzoto na ye, kaka ndenge asalaki mpo na nzoto ya Mose.​—Deteronome 34:5, 6.

Enoka aumelaki mbula 365, bomoi mokuse mpenza soki tokokanisi yango na oyo ya bato mingi ya ntango na ye. Kasi likambo ya ntina mingi mpo na bato oyo balingaka Yehova ezali ete basalelaka ye na bosembo mpenza tii na nsuka ya bomoi na bango. Toyebi ete Enoka asalaki yango mpo ‘liboso ya kotombwa na ye ete amona kufa te, azwaki litatoli ete asepelisaki mpenza Nzambe.’ Makomami eyebisi mpenza te ndenge Yehova ayebisaki Enoka litatoli yango. Atako bongo, liboso ete Enoka akufa, Nzambe amonisaki ye ete andimaki ye, mpe tokoki kondimisama ete Yehova akokanisa ye na ntango ya lisekwa.

Tólanda ndakisa ya kondima ya Enoka

Tokoki mpenza kolanda ndakisa ya kondima ya bato oyo bamipesaki na Nzambe. (Baebele 13:7) Ezalaki mpo na kondima nde Enoka akómaki mosakoli ya liboso ya sembo ya Nzambe. Mokili na ntango ya Enoka ezalaki se lokola mokili ya ntango na biso: mokili ya mobulu, ya makambo ya mbindo, mpe ya mabe. Kasi Enoka akesenaki mpenza na bato ya ntango na ye. Azalaki na kondima ya solosolo mpe apesaki ndakisa malamu ya komipesa epai ya Nzambe. Ya solo, Yehova apesaki ye mokumba moko monene ya koyebisa nsango ya etumbu, kasi alendisaki mpe ye mpo asakola nsango yango. Na molende mpenza, Enoka akokisaki mokumba na ye, mpe Nzambe abatelaki ye ntango banguna batɛmɛlaki ye.

Soki tomonisi kondima ndenge Enoka amonisaki yango, Yehova akopesa biso makasi ya koyebisa nsango na ye na mikolo oyo ya nsuka. Akosalisa biso tózwa makasi ya kolonga botɛmeli, mpe ezaleli na biso ya kobanga ye ekokesenisa biso mpenza na mokili oyo mabe. Kondima ekosalisa biso tótambola elongo na Nzambe mpe tómitambwisa na lolenge oyo ekosepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Mpo na kondima, Enoka, moto ya sembo alongaki kotambola elongo na Yehova na mokili moko ya mabe; biso mpe tokoki kosala yango.

[Etanda na lokasa 30]

Makambo mosusu ya Biblia euti nde na mokanda ya Enoka?

Mokanda ya Enoka ezali moko ya mikanda oyo epemami te; ezali mpe na kati ya mikanda ya Biblia te. Bakosaki ete Enoka nde akomaki yango. Mokanda yango, oyo babimisaki soki na ekeke ya liboso mpe ya mibale L.T.B., eyebisi makambo ya lokuta mpe ya kolekisa ndelo ya lisolo ya Bayuda. Ekoki mpenza kozala ete bato ya mayele babimisaki yango longwa na mwa lisolo mokuse oyo mokanda ya Genese elobeli mpo na Enoka. Likambo wana moko ekoki mpo bato oyo balingaka liloba ya Nzambe oyo epemami báyeba ete mokanda ya Enoka ezali mokanda ya solo te.

Na kati ya Biblia, kaka mokanda ya Yuda nde ezongeli esakweli ya Enoka, oyo elobi ete: “Talá! Yehova ayei elongo na makiasi ya basantu na ye, mpo na kopesa etumbu na bato nyonso mpe mpo na kokweisa bato nyonso ya mabe mpo na misala na bango nyonso ya mabe, oyo basalaki na ndenge ya mabe, mpe mpo na makambo nyonso ya mabe koleka oyo bato yango ya mabe mpe ya masumu balobaki mpo na kotɛmɛla ye.” (Yuda 14, 15, NW) Bato mingi ya mayele bandimaka ete esakweli ya Enoka mpo na bato mabe ya ntango na ye euti mpenza na mokanda ya Enoka. Ekoki nde kozala ete makambo oyo Yuda azongelaki na mokanda na ye, azwaki yango na buku moko oyo etángami te kati na mikanda oyo epemami?

Makomami eyebisi te ndenge nini Yuda ayebaki esakweli wana ya Enoka. Ekoki kozala ete azongelaki kaka maloba oyo ezalaki kolobama, maloba ya solo oyo banda kala ezalaki kolobama na minoko ya mikóló. Paulo mpe asalaki likambo ya ndenge wana ntango atángaki Yane mpe Yambele, banganga-nkisi ya ndako ya Falo oyo batɛmɛlaki Mose, baoyo Biblia epesi bankombo na bango te. Soki mokomi ya mokanda ya Enoka ayokaki maloba ya solo oyo mikóló bazalaki koloba banda kala, mpo na nini tokoki kokamwa ete Yuda mpe ayoka yango?a​—Exode 7:11, 22; 2 Timote 3:8.

Ndenge oyo Yuda ayebaki makambo oyo etali nsango ya Enoka epai ya bato mabe, ezali mpenza likambo ya kokamwa te. Tokoki kotyela makambo yango motema, soki toyebi ete Yuda akomaki yango mpo apemamaki na elimo ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Elimo santu ya Nzambe esalisaki ye mpo akoma kaka makambo oyo ezali solo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Moyekoli Setefano mpe alobelaki makambo oyo tokutaka yango esika mosusu te na kati ya Makomami ya Liebele. Makambo yango etali kelasi oyo Mose atángaki na Ezipito, ndenge azalaki na mbula 40 ntango akimaki Ezipito, mbula 40 oyo alekisaki na Madiani, mpe mosala oyo baanzelu basalaki mpo na kopesa Mobeko ya Mose.​—Misala 7:22, 23, 30, 38.

[Elilingi na lokasa 31]

Enoka asakolaki nsango ya Yehova na molende mpenza

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto