Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 12
  • Batongi ndako ya molai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batongi ndako ya molai
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bamisalelaki nkombo ya lokumu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Ndako molai ya Babele
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Minɔkɔ oyo tolobaka eutá nde na “ndako molai ya Babele”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 12

Lisolo 12

Batongi ndako ya molai

BAMBULA mingi eleki. Bana ya Noa baboti bana. Bana wana bakoli mpe baboti mpe bana mingi. Bato bakómi mingi na mokili.

Noa azalaki na bankɔkɔ ebele, moko na bango Nimerode. Nimerode yango azalaki moto mabe, azalaki koboma bato ná banyama. Amikómisaki mpe mokonzi mpo ayangelaka baninga. Nzambe asepelaki na Nimerode te.

Na ntango yango, bato bazalaki koloba monɔkɔ moko mpamba. Nimerode alingaki ete bango nyonso bázala esika moko mpo ayangela bango malamu. Boyebi eloko asalaki? Alobaki na bato bátonga mboka mpe ndako moko molai. Talá elilingi, omoni ndenge bazali kosala babriki?

Yehova Nzambe asepelaki na mosala wana te. Mposa na ye ezalaki ete bato bápalangana na mabele mobimba. Kasi bato balobaki ete: ‘Tómitongela mboka mpe ndako molai oyo nsɔngɛ na yango ekokóma tii na likoló. Bongo tokozala na lokumu mingi.’ Bazalaki kokanisa lokumu na bango moko kasi oyo ya Nzambe te.

Nzambe asukisaki mosala na bango. Boyebi eloko asalaki? Na mbala moko, Nzambe abulunganisaki monɔkɔ na bango mpe bakómaki koloba minɔkɔ mingi. Bato oyo bazalaki kotonga bazalaki koyokana lisusu te. Yango wana, babengaki mboka yango Babele, to Babilone; nkombo yango elimboli “Mobulungano.”

Na yango, bato babandaki kolongwa na Babele. Bato na bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ moko bakei epai mosusu, bakei kofanda kuna.

Ebandeli 10:1, 8-10; 11:1-9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto