Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/3 nk. 24-25
  • Bamisalelaki nkombo ya lokumu te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bamisalelaki nkombo ya lokumu te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Balongaki te
  • Nimilodi—Motomboki ya lofundo
  • Batongi ndako ya molai
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mpo na nini tozali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Genese​—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/3 nk. 24-25

Bamisalelaki nkombo ya lokumu te

BIBLIA etángi nkombo ya baoyo batongaki ndako molai ya Babele te. Lisolo elobi ete: “Balobaki mpe ete, Yaká, [tómitongela ya, NW] biso mboka mpe ndako molai oyo nsɔngɛ na yango ekokóma na likoló, mpe tózalisa nkombo na lokumu mpo na biso mpenza ete tópalangana na mokili mobimba te.”​—Genese 11:4.

Bato yango oyo “balobaki” ezalaki banani? Likambo yango lisalemaki mbula 200 nsima ya Mpela. Na eleko wana, Noa, akómaki na mbula soko 800, azalaki kofanda elongo na bakitani na ye oyo bakómaki bankóto. Bango nyonso bazalaki koloba lokota bobele moko mpe bazalaki kofanda na esika oyo Noa mpe bana na ye bafandaki nsima ya Mpela. (Genese 11:1) Ekómaki na ntango moko, etuluku moko ya bato oyo bakómaki ebele bakendaki na epai ya ɛsti mpe “bamonaki mabelé patatalu na mokili na Sinala.”​—Genese 11:2, NW.

Balongaki te

Ezalaki na mabelé patatalu wana nde bato bazwaki ekateli ya kotombokela Nzambe. Ndenge nini? Ɛɛ, Yehova amonisaki mokano na ye ntango alobaki na babalani ya liboso ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili.” (Genese 1:28) Azongelaki maloba yango epai na Noa mpe na bana na ye nsima ya Mpela. Nzambe apesaki bango malako ete: “Bino mpe, bóbota mpe bózala mingi. Bópalangana likoló na mokili mpe bótonda bipai nyonso.” (Genese 9:7) Mpo na kotɛmɛla litambwisi ya Yehova, bato batongaki engumba mpo ete ‘bápalangana na mokili mobimba te.’

Bato yango babandaki mpe kotonga ndako molai na mokano ya ‘komisalela nkombo ya lokumu.’ Kasi, na bokeseni na oyo bazalaki kozela, basilisaki botongi ndako molai yango te. Biblia emonisi ete Yehova abulunganisaki minɔkɔ na bango na boye ete bakokaki lisusu koyokana te. Lisolo lipemami lilobi ete: “[Yehova] apanzanisaki bango na esika yango esii, na bipai nyonso na mokili. Batikaki kotonga mboka yango.”​—Genese 11:7, 8.

Kozanga kolonga ya mwango yango emonisami polele na likambo oyo ete bankombo ya batongi yango ezwaki ‘lokumu’ soko moke te, to eyebanaki na bato mingi te. Ya solo, bankombo na bango eyebani te mpe elongolamá na lisolo ya bato. Kasi ezali boni mpo na Nimilodi, mwana ya mwana ya Noa? Mobandisi ya botomboki wana liboso na Nzambe ezalaki ye, boye te? Nkombo na ye eyebani malamu na bato, boye te?

Nimilodi—Motomboki ya lofundo

Na ntembe te, Nimilodi azalaki mokonzi ya batomboki. Genese mokapo 10 ezali kolobela ye lokola “moluki makasi na nyama liboso na [Yehova].” (Genese 10:9) Makomami malobi lisusu ete “ezalaki ye oyo abandaki kozala moto na nguya na mokili.” (Genese 10:8) Nimilodi azalaki mobundi bitumba, mpe moto na mobulu. Akómaki moyangeli ya liboso ya bato nsima ya Mpela, amityaki ye moko mokonzi. Nimilodi azalaki mpe motongi ya ndako. Biblia endimi ete atongaki bingumba mwambe, bakisa mpe Babele.​—Genese 10:10-12.

Na yango, Nimilodi—monguna ya Nzambe, mokonzi ya Babele, mpe motongi ya bingumba—na ntembe te asanganaki na botongi ndako molai ya Babele. Amisalelaki nkombo ya lokumu te? Na ntina ya nkombo Nimilodi, Ernst F. Rosenmüller, moyekoli ya makambo na Moyen-Orient akomaki ete: “Nkombo bapesaki Nimilodi eutaki na [ma·radhʹ], ‘atombokaki,’ ‘asalaki mbeba’ engebene ndimbola ya Liebele.” Rosenmüller alimboli lisusu ete: “Bato ya Moyen-Orient bamesani mingi kobénga bato na bango ya lokumu na bankombo oyo bapesaka bango nsima ya liwa na bango, bankombo yango mbala mingi, ezalaka na boyokani na makambo oyo asalaki.”

Banganga-mayele mingi bandimi likanisi oyo ete Nimilodi ezalaki te nkombo oyo bapesaki ye ntango abotamaki. Nzokande, bazali kotalela yango ete ezali nkombo oyo bapesaki ye nsima mpo na kokokanisa yango na ezaleli na ye ntango botomboki na ye emonanaki polele. Na ndakisa, profesere Carl Keil alobi ete: “Nkombo yango moko, Nimilodi, euti na [ma·radhʹ], ‘tokotomboka,’ ezali komonisa botɛmɛli makasi liboso ya Nzambe. Ezali komonisa mpenza bomoto na ye na boye ete emonani mpenza ete bapesaki ye yango na bato ya eleko na ye, mpe bongo ekómaki nkombo na ye mpenza.” Na maloba na nse ya lokasa, Keil azongeli maloba ya Jacob Perizonius, mokomi na masolo ya kala oyo akomaki ete: “Nandimisami ete moto yango [Nimilodi], moluki makasi ya nyama mpe oyo azingamaki na etuluku ya baninga, na mokano ya kopusa baoyo batikali na botomboki, ntango nyonso na monɔkɔ na ye azalaki koloba maloba oyo, ‘Nimilodi, Nimilodi,’ oyo elimboli ete, ‘Tótomboka! Tótomboka!’ Na ntina yango, na nsima, bato mosusu bamonisaki ye, ata mpe Mose ye moko, na nkombo wana lokola nde ezali nkombo na ye mpenza.”

Emonani polele ete, Nimilodi amisalelaki nkombo ya lokumu te. Nkombo bapesaki ye ntango abotamaki eyebani te. Yango ekomami te na lisolo ya bato, lolenge moko na bankombo ya bato oyo balandaki litambwisi na ye. Atikaki ata bakitani te mpo ete bázwa nkombo na ye. Na esika ete azwa nkembo mpe lokumu, alataki nde nsɔni. Nkombo Nimilodi etikelá ye elembo libela lokola motomboki, oyo na lolenge ya ligboma atyelaki Yehova Nzambe ntembe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto