Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 30
  • Moize na ngomba Horebe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moize na ngomba Horebe
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mwa nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Moize akimi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tóyeba banzela ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Na ndimbola nini Yesu Klisto azalaki mosakoli motindo na Moize?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 30

Lisolo 30

Moize na ngomba Horebe

MOKOLO moko, Moize akei na bampate na ye na Ngomba Horebe. Kuna amoni nzete moko ezali kopela na mɔtɔ kasi ezali kozika te.

Moize alobi boye: ‘Oyo nde likambo ya kokamwa! Tiká napusana naino pene namona malamu.’ Kasi ntango akómi pene, mongongo moko euti na katikati ya nzete yango mpe elobi na ye ete: ‘Kopusana awa te. Longolá basandale na yo, mpo esika otɛlɛmi ezali mabele mosantu.’ Nzambe asololaki na ye na nzela ya anzelu moko. Bongo Moize abombi elongi na ye.

Na nsima Nzambe alobi na ye ete: ‘Namoni mpasi ya bato na ngai na Ezipito. Nalingi kobikisa bango mpe nakotinda yo mpo olongola bango na Ezipito.’ Na yango, Yehova azali kozwa bibongiseli ya kozongisa Bayisraele na Kanana, mokili ya kitoko.

Bongo Moize alobi ete: ‘Ngai nani? Mpe nakosala yango ndenge nini? Kanisá naino ete nakei na Ezipito. Bayisraele bakotuna ngai ete: “Nani atindi yo?” Bongo nakoloba na bango nini?’

Nzambe azongisi ete: ‘Okoloba na bango boye: “YEHOVA, Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo, atindi ngai epai na bino.”’ Mpe Yehova abakisi ete: ‘Wana nde nkombo na ngai mpo na seko.’

Kasi Moize alobaki lisusu ete: ‘Bongo soki bandimi te ete otindi ngai.’

Nzambe atuni ye: ‘Eloko nini osimbi na lobɔkɔ na yo?’

Moize alobi ete: ‘Lingenda.’

Nzambe alobi na ye ete: ‘Bwaká yango na mabele.’ Moize abwaki lingenda yango na mabele mpe ekómi nyoka. Mpe Yehova alakisi Moize likamwisi mosusu. Alobi na ye ete: ‘Tyá lobɔkɔ na yo na kati ya zambala na yo.’ Moize atye, mpe ntango abimisi yango, ekómi mpɛmbɛ makasi, lokola nde ezali na maladi ya maba. Na nsima, Yehova apesi Moize nguya ya kosala likamwisi ya misato. Mpo na kosukisa alobi na ye boye: ‘Ntango okosala makamwisi oyo, Bayisraele bakondima ete natindi yo.’

Bongo Moize azongi mpe ntango akómi epai ya Yetro, bokilo na ye, ayebisi ye ete: ‘Nabondeli yo, nalingi nazonga na Ezipito, epai ya bandeko na ngai, mpo nayeba ndenge nini bazali.’ Yetro atiki Moize akende, mpe Moize azongi na Ezipito.

Kobima 3:1-22; 4:1-20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto