Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 18 lok. 48-lok. 49 par. 4
  • Mwa nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwa nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Moize na ngomba Horebe
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Moize akimi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tóyeba banzela ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Na ndimbola nini Yesu Klisto azalaki mosakoli motindo na Moize?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 18 lok. 48-lok. 49 par. 4
Moize pembeni ya mwa nzete oyo ezali kopela mɔtɔ

LITEYA 18

Mwa nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ

Moize afandaki na Midiane mbula 40. Abalaki, mpe abotaki bana. Mokolo moko ntango azalaki kobatela bampate pene na Ngomba Sinai, amonaki likambo moko ya kokamwa. Nzete moko ya nzubɛ ezalaki kopela mɔtɔ, kasi ezalaki kozika te! Ntango Moize apusanaki mpo na kotala, ayokaki mongongo moko ebimi na nzete yango, elobi: ‘Moize! Kopusana awa te. Longolá basandale na yo mpo esika otɛlɛmi ezali mabele mosantu.’ Yehova nde azalaki koloba na nzela ya anzelu.

Moize abangaki, mpe azipaki elongi na ye. Mongongo yango elobaki: ‘Namoni mpasi ya Bayisraele. Nakobikisa bango na mabɔkɔ ya Baezipito mpe nakomema bango na mokili moko ya malamu. Yo nde okobimisa bato na ngai na Ezipito.’ Na ntembe te, Moize akamwaki mpenza!

Moize atunaki: ‘Soki bato yango batuni nani nde atindi yo nakoloba nini?’ Nzambe ayanolaki: ‘Yebisá bango ete Yehova, Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo nde atindi ngai.’ Moize alobaki lisusu: ‘Bongo soki bato yango bandimeli ngai te?’ Yehova apesaki Moize elembo mpo na komonisa ye ete akosalisa ye. Ayebisaki ye abwaka nzete oyo asimbaki na mabele. Ntango abwakaki yango, ekómaki nyoka! Ntango Moize asimbaki nyoka yango na mokila, ezongaki nzete. Yehova alobaki: ‘Ntango okosala likamwisi oyo, ekomonisa ete ngai nde natindi yo.’

Moize alobaki: ‘Nalobaka malamu te.’ Yehova alakaki ye: ‘Nakoyebisa yo makambo oyo okoloba, mpe nakotinda ndeko na yo Arona mpo asalisa yo.’ Lokola Moize ayebaki ete Yehova azalaki elongo na ye, azwaki mwasi ná bana na ye mpe bazongaki na Ezipito.

“Bómitungisa te mpo na ndenge oyo bokoloba mpe mpo na makambo oyo bokoloba, mpo bokozwa likambo ya koloba kaka na ngonga wana.”—Matai 10:19

Mituna: Moize amonaki nini ntango azalaki kobatela bampate? Yehova alingaki ete Moize asala nini?

Kobima 3:1–4:20; Misala 7:30-36

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto