Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 37
  • Hema ya losambo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Hema ya losambo
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Tabernakle mpo na losambo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Na kati ya Kobima
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Yehova abengisi yo ozala mopaya na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 37

Lisolo 37

Hema ya losambo

NDAKO oyo ezali nini? Ezali hema ya ntina mpenza mpo na losambo ya Yehova. Nkombo na yango mosusu tabernakle. Bayisraele basilisaki kotonga yango mbula moko nsima ya kobima na bango na Ezipito. Oyebi moto oyo abimisaki likanisi ya kotonga hema yango?

Likanisi yango eutaki na Yehova. Ntango Moize azalaki na nsɔngɛ ya Ngomba Sinai, Yehova ayebisi ye ndenge ya kotonga hema. Alobi ete esengeli kozala hema oyo bakoki kolongola yango bitenibiteni. Na ndenge wana, bakoki kokumba biteni na yango, kokende na yango epai mosusu mpe kotɛlɛmisa yango lisusu. Yango wana, ntango Bayisraele bazalaki kotambolatambola na esobe, bazalaki komema hema yango.

Soki otali na eteni ya nsuka ya hema yango, okomona kɛsi to sanduku. Nkombo na yango sanduku ya kondimana. Ezalaki na baanzelu to bakeruba mibale ya wolo na nsuka mibale ya sanduku yango. Nzambe akomaki lisusu Mibeko Zomi na bitanda mibale ya mabanga, mpo Moize apasolaki oyo ya liboso. Babombaki bitanda mibale wana ya mabanga na kati ya sanduku yango. Lisusu, batyaki mpe elokó moko ya mana na kati. Boyebi lisusu eloko babengi mana?

Yehova aponaki Arona, ndeko ya Moize, azala nganga-nzambe monene mpo na kokamba bato na makambo ya losambo. Bana na ye mpe bazalaki banganga-nzambe.

Eteni mosusu ya hema ezalaki monene mbala mibale koleka oyo ya nsuka. Omoni kɛsi to mwa sanduku moko epai molinga ezali kouta? Ezali etumbelo oyo banganga-nzambe bazalaki kotumba na yango mpaka ya malasi ya nsolo kitoko. Ezali mpe na etɛlɛmiselo ya miinda oyo ezali na miinda nsambo. Eloko ya misato oyo ezali na eteni yango ezali mesa oyo batyaka mampa zomi na mibale.

Lopango ya tabernakle ezali na saani moko ya monene oyo etondi na mai. Banganga-nzambe bazalaki kosukola na mai yango. Ezali mpe na etumbelo ya monene, esika batumbaka banyama oyo bapesaka Yehova mbeka. Hema ezali na katikati ya kaa, mpe Bayisraele bazali kofanda zingazinga na yango.

Kobima 25:8-40; 26:1-37; 27:1-8; 28:1; 30:1-10, 17-21; 34:1, 2; Baebre 9:1-5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto