Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 49
  • Moi etɛlɛmi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moi etɛlɛmi
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yosua ná bato ya Gibeone
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mokanda ya Biblia nimero 6—Yosua
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yosua 1:9​—“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Makambo oyo Yosua abosanaki te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 49

Lisolo 49

Moi etɛlɛmi

BÓTALA Yosua. Alobi ete: ‘Moi tɛlɛmá!’ Mpe moi etɛlɛmi. Etikali na katikati ya likoló mokolo mobimba. Yehova nde moto atɛlɛmisi yango. Kasi mpo na nini Yosua alingi moi ekita te?

Ntango bakonzi mitano ya mabe ya Kanana oyo tolobelaki liboso bayaki kobunda na bato ya Gibeone, bato ya Gibeone batindaki moto abenga Yosua aya kosalisa bango; mpe moto yango alobaki ete: ‘Yaká noki epai na biso. Bikisá biso. Bakonzi nyonso ya etúká ya ngomba bayei kobunda na basaleli na yo.’

Yosua ná bato na ye bakei mbala moko. Batamboli butu mobimba. Ntango bakómi na Gibeone, basoda ya bakonzi mitano wana babangi makasi mpe babandi kokima. Bongo Yehova atindeli bango mbula ya mabanga, mpe mbula yango ebomaki basoda mingi koleka oyo bato ya Yosua babomaki.

Bongo Yosua amoni ete moi elingi kokɔta. Butu elingi koya mpe banguna bakokima. Yango wana, abondeli Yehova mpe alobi ete: ‘Moi tɛlɛmá!’ Mpe lokola moi etɛlɛmi, Bayisraele bakobi koboma banguna na bango.

Na Kanana, ezalaki na bakonzi mosusu ya mabe oyo bazalaki koyina libota ya Nzambe. Esɛngaki mbula soki motoba mpo Yosua ná basoda na ye bálonga bakonzi ntuku misato na moko (31) na mokili yango. Nsima na yango, Yosua akabolaki mokili ya Kanana na mabota oyo bazwaki naino eteni na bango ya mokili te.

Bambula mingi elekaki, mpe nsukansuka Yosua akufi, na mbula nkama moko na zomi (110). Ntango nyonso oyo ye ná baninga na ye bazalaki na bomoi, bato batosaki Yehova. Kasi nsima ya liwa ya bato malamu wana, Bayisraele babandaki kosala mabe, mpe mpasi ezalaki koyela bango. Na ntango yango, bazalaki kosɛnga Nzambe asalisa bango.

Yosua 10:6-15; 12:7-24; 14:1-5; Basambisi 2:8-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto