Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 79
  • Danyele na libulu ya nkɔsi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Danyele na libulu ya nkɔsi
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Danyele na libulu ya bankɔsi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Danyele abiki na minɔkɔ ya nkosi!
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Danyele asalelaki Nzambe mikolo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Dalio mokonzi oyo alingaki bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 79

Lisolo 79

Danyele na libulu ya nkɔsi

TALÁ Danyele na kati ya libulu ya nkɔsi! Kasi nkɔsi nyonso ezali kosala ye eloko te. Mpo na nini? Nani abwaki Danyele na libulu yango? Tótala ndenge likambo yango elekaki.

Dariuse moto azali sika mokonzi ya Babilone. Alingi Danyele mingi mpo azali na boboto mpe na bwanya. Yango wana, Dariuse aponi ye azala mokonzi monene na bokonzi na ye. Kasi bato mosusu bakómi koyokela ye zuwa, tótala sikoyo likambo oyo bakosala.

Bato yango bakei epai ya Dariuse mpe balobi na ye ete: ‘Ee mokonzi, biso nyonso toyokani ete osengeli kotya mobeko ete na boumeli ya mikolo ntuku misato (30), moto moko te asengeli kosambela nzambe mosusu to moto mosusu, kasi kaka yo. Soki moto atosi mobeko yango te, abwakama na libulu ya nkɔsi.’ Mokonzi Dariuse ayebi te ntina oyo bato wana balingi atya mobeko yango. Kasi akanisi ete likanisi yango ezali malamu, yango wana mpe akomisi mobeko yango. Na yango, mobeko wana ekoki lisusu kobongwana te.

Ntango Danyele ayoki nsango ya mobeko yango, akei na ndako na ye mpe abandi kobondela, kaka ndenge asalaka liboso. Banguna na ye bayebaki ete akotika kobondela Yehova te. Yango wana, bazali kosepela mpo emonani ete mayele na bango ekosimba.

Ntango Mokonzi Dariuse ayebi ntina oyo bato yango balukaki ete atya mobeko wana, ayoki mawa mingi. Kasi lokola akoki kolongola mobeko yango te, atindi bábwaka Danyele na libulu ya nkɔsi. Bongo mokonzi alobi na Danyele ete: ‘Nazali na elikya ete Nzambe na yo oyo ozali kosalela akobikisa yo.’

Na butu wana, Dariuse akoki kolala te, mpo azali komitungisa mingi. Na ntɔngɔ, akei mbangu na libulu ya nkɔsi. Ye wana likoló ya libulu yango azali kotala na nse. Agangi ete: ‘Danyele, mosaleli ya Nzambe ya bomoi! Nzambe na yo oyo yo ozali kosalela abikisi yo na bankɔsi?’

Danyele azongisi ete: ‘Nzambe na ngai atindaki anzelu na ye mpe akangaki monɔkɔ ya bankɔsi, yango wana basali ngai mabe te.’

Bongo mokonzi asepeli mingi. Atindi bábimisa Danyele na libulu yango. Mpe atindi bábwaka bato nyonso oyo bafundaki ye na libulu ya nkɔsi. Kutu, liboso bato yango bákóma na nse, bankɔsi bayambi bango mpe babukibuki mikuwa na bango nyonso.

Na nsima, Dariuse akomeli bato nyonso ya bokonzi na ye mokanda oyo elobi ete: ‘Napesi mitindo ete moto nyonso atosa Nzambe ya Danyele. Asalaka makamwisi ya minene. Abikisi Danyele, bankɔsi elei ye te.’

Danyele 6:1-28.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto