Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • dp mok. 8 nk. 114-127
  • Danyele abiki na minɔkɔ ya nkosi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Danyele abiki na minɔkɔ ya nkosi!
  • Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAYELE MABE MPO NA KOBOMA DANYELE
  • BAPUSI DALIO APESA ETUMBU ENGEBENE MOBEKO
  • MAKAMBO MABONGWANI
  • TÓSALELA NZAMBE NA ETINGYA
  • Danyele asalelaki Nzambe mikolo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Danyele na libulu ya bankɔsi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Dalio mokonzi oyo alingaki bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Danyele na libulu ya nkɔsi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
dp mok. 8 nk. 114-127

Mokapo ya mwambe

Danyele abiki na minɔkɔ ya nkosi!

1, 2. (a) Ndenge nini Dalio, moto ya Mede, abongisaki bokonzi monene oyo azalaki na yango? (b) Lobelá mikumba ya baguvernere mpe bokonzi na bango.

BABILONE ekweyi! Ekólo yango, oyo elekaki bikólo nyonso ya mokili na nguya na ntango wana, ebungisaki na mwa ngonga nkembo na yango oyo eumelaki mbula monkama. Eleko ya sika ebandaki​—bokonzi ya Bamede na Baperse. Dalio, moto ya Mede, akitanaki Belesasala mpe amemaki bongo mokumba ya kobongisa bokonzi yango monene.

2 Mokumba ya liboso ya Dalio ezalaki kopona baguvernere 120. Balobaka ete Dalio atyaki bato ya libota na ye baguvernere mpe mokomoko azalaki koyangela etúká na ye. Etúká yango ekokaki kozala ya monene to ya moke. (Danyele 6:1) Na ndakisa, guvernere azalaki na mokumba ya kokɔngɔla mpako mpe kotinda yango epai na mokonzi. Atako mbala na mbala ntoma ya mokonzi azalaki kotalela mosala na ye, guvernere azalaki mokonzi monene. Nkombo satrape oyo ebongolami awa na guvernere elimboli “mobateli ya Bokonzi.” Na etúká na ye, guvernere azalaki mokitani ya mokonzi, moto oyo alekaki bato nyonso, longola bobele mokonzi ye moko.

3, 4. Mpo na nini Dalio alingaki mosakoli Danyele mingi, mpe mokumba nini apesaki ye?

3 Dalio alingaki kopesa mosakoli Danyele mokumba nini? Dalio, moto ya Mede, alingaki nde kopemisa mosakoli Moyuda Danyele na kopesáká ye epaso? Mingi mpenza lokola akómaki mobange ya mbula koleka 90? Dalio akokaki kosala bongo te. Ayebaki malamu ete Danyele azalaki mosakoli ya solo mpo asakolaki kokweya ya Babilone, likambo oyo esɛngaki ete moto azala na bososoli oyo eleki mayele ya bato. Lisusu, mbula mingi oyo mosakoli Danyele alekisaki na mosala ya Leta epesaki ye likoki ya koyeba na bozindo mimeseno ya baombo ndenge na ndenge oyo bazalaki na Babilone. Epai mosusu, Dalio alingaki kobatela boyokani malamu elongo na bato ya boyangeli na ye. Na bongo, asengelaki mpenza na moto ya mayele mpe oyo akɔmeli lokola mosakoli Danyele mpo na kosala elongo na ye. Na mosala nini?

4 Bato balingaki kokamwa mpenza soki Dalio atyaka mosakoli Danyele guvernere mpo ete azalaki moombo Moyuda. Bongo kanisá naino kokamwa oyo bato bazalaki na yango ntango bayokaki ete Dalio atii mosakoli Danyele mokonzi monene ya Leta kati na bakonzi misato oyo basengelaki kotalela mosala ya baguvernere! Mosakoli Danyele ‘azalaki mpe na lokumu koleka’ baninga na ye bakonzi. Ya solo, azalaki na “mayele ya koleka.” Kutu, Dalio alingaki kotya ye ministre-mokonzi.​—Danyele 6:2, 3.

5. Ndenge nini bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bamiyokaki ntango mokonzi apesaki mosakoli Danyele mokumba monene, mpe mpo na nini bamiyokaki bongo?

5 Bakonzi minene mosusu ya Leta mpe mingi mpenza baguvernere basilikaki mingi. Bakokaki kondima te ete mosakoli Danyele​—oyo azalaki moto ya Mede te to moto ya Perse te, ata mpe ndeko ya libota ya mokonzi te—​azala mokonzi na bango! Ndenge nini Dalio akokaki kopesa lokumu motindo wana na mopaya, koleka banamboka mpe ata bato ya libota na ye moko mokonzi? Basepelaki soko moke te na likambo yango. Lisusu, bazalaki kotalela bosembo ya mosakoli Danyele na liso mabe mpamba te yango elingaki kopekisa bango kozwaka kanyaka. Ezala ndenge nini, bakonzi yango minene ya Leta mpe baguvernere bakokaki te koyebisa mokonzi likambo yango polele. Atako boni, mosakoli Danyele azalaki moto ya lokumu na miso ya Dalio.

6. Ndenge nini bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bamekaki kotyola mosakoli Danyele, mpe mpo na nini balongaki te?

6 Yango wana, bakonzi yango ya politiki bayokanaki mpo na kosala mwango moko ya mabe. Balukaki ‘kozwa Danyele na mwa libunga na mosala na ye epai na mokonzi.’ Bákanga ye nde na libunga na mosala na ye? Azalaka moto ya sembo? Bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bamonaki ete Danyele azalaki kosala mosala na mobulu te to kozwa kanyaka te. Bakómaki kolobana: “Tokozwa [Danyele na likambo te] bobele soko tozwi yango na ntina na mobeko ya Nzambe na ye.” Na bongo, na mitema mabe na bango bakanelaki mosakoli Danyele. Bakanaki kosukisa ye libela.​—Danyele 6:4, 5.

MAYELE MABE MPO NA KOBOMA DANYELE

7. Likanisi nini bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bapesaki mokonzi, mpe basalaki nini?

7 Bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere “bayaki ebele” epai na Dalio. Liloba ya Araméen oyo ebongolami na “ebele” elimboli ebele ya bato oyo bazali koleka mpe kosala makɛlɛlɛ makasi lokola nkake. Bato yango balingaki komonisa Dalio ete bazalaki na likambo moko ya monene ya koyebisa ye. Ntango mosusu, balobanaki ete soki bayebisi mokonzi likambo yango polelepolele mpe bamonisi ye ntina oyo asengeli kotalela yango noki, akotya ntembe te. Yango wana, bayebisaki likambo na bango polele ete: “Basali minene nyonso ya Leta, bazuzi-bakambi mpe baguvernere, bakonzi minene ya Leta oyo bazali pembeni na mokonzi mpe bayangeli, bayokani mpo na kosala mobeko na nkombo ya mokonzi mpe kotya epekiseli makasi ete, soko moto nani akobondela nzambe to moto nani na boumeli ya mikolo ntuku misato, soko yo te, ɛɛ mokonzi, moto yango asengeli kobwakama na libulu ya nkosi.”a​—Danyele 6:6, 7, NW.

8. (a) Mpo na nini Dalio asepelaki na mobeko yango? (b) Mposa mpenza ya bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere ezalaki nini?

8 Na ntango ya kala, na etúká ya Mesopotamia, bato bazalaki kokumisa mokonzi ya mboka lokola nzambe mpe kosambela ye. Yango wana, Dalio akokaki bobele kosepela na mobeko yango. Ekokaki mpe kozala na ntina mosusu oyo mobeko yango esepelisaki Dalio. Tóbosana te ete na miso ya bato ya Babilone, Dalio azalaki mopaya to mouta. Mobeko yango elingaki bongo kofandisa bokonzi na ye, kolendisa bato ya mboka bákangama na ye mpe básimba bokonzi na ye oyo ezalaki naino na ebandeli. Nzokande, na kobimisáká mobeko yango, bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bazalaki koluka bolamu ya mokonzi te. Batyelaki nde mosakoli Danyele motambo, mpo bayebaki ete azalaki na momeseno ya kofungola maninisa ya eteni ya ndako na ye mpe kobondela Nzambe mbala misato na mokolo.

9. Mpo na nini bapaya mingi, longola Bayuda, bamonaki ete kotosa mobeko yango ezalaki likambo ya makasi te?

9 Bituluku nyonso ya mangomba ya Babilone bimonaki mobeko yango makasi? Te, mpo ezalaki bobele mobeko ya sanza moko. Lisusu, bobele bapaya moke kati na baoyo bazalaki Bayuda te nde bamonaki mabe kosambela mokonzi na mwa ntango wana. Nganga-mayele moko ya Biblia alobaki boye: “Lokola bato mingi ya Babilone bazalaki kosambela bikeko, bamonaki kosambela mokonzi likambo ya makasi mpenza te. Yango wana, batosaki noki ntango basɛngaki bango bákumisa​—Dalio moto ya Mede—​lokola nzambe mpo alongaki bitumba. Bobele Bayuda nde baboyaki.”

10. Ndenge nini Bamede na Baperse batalelaki mobeko yango oyo mokonzi abimisaki?

10 Ata ndenge wana, bato oyo bayaki epai na Dalio bapusaki mokonzi ‘andima mobeko yango mpe atya mabɔkɔ, mpo ebongolama te, mpamba te mobeko ya Bamede na Baperse ebongolamaka te.’ (Danyele 6:8) Na ntango ya kala, na mikili ya Azia, liloba ya mokonzi esengeleki kotosama. Yango eyaki kobimisa likanisi ete mokonzi asalaka libunga te. Esengeli kotosa mobeko nyonso oyo mokonzi abimisi, ezala koboma moto bobele mpamba!

11. Likama nini mobeko ya mokonzi ekokaki komemela mosakoli Danyele?

11 Lokola ayebaki likama oyo likokwela mosakoli Danyele te, mokonzi atyaki mabɔkɔ na mobeko yango. (Danyele 6:9) Na kosaláká bongo, kozanga koyeba, mokonzi azwaki ekateli ya liwa ya mosali na ye ya lokumu koleka basali nyonso. Mosakoli Danyele ayebaki malamu ete akozwama na mobeko yango.

BAPUSI DALIO APESA ETUMBU ENGEBENE MOBEKO

12. (a) Mosakoli Danyele asalaki nini ntango ayebaki ete mobeko moko ya sika ebimi? (b) Nani azalaki kokɛngɛla mosakoli Danyele, mpe mpo na nini?

12 Mosakoli Danyele aumelaki te na koyeba ete mobeko moko ebimaki mpe ezalaki kopekisa bato bábondela banzambe mosusu. Nokinoki, akɔtaki na ndako na ye, amataki na eteni ya ndako na ye mpe afungolaki maninisa na ngámbo ya Yelusaleme.b Mosakoli Danyele abondelaki Nzambe “lokola ameseneki kosala yango liboso.” Ntango mosusu mosakoli Danyele azalaki kokanisa ete moto moko azalaki komona ye te. Nzokande, bato oyo bakanelaki ye bazalaki kokɛngɛla ye. Na mbala moko, “bayaki ebele” mpe na mobulu lokola ndenge basalaki epai na Dalio. Sikoyo bango moko bamonaki mosakoli Danyele ‘azali kobondela mpe kosɛnga ngɔlu ya Nzambe na ye.’ (Danyele 6:10, 11) Bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bazwaki bongo likambo ya kofunda mosakoli Danyele epai na mokonzi.

13. Banguna ya mosakoli Danyele balobaki nini epai na mokonzi?

13 Na mayele mabe mpenza, banguna ya mosakoli Danyele batunaki mokonzi ete: “Ɛ mokonzi, yo okomaki mobeko te na ntina ete, mpo na mikolo ntuku misato, soko nani akobondela nzambe to moto, kozanga bobele yo, abwakama na libulu ya nkosi?” Dalio azongisaki: “Likambo yango ezali solo, lokola na mobeko ya [Bamede na Baperse], mokobongwanaka te.” Sikoyo banguna ya mosakoli Danyele bazwaki bongo libaku ya kofunda ye malamu. Balobaki: “Ɛ mokonzi, Danyele yango, ye moko na baombo na Yuda, akoyokaka yo te, mpe akoyokaka mobeko mokomaki yo te, nde akobondelaka mbala misato na mokolo moko.”​—Danyele 6:12, 13.

14. Mpo na nini bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere babéngaki mosakoli Danyele “moko na baombo na Yuda”?

14 Soki bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere babéngaki mosakoli Danyele “moko na baombo na Yuda,” ntina ezalaki. Balingaki komonisa Dalio polele ete Danyele oyo ye atii mokonzi, azali bobele moombo Moyuda. Na makanisi na bango, ezala ata mokonzi apesi ye lokumu mingi, lokola azali moombo, asengeli kotosa mobeko!

15. (a) Ndenge nini Dalio ayambaki nsango oyo bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bamemelaki ye? (b) Ndenge nini bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bamonisaki ete bayinaka mosakoli Danyele?

15 Ntango mosusu bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bakanisaki ete mokonzi akopesa bango longonya na ndenge bafundaki mosakoli Danyele. Soki bakanisaki mpenza bongo, bazalaki komikosa. Dalio ayokaki mawa mingi mpo na nsango oyo bamemelaki ye. Na esika ya kosilikela mosakoli Danyele to kopesa mitindo ete bábwaka ye noki na libulu ya nkosi, mokonzi alekisaki mokolo mobimba kolukaluka ndenge nini akobikisa ye. Kasi akokaki te. Mosika te, banguna yango ya mosakoli Danyele bazongelaki mokonzi mpe lokola bazalaki ata na nsɔmɔ te, basɛngaki mosakoli Danyele abomama.​—Danyele 6:14, 15.

16. (a) Mpo na nini Dalio azalaki komemya Nzambe ya Danyele? (b) Dalio akanisaki nini mpo na mosakoli Danyele?

16 Dalio amonaki ete azalaki na likambo mosusu ya kosala te. Akokaki kolongola mobeko yango te to kolimbisa “mbeba” oyo mosakoli Danyele asalaki. Oyo nyonso mokonzi akokaki kosala mpo na mosakoli Danyele ezalaki bobele kolendisa ye na maloba oyo: “Nzambe na yo, oyo okosalelaka ye mikolo nyonso, abikisa yo!” Maloba yango emonisi ete Dalio azalaki komemya Nzambe ya Danyele oyo apesaki mosakoli na ye mayele mpo asakola kokweya ya Babilone. Nzambe mpe apesaki mosakoli Danyele ‘mayele mingi’ koleka bakonzi minene mosusu ya Leta. Esilaki koleka mwa bambula, Nzambe bobele wana abikisaki bilenge Baebele misato oyo babwakamaki na litumbu ya mɔ́tɔ ya kongala. Ntango mosusu, Dalio ayebaki likambo yango. Lokola mokonzi azalaki na likoki te ya kobongola mobeko oyo ye moko andimaki, etikalaki na ye bobele kotya elikya ete na mbala oyo mpe, Yehova akobikisa Danyele. Nsukansuka, mosakoli Danyele abwakamaki na libulu ya nkosi.c Na nsima, “bayaki na libanga mpe batyaki yango na monɔkɔ ya libulu, mpe mokonzi akangaki yango na elembo na ye mpenza mpe na elembo ya [bato na ye ya lokumu] mpo [eloko] moko ebongwana na ntina na Danyele te.”​—Danyele 6:16, 17.

MAKAMBO MABONGWANI

17, 18. (a) Nini emonisi ete Dalio ayokaki mawa mingi mpo na likambo oyo ekwelaki mosakoli Danyele? (b) Nini esalemaki ntango mokonzi azongaki ntɔngɔntɔngɔ na libulu ya nkosi?

17 Dalio alɛmbaki nzoto mpe azongaki na ndako na ye. Lokola azalaki na mawa, abéngaki babɛti miziki te mpo báya kosepelisa ye. Butu mobimba, alalaki mpɔngi te, alyaki kutu te. ‘Ayokaki mpɔngi te.’ Na ntɔngɔntɔngɔ, Dalio akendaki mbangu na libulu ya nkosi. Agangaki na mongongo ya mawa ete: “Ɛ Danyele, moombo ya Nzambe ya bomoi, ekokaki na Nzambe na yo, oyo okosalelaka ye mikolo nyonso, kobikisa yo na nkosi?” (Danyele 6:18-20) Ntango ayokaki mongongo ya moto, akamwaki mingi mpe akitisaki motema!

18 “Ɛ mokonzi, oumela seko!” Na kopesáká mokonzi losako, mosakoli Danyele amonisaki ete akangelaki ye nkanda te. Ayebaki banani mpenza bazalaki koluka liwa na ye: ezalaki Dalio te kasi bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere, bango bato bazalaki koyokela ye zuwa. (Kokanisá na Matai 5:44; Misala 7:60.) Mosakoli Danyele alobaki lisusu ete: “Nzambe na ngai atindaki anzelu na ye, mpe azipaki minɔkɔ ya nkosi, mpe bazokisi ngai te, mpo ete liboso na ye nazalaki na ekweli te, mpe liboso na yo lokola nasali likambo te.”​—Danyele 6:21, 22.

19. Ndenge nini bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bakosaki Dalio?

19 Ya solo, maloba oyo masimbaki motema ya Dalio! Ayebaki ete mosakoli Danyele asalaki likambo moko te oyo ekokaki kosɛnga bábwaka ye na libulu ya nkosi. Dalio ayebaki malamu ete bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bakanaki koboma mosakoli Danyele. Bakosaki Dalio, balingaki kosalela ye mpo na kokokisa mayele mabe na bango. Ntango balobaki na mokonzi ete “bakonzi minene nyonso ya Leta” bandimi mobeko yango, bamonisaki lokola ete basololaki na mosakoli Danyele, ye mpe andimaki. Dalio atikalaki kokanisa eloko nini akosala bato yango ya nyamunyamu nsima. Ya liboso, atindaki bábimisa mosakoli Danyele na libulu ya nkosi. Ezalaki mpenza likamwisi mpo mosakoli Danyele abimaki kozanga ete nkosi eswa ye ata mwa moke!​—Danyele 6:23.

20. Nini ekómelaki banguna ya mosakoli Danyele?

20 Lokola mosakoli Danyele abikaki, Dalio ayebaki sikoyo nini asengelaki kosala. “Mokonzi alakaki, mpe bayaki na bato oyo bafundaki mosakoli Danyele, mpe babwakaki bango na libulu ya nkosi, bango mpe bana na bango mpe basi na bango; mpe naino ekómaki bango na nse na libulu te, nkosi [emibwakaki likoló na, NW] bango mpe ebukaki mikuwa na bango [bitenibiteni].”d​—Danyele 6:24.

21. Na ntango ya kala, bokeseni nini ezalaki kati na Mibeko ya Mose mpe mibeko ya mikili mosusu, mpo na bato ya libota ya basali na mabe?

21 Elongobanaki mpenza ete mokonzi aboma bato yango elongo na basi mpe bana na bango? Ekateli yango ekesanaki na Mibeko oyo Nzambe apesaki mosakoli Mose ete: “Batata bakobomama mpo na bana te, mpe bana bakobomama mpo na batata te. Moto na moto akobomama mpo na lisumu na ye moko.” (Deteronome 24:16) Nzokande, na mikili mosusu na ntango ya kala, bamesanaki koboma moto oyo asali mabe elongo na bato ya libota na ye. Ntango mosusu ezalaki kosalema bongo mpo bandeko ya moto oyo abomamaki bázongisa mabe yango te. Nzokande, na likambo oyo likómelaki mabota ya bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere, mosakoli Danyele azalaki na ngambo te. Akokaki koyoka mawa mpo na likama oyo bato yango ya mitema mabe bamemelaki mabota na bango.

22. Mobeko nini ya sika Dalio abimisaki?

22 Bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere oyo bakanelaki mosakoli Danyele babomamaki. Na nsima, Dalio abimisaki mobeko oyo: “Nasali mobeko ete na bokonzi na ngai mobimba bato bálɛnga mpe bábanga liboso na Nzambe ya Danyele, mpo ete ye azali Nzambe ya bomoi, akoumela lobiko na lobiko; bokonzi na ye ekobebisama te, nde bokonzi na ye ekoumela kino nsuka. Ye akobikisaka mpe akosikolaka, akosalaka bilembo mpe bikamwiseli na lola mpe na mokili, ye oyo abikisaki Danyele na nguya ya nkosi.”​—Danyele 6:25-27.

TÓSALELA NZAMBE NA ETINGYA

23. Ndakisa nini mosakoli Danyele apesaki na mosala na ye ya Leta, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?

23 Mosakoli Danyele atikeli biso nyonso, basaleli ya Nzambe na ntango oyo, ndakisa malamu. Bazwaki ye na likambo moko ya mabe te na etamboli na ye. Na mosala na ye, mosakoli Danyele “azalaki sembo, mpe libunga to ekweli ezwamaki na ye te.” (Danyele 6:4) Moklisto mpe asengeli kosala mosala na molende mpo na kosepelisa mokonzi na ye. Yango elingi koloba te ete tokomiboma na mosala mpo na koluka bozwi to kowelana na baninga ya mosala mpo na kozala liboso na bango. (1 Timote 6:10) Biblia ezali kosɛnga na moklisto ete asala mosala na ndenge elongobani mpe na motema mobimba, ‘mpo na Yehova.’​—Bakolose 3:22, 23; Tito 2:7, 8; Baebele 13:18.

24. Ndenge nini mosakoli Danyele amonisaki ete aboyaki kobebisa losambo na ye?

24 Mosakoli Danyele atyolaki losambo na ye te. Momeseno na ye ya kobondela eyebanaki na bato nyonso. Lisusu, bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere bayebaki malamu ete mosakoli Danyele azalaki kotyola losambo na ye te. Ɛɛ, bandimaki mpenza ete akokangama na momeseno yango atako mobeko epekisaki yango. Oyo nde ndakisa malamu mpo na baklisto ya ntango oyo! Bango mpe bayebani lokola bato oyo batyaka losambo ya Nzambe na esika ya liboso. (Matai 6:33) Yango esengeli komonana polele epai na baoyo bazali kotala biso mpamba te Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.”​—Matai 5:16.

25, 26. (a) Bato mosusu bakoki koloba nini mpo na makambo oyo mosakoli Danyele asalaki? (b) Mpo na nini mosakoli Danyele amonaki ete kotika momeseno na ye ya kobondela elingaki kozala lokola kotyola losambo na ye?

25 Moto mosusu akoloba ete mosakoli Danyele akokaki komibendela minyoko nyonso wana te soki amibombaka mpo na kobondela Yehova na mikolo 30 yango. Lisusu, ezali ata na lolenge moko te ya kotɛlɛma to ya kofukama oyo esɛngami mpo Nzambe ayoka libondeli ya moto. Ayebi makanisi ya motema ya moko na moko. (Nzembo 19:14) Nzokande, mosakoli Danyele amonaki ntina moko te ya kotika momeseno na ye ya kobondela mpe esika oyo ye amesanaki kosala yango mpo yango elingaki komonisa ete abebisaki bosembo na ye. Mpo na nini?

26 Lokola bato mingi bayebaki momeseno na ye ya kobondela, likanisi nini mosakoli Danyele alingaki kokɔtisela bango soki na mbala moko atikaki kobondela? Elingaki komonana lokola ete mosakoli Danyele abangaki bato mpe mobeko ya mokonzi elekaki mobeko ya Yehova. (Nzembo 118:6) Kasi mosakoli Danyele amonisaki na misala na ye ete akangamaki makasi na Yehova. (Deteronome 6:14, 15; Yisaya 42:8) Ya solo, na kosaláká bongo, mosakoli Danyele atyolaki mobeko ya mokonzi te. Kasi akokaki mpe kobuka mobeko ya Nzambe te. Yango wana, mosakoli Danyele atikaki kobondela te na eteni na ye ya ndako oyo ezalaki na likoló, ‘lokola amesanaki kosala yango,’ liboso ete mokonzi abimisa mobeko.

27. Ndenge nini basaleli ya Nzambe na ntango na biso bakoki komekola mosakoli Danyele (a) na botosi na bango epai na bakonzi bazali liboso? (b) na botosi na bango epai na Nzambe koleka bato? (c) na makasi oyo bazali kosala mpo na kofanda na kimya elongo na bato nyonso?

27 Na ntango na biso, basaleli ya Nzambe bakoki kozwa liteya na ndakisa ya mosakoli Danyele. ‘Batosaka bango bazali na bokonzi,’ batosaka mibeko ya Leta epai bafandi. (Baloma 13:1) Ntango mibeko ya bato miyokani na mibeko ya Nzambe te, basaleli ya Yehova bazali kozwa ekateli ndenge moko na bantoma ya Yesu oyo balobaki na mpiko nyonso ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola mokonzi liboso ya kotosa bato.” (Misala 5:29, NW) Ntango baklisto bazali kosala bongo, ezali mpo na kopusa bato na botomboki te. Balingaka kofanda na kimya na bato nyonso mpo ‘bázala na bomoi ya kimya mpe ya mobulu te mpe bámipesa mobimba na [mosala ya] Nzambe.’​—1 Timote 2:1, 2; Baloma 12:18.

28. Ndenge nini mosakoli Danyele asalelaki Nzambe “na etingya”?

28 Dalio alobaki mbala mibale ete mosakoli Danyele azalaki kosalela Nzambe “na etingya.” (Danyele 6:16, 20, NW) Na lokota ya Araméen, liloba oyo babongoli na “etingya” elimboli “kozolongana.” Liloba yango ezali kopesa likanisi ya eloko oyo ezongelamaka mbala na mbala to eloko oyo ezali kosalema ntango nyonso. Mosakoli Danyele azalaki na bosembo ya ndenge wana. Azongaki nsima te. Soki akutani na komekama moko monene to moke, mosakoli Danyele azalaki kokakatana te mpo na koyeba nini akosala. Azalaki kolanda nzela ya Yehova na bosembo nyonso, lokola amesanaki kosala yango bambula mingi.

29. Matomba nini basaleli ya Yehova na ntango na biso bakoki kozwa soki bamekoli etamboli ya sembo ya mosakoli Danyele?

29 Basaleli ya Nzambe na ntango na biso basengeli kolanda ndakisa ya mosakoli Danyele. Ɛɛ, ntoma Paulo alendisaki baklisto nyonso ete bátalela ndakisa ya bato ya ntango ya kala oyo bazalaki kobanga Nzambe. Mpo na kondima na bango, “bazwaki matomba ya boyengebene, bazwaki kokokisama ya bilaka,” mpe​—mosakoli Danyele—​‘azipaki minɔkɔ ya nkosi.’ Biso basaleli ya Yehova na ntango oyo, tosengeli komonisa kondima mpe kokangama ndenge moko na mosakoli Danyele mpo “tópota na etingya na emekaneli na mbango [oyo] etyami liboso na biso.”​—Baebele 11:32, 33; 12:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Libulu ya nkosi” ezalaki na Babilone mpamba te na ntango ya kala, na mikili ya Azia, bakonzi bazalaki kobɔkɔla nyama ya zamba.

b Eteni ya ndako na likoló ezalaki eteni ya ndako oyo moto akokaki kofanda mpo na kokima makɛlɛlɛ.

c Libulu ya nkosi ekokaki kozala eteni ya ndako oyo ezalaki na nse ya mabelé mpe monɔkɔ na yango epai ya likoló. Mbala mosusu ezalaki mpe na bikuke to na maninisa ya kotombola mpo na kokɔtisa banyama.

d Liloba “bafundaki” ezali libongoli ya liloba ya Araméen oyo ekoki mpe kobongolama “kokosela moto likambo.” Nyonso wana emonisi likunya oyo banguna ya mosakoli Danyele bayokelaki ye.

MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?

• Mpo na nini Dalio, moto ya Mede, apesaki mosakoli Danyele bokonzi monene?

• Mwango nini ya mabe bakonzi minene ya Leta mpe baguvernere basalaki? Ndenge nini Yehova abikisaki mosakoli Danyele?

• Soki otyaki likebi, liteya nini ozwi na ndakisa ya bosembo oyo mosakoli Danyele amonisaki?

[Elilingi na lokasa mobimba 114]

[Elilingi na lokasa mobimba 121]

[Elilingi na lokasa 127]

Mosakoli Danyele asalelaki Yehova “na etingya.” Ezali ndenge moko mpo na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto