Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 85
  • Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • “Oyo azali mwana na ngai”
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu abotami wapi mpe ntango nini?
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Baanzelu bayebisi ete Yesu abotami
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yesu abotami: epai wapi mpe ntango nini?
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 85

Lisolo 85

Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ

BOYEBI mwana moke oyo? Ɛɛ, ezali Yesu. Auti kobotama awa na ndako ya bibwɛlɛ. Bozali komona Maria, alingi kolalisa ye na elyelo ya bibwɛlɛ, esika batyelaka bampunda ná banyama mosusu bilei. Kasi mpo na nini Maria ná Yozefe bazali na kati ya ndako ya bibwɛlɛ? Kutu, oyo ezali esika babotaka bana te!

Ezali bongo. Kasi talá ntina bazali awa: Kaisala Augusto, mokonzi ya Roma, apesi mobeko ete moto nyonso akende kokomisa nkombo na mboka oyo abotamaki. Yozefe abotamaki awa na Beteleme. Kasi, ntango ye ná Maria bakómi, bazwi esika ya kolala na ndako ya bapaya te. Bongo bakei na ndako ya bibwɛlɛ. Mpe kaka na mokolo yango, Maria aboti Yesu. Mpe ndenge bozali komona yango, mwana azali malamu.

Bozali komona babateli ya mpate oyo bayei kotala Yesu? Na butu wana, bazalaki kobatela bampate na bango na esobe, mpe na mbala moko, bamoni kongɛnga moko boye. Anzelu moko abimeli bango. Babateli ya mpate yango babangi makasi. Kasi anzelu yango alobi na bango ete: ‘Bóbanga te! Nayeli bino nsango malamu. Lelo, na Beteleme, Kristo Nkolo abotami. Akobikisa bato. Bokokuta bazingi ye bilamba, balalisi ye na elyelo ya bibwɛlɛ.’ Na mbala moko, ebele ya baanzelu bayei mpe babandi kokumisa Nzambe. Ntango baanzelu balongwe, babateli ya mpate yango bakei noki koluka Yesu, mpe bamoni ye.

Boyebi mpo na nini Yesu azali lokola bato nyonso te? Ye azali mpenza nani? Kobosana te, na lisolo ya liboso na mokanda oyo, tolobelaki Mwana ya liboso ya Nzambe. Mwana yango asalaki elongo na Yehova mpo na kozalisa likoló, ná mabele ná biloko mosusu. Mwana yango nde Yesu!

Yehova azwaki bomoi ya Mwana na ye kuna na likoló, mpe atye yango na libumu ya Maria. Na mbala moko mwana abandi kokola na libumu ya Maria, kaka ndenge bana mosusu nyonso bakolaka na mabumu ya bamama na bango. Kasi mwana ya Maria azali nde Mwana ya Nzambe. Nsukansuka, Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ na Beteleme. Sikoyo oyebi ntina oyo baanzelu bazalaki kosakola na esengo mingi kobotama ya Yesu?

Luka 2:1-20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto