Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 70 lok. 166-lok. 167 par. 2
  • Baanzelu bayebisi ete Yesu abotami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baanzelu bayebisi ete Yesu abotami
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yesu abotami wapi mpe ntango nini?
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yesu abotami: epai wapi mpe ntango nini?
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Ndenge nini tosengeli kokanisaka Yesu Kristo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 70 lok. 166-lok. 167 par. 2
Baanzelu bazali koyebisa babateli ya mpate ete Yesu abotami

LITEYA 70

Baanzelu bayebisi ete Yesu abotami

Kaisala Augusto, mokonzi moko ya Roma, apesaki mitindo ete Moyuda nyonso azonga na mboka ya bankɔkɔ na ye mpo na kokomisa nkombo. Bongo Yozefe ná Maria bakendeki na Beteleme, epai bankɔkɔ ya Yozefe bautá. Kasi yango ezalaki ntango oyo Maria akómaki pene na kobota.

Ntango bakómaki na Beteleme, bazwaki esika ya kolala kaka na ndako ya bibwɛlɛ. Wana nde esika Maria abotaki Yesu. Azipaki ye na bilamba ya pɛpɛlɛ mpe alalisaki ye esika banyama elyaka.

Na butu yango, babateli ya mpate moko boye bazalaki kobatela bibwɛlɛ na bango na libándá pene na Beteleme. Na mbala moko, anzelu moko atɛlɛmaki liboso na bango mpe kongɛnga ya nkembo ya Yehova ezingaki bango. Babateli yango ya mpate balɛngaki, kasi anzelu alobaki na bango ete: ‘Bóbanga te. Nazali na nsango ya esengo. Lelo Masiya abotami na Beteleme.’ Na ntango yango, baanzelu ebele babimaki na likoló mpe bazalaki koloba: ‘Nkembo na Nzambe na likoló, mpe kimya na mabele.’ Na nsima, baanzelu yango balimwaki. Babateli yango ya mpate basalaki nini?

Babateli yango ya mpate balobanaki ete: ‘Tókende na Beteleme kaka sikoyo.’ Bakendaki nokinoki mpe bakutaki Yozefe ná Maria ná mwana na bango na ndako ya bibwɛlɛ.

Moto nyonso oyo ayokaki likambo oyo anzelu alobaki na babateli ya mpate akamwaki. Maria akanisaki malamumalamu maloba ya anzelu oyo asololaki na ye mpe abosanaki yango ata moke te. Babateli yango ya mpate bazongelaki bibwɛlɛ na bango mpe bazalaki kopesa Yehova matɔndi mpo na makambo oyo bamonaki mpe oyo bayokaki.

“Nautaki epai ya Nzambe mpe nazali awa. Nayei na ndenge na ngai moko te, kasi Moto wana nde atindaki ngai.”​—Yoane 8:42

Mituna: Ndenge nini baanzelu bayebisaki kobotama ya Yesu? Babateli ya mpate bakutaki banani na Beteleme?

Luka 2:1-20; Yisaya 9:6

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto