Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 95
  • Ndenge Yesu azali koteya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge Yesu azali koteya
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Liteya mpo na kozala na boboto
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Mosamaria ya motema malamu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Kozala “Mosamaria ya motema malamu” elakisi nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mosamaria moko na motema malamu
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 95

Lisolo 95

Ndenge Yesu azali koteya

MOKOLO moko Yesu ayebisi moto moko ete asengeli kolinga moninga to mozalani na ye. Bongo moto yango atuni Yesu ete: ‘Nani azali mozalani na ngai?’ Yesu ayebi makanisi ya moto yango. Moto yango akanisi ete kaka bato ya ekólo na ye mpe ya lingomba na ye nde bazali bazalani na ye. Kasi tólanda naino makambo oyo Yesu alobi na ye.

Mbala mingi Yesu azali koteya kaka na masolo. Mbala oyo mpe asali bongo. Alobeli lisolo ya Moyuda moko ná Mosamaria. Tosilaki komona ete Bayuda mingi balingaka Basamaria te. Tóyoka sikoyo lisolo yango:

Mokolo moko, Moyuda moko azalaki kokita na Yeriko, na nzela ya ngomba. Miyibi bakweli ye. Babɔtɔli ye mbongo, babɛti ye mpe batiki ye pene na liwa.

Na nsima, nganga-nzambe moko Moyuda aleki na nzela yango. Amoni moto yango. Akosala nini? Aleki na ngámbo mosusu akei, atiki moto yango alali kaka bongo. Moto mosusu mpe oyo alingi makambo ya Nzambe aleki na nzela yango. Azali Molevi. Akotɛlɛma? Te, aleki kaka, aboyi kosalisa moto yango. Na elilingi oyo, bozali komona nganga-nzambe ná Molevi bango wana bazali kokende.

Kasi nani azali kosalisa moto yango oyo miyibi babɛtaki? Ezali Mosamaria. Azali kosalisa Moyuda. Atye ye nkisi na mpota mpe azali kokanga yango. Na nsima, akei na Moyuda yango na esika oyo akoki kopema mpe kobika.

Na nsuka ya lisolo, Yesu atuni moto oyo atunaki ye motuna boye: ‘Kati na bango misato okanisi ete nani azali mozalani ya moto oyo miyibi babɛtaki? Nganga-nzambe, Molevi to Mosamaria?’

Moto yango azongisi ete: ‘Mosamaria. Ye nde amoniselaki moto yango boboto.’

Yesu alobi na ye ete: ‘Olobi malamu. Kende, bongo yo mpe salelá bato mosusu kaka bongo.’

Yesu ayebi mpenza koteya! Soki tozali koyoka makambo oyo alobi na kati ya Biblia, tokoyekola makambo mingi.

Luka 10:25-37.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto