Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lr mok. 15 nk. 82-86
  • Liteya mpo na kozala na boboto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya mpo na kozala na boboto
  • Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Masolo mosusu
  • Mosamaria ya motema malamu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Ndenge Yesu azali koteya
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Kozala “Mosamaria ya motema malamu” elakisi nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mosamalia amimonisi mozalani malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Yekolá epai ya Moteyi Monene
lr mok. 15 nk. 82-86

MOKAPO 15

Liteya mpo na kozala na boboto

Bana basi mibale ya mike

OYEBI soki kokanisela moto mabe ezali nini?— Kokanisela moto mabe elakisi kolinga ye te kaka mpo mbala mosusu akeseni na yo to mpo alobaka monɔkɔ oyo ekeseni na oyo ya yo. Na bongo, kokanisela moto mabe elakisi kosepela na ye te to kotalela ye na makanisi ya malamu te liboso kutu oyeba ye mpenza.

Okanisi ete ezali malamu koyina moto liboso kutu oyeba ye mpenza to koyina ye kaka mpo akeseni na yo?— Kokanisela moto mabe ezali malamu te, ezali mpe komonisa boboto te. Tosengeli te kozanga boboto epai ya moto kaka mpo akeseni na biso.

Na ndakisa, oyebi moto moko oyo loposo ya nzoto na ye ekeseni na oyo ya yo to oyo alobaka monɔkɔ oyo ekeseni na oyo ya yo?— Ekoki kozala ete oyebi kutu bato oyo nzoto na bango ebebá mpo bazokaki mpota to mpo babɛlaka maladi moko boye. Ozalaka na boboto epai ya bato oyo bakeseni na yo mpe olingaka bango?

Bana mibale ya mposo ekeseni bazali kosakana elongo

Ndenge nini tosengeli kotalela bato oyo bakeseni na biso?

Soki tozali koyokela Yesu Klisto, Moteyi Monene, tokomonisela moto nyonso boboto. Ezala moto ya ekólo nini to ya loposo nini, mpo na biso bokeseni esengeli kozala te. Tosengeli komonisela ye boboto. Ata soki bato nyonso bandimaka likanisi wana te, ezali yango nde Yesu ateyaki. Tiká tólobela yango.

Moyuda moko, oyo azalaki kokanisela bato mosusu mabe, akendaki kokutana na Yesu mpe atunaki ye motuna oyo: ‘Nasengeli kosala nini mpo nazala na bomoi libela na libela?’ Yesu ayebaki ete moto yango azalaki mbala mosusu koluka ete báloba na ye ete asengeli komonisela boboto kaka bato oyo bazali na ye loposo moko to ekólo moko. Na esika ete Yesu ayanola na motuna yango, atunaki mobali yango ete: ‘Mibeko ya Nzambe elobi ete tosengeli kosala nini?’

Mobali yango ayanolaki ete: ‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Yesu alobaki na ye ete: ‘Opesi eyano ya malamu. Landá kosala bongo mpe okozwa bomoi ya seko.’

Kasi, mobali yango asepelaki te komonisela bato ya ekólo mosusu boboto to kolinga bango. Na bongo, alukaki komilongisa. Atunaki Yesu ete: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Mbala mosusu alingaki Yesu aloba ete: “Bazalani na yo ezali baninga na yo” to, “Ezali bato oyo bazali lokola yo.” Mpo na kopesa eyano na motuna wana, Yesu abɛtaki lisolo ya Moyuda moko ná Mosamalia moko. Yoká lisolo yango.

Moto moko azalaki kokita na nzela oyo euti na Yelusaleme tii na Yeliko. Moto yango azalaki Moyuda. Ntango azalaki kotambola, babandi babimelaki ye. Babɛtaki ye, bakweisaki ye na mabelé mpe babɔtɔlaki mbongo na ye ná bilamba na ye. Babandi yango babɛtabɛtaki ye mpe batikaki ye pene na liwa pembeni ya nzela.

Mwa moke na nsima, nganga-nzambe moko alekaki na nzela yango. Amonaki moto yango oyo bazokisaki ye mpenza mabe. Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?— Nganga-nzambe yango alekaki na ngámbo mosusu ya nzela. Atɛlɛmaki ata kotɛlɛma te. Asalaki ata eloko moko te mpo na kosalisa moto wana.

Nganza-nzambe ná Molevi baleki mobali oyo akómaki pene na liwa; Mosamalia apusani pene na ye

Na nsima, moto mosusu oyo amipesá mpenza na makambo ya losambo akitaki mpe na nzela yango. Azalaki Molevi oyo azalaki kosala na tempelo na Yelusaleme. Atɛlɛmaki nde mpo na kosalisa moto wana?— Te. Asalaki kaka ndenge nganga-nzambe asalaki.

Nsukansuka, Mosamalia moko alekaki mpe na nzela yango. Ozali komona ye mwa likoló ndenge azali koya?— Amonaki Moyuda oyo alali wana, oyo bazokisizokisi ye. Kasi, simbá likambo oyo: Basamalia ná Bayuda bazalaki koyokana ata moke te. (Yoane 4:9) Mosamalia yango akotika nde moto yango kozanga ete asalisa ye? Akoloba nde na nse ya motema ete: ‘Mpo na nini nasalisa Moyuda oyo? Soki ezalaki ngai moto nazokaki, ye alingaki kosalisa ngai’?

Mosamalia akiti na nyama na ye mpe asalisi mobali yango oyo alali pembeni ya nzela

Mpo na nini Mosamalia azalaki mozalani malamu?

Mosamalia atalaki moto oyo alali pembeni ya nzela, mpe ayokelaki ye mawa. Amonaki ete asengeli te kotika ye wana akufa. Na bongo, alongwaki na mokɔngɔ ya nyama na ye, akitaki, apusanaki penepene na moto yango, mpe abandaki kopangwisa makila na bampota na ye. Asopelaki yango mafuta mpe vinyo mpo ebela. Na nsima akangaki bampota yango na babande.

Mosamalia yango atombolaki na malɛmbɛ moto oyo bazokisaki mpe atyaki ye likoló ya nyama na ye. Na nsima, bakitaki na nzela malɛmbɛmalɛmbɛ tii bakómaki na ndako ya baleki-nzela, to mwa otɛlɛ. Ntango bakómaki na esika yango, Mosamalia afutelaki moto yango esika ya kolala, mpe asalaki nyonso mpo ete básalisa moto yango malamu.

Sikoyo, Yesu atunaki moto oyo azalaki kosolola na ye ete: ‘Mpo na yo, nani na kati ya bato wana misato azalaki mozalani ya malamu?’ Soki ezalaki yo, olingaki kopesa eyano nini? Ezalaki nganga-nzambe, Molevi, to Mosamalia?—

Mobali yango ayanolaki ete: ‘Mozalani ya malamu ezalaki bongo moto oyo atɛlɛmaki mpe asalisaki moto oyo bazokisaki.’ Yesu alobaki na ye ete: ‘Olobi malamu. Kende mpe yo moko salá se bongo.’​—Luka 10:25-37.

Lisolo yango ezali mpenza kitoko, ezali bongo te? Yango emonisi polele banani bazali bazalani na biso. Bazalani na biso ezali kaka te baninga na biso ya motema. Mpe ezali kaka te bato oyo tozali na bango loposo ndenge moko to baoyo tolobaka na bango monɔkɔ moko. Yesu ateyaki biso ete tosengeli komonisela bato nyonso boboto ata soki bazali bato ya ekólo nini, ya loposo nini, to balobaka monɔkɔ nini.

Ezali ndenge wana nde Yehova Nzambe asalelaka bato nyonso. Ye akaniselaka bato mabe te. Yesu alobaki ete: ‘Tata na bino oyo azali na likoló abimisaka moi na ye likoló ya bato mabe mpe bato malamu. Anɔkisaka mbula likoló ya bato malamu mpe bato mabe.’ Na yango, tosengeli komonisela bato nyonso boboto, kaka ndenge Nzambe amoniselaka bango yango.​—Matai 5:44-48.

Elenge mwasi moko azali kosalisa elenge mwasi ya loposo mosusu akanga mpota oyo azoki na libɔlɔngɔ

Ndenge nini okoki kozala mozalani malamu?

Na bongo, okosala nini soki omoni moto moko azoki?— Okosala nini soki moto yango azali moto ya ekólo mosusu to moto ya loposo mosusu? Azali kaka mozalani na yo, mpe osengeli kosalisa ye. Soki omoni ete ozali mwana moke mpe okokoka kosalisa ye te, okoki kosɛnga mokóló moko asalisa ye. To mpe okoki kobenga polisi moko to molakisi moko. Soki osali bongo, okomonisa ete ozali na boboto lokola Mosamalia wana.

Moteyi Monene alingi ete biso tózala na boboto. Alingi tósalisaka bato mosusu, ata soki bazali banani. Ezali mpo na yango nde abɛtaki lisolo ya Mosamalia ya motema malamu.

Mpo na liteya ya komonisela bato nyonso boboto ata soki bazali bato ya loposo to ekólo nini, tángá Masese 19:22; Misala 10:34, 35; mpe 17:26.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto