Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 98
  • Na ngomba ya olive

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na ngomba ya olive
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yesu azongi na likoló
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Tómikundwela mikolo ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabelé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • “Ntango esi’ ekoki”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yesu azongi na Likoló
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 98

Lisolo 98

Na ngomba ya olive

BÓTALA Yesu na Ngomba ya Olive. Bantoma minei bazali elongo na ye. Andre ná Petro bazali bandeko, Yakobo ná Yoane mpe bazali bandeko. Ndako bozali komona mosika kuna ezali tempelo ya Nzambe, na Yerusaleme.

Mikolo mibale eleki uta Yesu akɔtaki na Yerusaleme likoló ya mwana ya mpunda. Ezali mokolo ya mibale. Yesu akei na tempelo ntɔngɔntɔngɔ. Banganga-nzambe balukaki kokanga ye mpo báboma ye. Kasi bazali kobanga, mpo bato balingi ye.

Yesu alobi na bakonzi ya mangomba ete: ‘Bino banyoka, bana ya banyoka!’ Na nsima, ayebisi bango ete Nzambe akopesa bango etumbu mpo na mabe oyo bazali kosala. Nsima na yango, Yesu akei na Ngomba ya Olive, mpe bantoma wana minei babandi kotuna ye mituna. Boyebi makambo oyo batuni ye?

Bantoma bazali kotuna ye makambo oyo ekoya. Bayebi ete Yesu akosilisa mabe oyo ezali kosalema awa na mabele. Kasi balingi báyeba ntango nini likambo yango ekosalema. Ntango nini Yesu akozonga mpo na koyangela?

Yesu ayebi ete bayekoli na ye bakomona ye lisusu te ntango akozonga. Lokola ye akozala na likoló, bakozala na likoki ya komona ye te. Na yango, Yesu ayebisi bantoma na ye ndambo ya makambo oyo ekosalema na mabele ntango akokóma Mokonzi na likoló. Wapi ndambo ya makambo yango?

Yesu alobi ete bitumba minene, bamaladi, mpe nzala ekozala; mabe ekobakisama mingi mpe mabele ekoningana na bisika mingi. Yesu alobi mpe ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekosakolama na mabele mobimba. Makambo oyo ezali mpenza kosalema na ntango na biso? Ɛɛ! Yango wana tokoki kondima ete Yesu azali koyangela sikoyo na likoló. Mosika te akolongola mabe nyonso awa na mabele.

Matai 21:46; 23:1-39; 24:1-14; Marko 13:3-10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto