Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 111
  • Elenge mobali moko alali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elenge mobali moko alali
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Ntango oyo tosengeli kolala te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Likama na mobembo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Paulo abengi Timote
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 111

Lisolo 111

Elenge mobali moko alali

LIKAMBO nini ezali koleka awa? Elenge mobali oyo alali awa na mabele azwi likama? Talá ntoma Paulo azali na kati ya bato oyo bazali kouta na ndako; Timote mpe azali wana. Elenge yango akwei nde na lininisa ya ndako?

Ɛɛ, akwei wana. Ntoma Paulo azalaki kosalela bayekoli diskur na Troase. Ayebi ete akomona bango lisusu noki te, mpo lobi asengeli kosala mobembo na masuwa. Yango wana lisolo na ye ekei tii na katikati ya butu.

Nzokande, elenge moko azalaki wana, nkombo na ye Etishe, afandaki na lininisa, alali. Bongo akwei longwa na etajɛ ya misato tii na mabele. Yango wana bato nyonso oyo bazali koyoka mawa. Ntango bameki kotɛlɛmisa elenge yango, bamoni ete akufi.

Ntango ntoma Paulo amoni ete elenge yango akufi, alaleli ye, mpe asimbi ye. Na nsima alobi ete: ‘Bómitungisa te! Azali malamu.’ Alobi bongo mpo auti kozongisa ye na bomoi. Bato nyonso basepeli makasi mpenza.

Bongo bango nyonso bazongi na likoló mpe balei. Paulo akobi lisusu lisolo tii na ntɔngɔ. Na mbala oyo, Etishe alali lisusu te. Na nsima Paulo, Timote ná baninga na bango ya mobembo bakɔti na masuwa. Bakei wapi?

Ntoma Paulo auti kosilisa mobembo na ye ya misato ya mosala ya kosakola, mpe azali kozonga. Na mobembo yango, afandaki mbula misato na Efese. Mobembo ya misato eumeli koleka oyo ya mibale.

Nsima ya kolongwa na Troase, masuwa etɛlɛmi mwa moke na Milete. Lokola engumba Efese ezali mosika te, ntoma Paulo abengi bankulutu ya lisangá ya Efese báya na Milete mpo asolola na bango mbala ya nsuka. Bongo ntango masuwa ezali kolongwa, bayoki mawa mpo Paulo akei.

Na nsuka, masuwa ekómi lisusu na Kaisaria. Paulo atikali wana, akei na ndako ya moyekoli Filipe, mpe mosakoli Agabusi ayei kokebisa ntoma Paulo ete bakokanga ye ntango akokóma na Yerusaleme. Esalemaki mpe bongo. Nsima ya kokɔta bolɔkɔ mbula mibale na Kaisaria, bakei na Paulo na Roma mpo na kosamba liboso ya Kaisala. Tótala ndenge mobembo yango elekaki.

Misala mokapo 19 tii 26.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto