Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 112
  • Likama na mobembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likama na mobembo
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Masuwa ya Galilai—Eloko ya motuya ya ntango ya kala
    Lamuká!—2007
  • Yesu akoki kobatela biso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu atamboli likoló ya mai
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Ntoma Paulo alongi mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 112

Lisolo 112

Likama na mobembo

MASUWA oyo bozali komona awa etutani na zɛlo mpe ezali kopanzana mpo mbonge ezali kobɛta yango. Bato nyonso bamibwaki na mai. Bato mosusu bakómi na libongo. Bomoni ntoma Paulo? Tótala sikoyo likambo oyo ekómeli ye.

Kobosana te ete Paulo aumelaki na bolɔkɔ na Kaisaria mbula mibale. Na nsima, bakɔtisaki ye ná bakangami mosusu na masuwa mpo bákende na bango na Roma. Ntango bazali koleka pene na esanga Krɛtɛ, mopɛpɛ ya nsɔmɔ ekiteli bango. Mopɛpɛ yango ezali kopɛpa makasi mpe bamatelo bakoki lisusu kotambwisa masuwa te. Na moi, moi ezali komonana te, mpe na butu minzoto ezali komonana te. Nsukansuka, bato nyonso oyo bazali na masuwa yango balongoli elikya ya kobika.

Bongo ntoma Paulo atɛlɛmi mpe alobi na bango ete: ‘Moko na bino akobungisa bomoi na ye te; kaka masuwa yango moko nde ekobeba. Mpo na butu ya lelo, anzelu moko ya Nzambe ayaki epai na ngai mpe alobi ete: “Kobanga te Paulo! Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala moyangeli ya Roma. Mpe Nzambe akobikisa bato nyonso oyo bazali kosala mobembo elongo na yo na masuwa.”’

Na mokolo ya zomi na minei banda mopɛpɛ ebandaki kobɛta, pene na katikati ya butu, bamatelo bamoni ete bazali kopusana pene na mokili. Lokola molili ezali, babangi noki masuwa epanzana na mabanga, babwaki balongo. Ntango ntɔngɔ etani, bamoni libongo. Basali makasi ete bákóma kuna.

Kasi ntango bakómi pene na libongo yango, masuwa etutani na zɛlo mpe ekangami wana. Na nsima, mbonge ebandi kobɛta masuwa yango, mpe masuwa ebandi kopanzana. Bongo mokonzi ya basoda oyo azalaki wana alobi ete: ‘Bato nyonso oyo bayebi kobɛta mai bámibwaka na mai liboso mpe bákende na libongo. Baoyo botikali bólanda bango, bósimba mabaya mpe biloko mosusu.’ Mpe basalaki ndenge wana. Na ndenge yango nde bato nyonso nkama mibale na ntuku nsambo na motoba (276) oyo bazalaki na masuwa babikaki, ndenge anzelu alobaki.

Bango nyonso babimaki na mai mpe bakómaki na esanga oyo babengi Malta. Bato ya esanga yango bazali na boboto mingi. Ntango likoló ekómi kimya, bakɔtisi Paulo na masuwa mosusu mpe bakei na ye na Roma.

Misala 27:1-44; 28:1-14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto